Ekaniseli ya liwa ya Yesu
Lundi, 22/03/2027
Mbala moko na mbula, Batatoli ya Yehova basalaka Ekaniseli ya liwa ya Yesu kaka ndenge apesaki mitindo ntango alobaki: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”—Luka 22:19.
Tóbengisi yo ná libota na yo na molulu yango.
Mituna oyo bato batunaka mingi
Nani akoki koya?
Moto nyonso akoki koya. Okoki mpe koya ná libota na yo mpe baninga.
Ekoumela?
Ekozwa kaka ngonga pene na moko.
Ekozala wapi?
Sololá ná Batatoli ya Yehova mpo na koyeba esika.
Ezali na makambo mosusu oyo basɛngaka moto asala soki ayei kuna?
Te.
Bakokɔngɔla mpe mabonza?
Te. Batatoli ya Yehova bakɔngɔlaka mabonza te na losambo na bango.—Matai 10:8.
Esengeli kolata ndenge nini?
Ndenge olingi! Kasi, Batatoli ya Yehova basalaka makasi bálata na ndenge oyo ezali komonisa limemya.
Nini ekosalema na Ekaniseli yango?
Diskur moko ya kolendisa ekosalema. Diskur yango ekolobela ntina oyo Yesu akufaki mpe ndenge oyo tokoki kozwa mapamboli na likambo oyo Nzambe ná Kristo basalá mpo na biso. Molulu yango ekobanda mpe ekosuka na loyembo mpe libondeli.
Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka Elambo ya mpokwa ya Nkolo ndenge moko te na mangomba mosusu?”
Na bambula ekoya, Ekaniseli ekosalema na badati nini?
2027: Lundi, 22/03
2028: Dimanche, 09/04
2029: Jeudi, 29/03

