Tobengisi yo na
Esengo ya seko
Liyangani ya Batatoli ya Yehova ya 2026
Kokɔta ezali ofele • Bakɔngɔlaka mabonza te
Makanisi ya ntina
Mokolo ya mitano: Okoyekola na Makomami makambo oyo emonisi ete Nzambe mpe Mwana na ye Yesu, balingi ete ozala na esengo.
Mokolo ya pɔsɔ: Lisolo ya Yesu likoló ya ngomba, lisolo oyo ekendá nsango, ekosalisa yo oyeba ndenge oyo okoki kozala na esengo ya seko.
Mokolo ya lomingo: Na diskur oyo elobi “Omoni eloko ya motuya?” okoyekola ndenge oyo mateya ya solo ya Biblia esalisi bamilio ya bato bákóma na esengo mingi.
Video ya drame
Lisolo ya mosala ya Yesu: Lisolo 4-6
Okotala ndenge Yesu azali koteya ebele ya bato, kobikisa bato ya maladi, mpe kosekwisa bakufi. Na boumeli ya mokolo mokomoko ya liyangani, tokotala lisolo moko na masolo yango ya kitoko oyo ekosimba mpenza mitema.
Kende na jw.org mpo na komona programɛ mobimba mpe talá bavideo oyo elandi:
Nini elekaka na mayangani na biso oyo esalemaka mbula na mbula?
Talá makambo okomona na liyangani ya Batatoli ya Yehova.
Talá na mokuse makambo tokoyekola na liyangani ya mbula oyo.
Ndenge nini Yesu asalelaki likabo oyo azalaki na yango mpo na kosalisa basusu?
Talá masolo oyo elobelamaki na mayangani oyo euti koleka

