Biblia elobi nini na likambo etali kokila bilei?
Eyano ya Biblia
Na ntango ya kala, Nzambe azalaki kondima moto akila bilei soki asali yango na makanisi ya malamu. Kasi soki asali yango na makanisi ya malamu te ezalaki kosepelisa Nzambe te. Kasi lelo oyo, Biblia esɛngi te moto akila bilei; epekisi mpe te moto asala yango.
Mpo na nini bato mosusu oyo Biblia elobeli bakilaki bilei?
Mpo na koluka lisalisi mpe litambwisi ya Nzambe. Bayisraele oyo bazalaki kokende Yerusaleme bakilaki bilei mpo na komonisa ete basɛngaki na bosembo nyonso lisalisi ya Nzambe. (Ezera 8:21-23) Na ntango moko boye, Paulo ná Barnabasi bakilaki bilei ntango batyaki bankulutu na masangá.—Misala 14:23.
Mpo na kotyaka makanisi na mokano ya Nzambe. Nsima ya batisimo na ye, Yesu akilaki bilei mikolo 40 mpo amibongisa na kosala mokano ya Nzambe na boumeli ya mosala na ye.—Luka 4:1, 2.
Mpo na komonisa kobongola motema na masumu ya kala. Na nzela ya mosakoli Yoele, Nzambe ayebisaki Bayisraele oyo bazangaki bosembo boye: “Bózongela ngai na mitema na bino nyonso, mpe na kokila bilei mpe na kolela mpe na koganga ya kolela.”—Yoele 2:12-15.
Na mokolo ya kozipa masumu. Na Mibeko oyo apesaki Bayisraele, Nzambe asɛngaki bango mpe bákilaka bilei na mokolo ya kozipa masumu, oyo ezalaki kosalema mbula na mbula. a (Balevi 16:29-31) Kokila bilei ezalaki na ntina na libaku yango mpo ezalaki kokundwela Bayisraele ete bazalaki bato ya kozanga kokoka mpe ete bazalaki na mposa ya bolimbisi ya Nzambe.
Wapi mwa makanisi ya mabe oyo ekoki kotinda moto akila bilei?
Bato bámona biso. Yesu ateyaki ete kokila bilei esengeli kozala likambo ya moto ye moko na Nzambe.—Matai 6:16-18.
Komibimisa moto ya sembo. Kokila bilei emonisaka te ete moto aleki basusu na bizaleli malamu to ayokanaka na Nzambe koleka basusu.—Luka 18:9-14.
Koluka kozipa lisumu oyo tosali na nko. (Yisaya 58:3, 4) Nzambe andimaka kaka kokila bilei oyo esangani na botosi mpe kobongola motema ya solosolo na lisumu ya ndenge nyonso oyo moto asali.
Kokokisa mokumba moko boye ya losambo kaka mpo na kokokisa. (Yisaya 58:5-7) Na likambo oyo, Nzambe akokani na moboti oyo asepelaka te bana báloba ete balingaka ye kaka mpo abotá bango, kasi nde bolingo yango eutá mpenza na motema.
Bakristo basengeli kokila bilei?
Te. Nzambe asɛngaki Bayisraele bákilaka bilei na mokolo ya kozipa masumu, kasi alongolaki mobeko yango ntango Yesu azipaki mpo na libela masumu ya baoyo babongolaka motema. (Baebre 9:24-26; 1 Petro 3:18) Bakristo bazali na nse ya Mibeko ya Moize te, oyo ezalaki mpe na mokolo ya kozipa masumu. (Baroma 10:4; Bakolose 2:13, 14) Boye, mokristo mokomoko asengeli kozwa ekateli ya kokila bilei to te.—Baroma 14:1-4.
Bakristo bayebi ete kokila bilei ezali likambo ya libosoliboso te na losambo na bango. Biblia elobaka te ete kokila bilei epesaka esengo. Nzokande, esengo oyo bakristo ya solo bazalaka na yango euti na Yehova, “Nzambe ya esengo.”—1 Timote 1:11; Mosakoli 3:12, 13; Bagalatia 5:22.
Makanisi ya libunga na oyo Biblia elobi na likambo ya kokila bilei
Libunga: Ntoma Paulo asɛngaki bakristo oyo babalá bákilaka bilei.—1 Bakorinti 7:5, Biblia King James Version.
Solo: Maniskri ya kala mpenza ya Biblia etángi te kokila bilei na 1 Bakorinti 7:5. b Emonani ete, baoyo basalaki bakopi ya Biblia babakisaki liloba kokila bilei kaka na vɛrsɛ yango te kasi mpe na Matai 17:21; Marko 9:29; mpe Misala 10:30. Mabongoli mingi ya Biblia ya mikolo na biso elongolá liloba yango oyo babakisá kobakisa.
Libunga: Bakristo basengeli kokila bilei mpo na kokanisa mikolo 40 oyo Yesu akilaki bilei na esobe nsima ya batisimo na ye.
Solo: Yesu atikalá kosɛnga te ete bakilaka bilei na ndenge wana, ezali mpe te na vɛrsɛ moko ya Biblia oyo emonisi ete bakristo ya liboso bazalaki kosala bongo. c
Libunga: Bakristo basengeli kokila bileli ntango bazali kokanisa liwa ya Yesu.
Solo: Yesu asɛngaki bayekoli na ye te ete bákilaka bilei na Ekaniseli ya liwa na ye. (Luka 22:14-18) Ntango Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakokila bilei ntango akokufa, azalaki te kopesa mobeko moko kasi alingaki kaka koloba oyo elingaki kosalema. (Matai 9:15) Biblia esɛngaki bakristo oyo bazalaki na nzala bálya naino na bandako na bango liboso ya kosala Ekaniseli ya liwa ya Yesu.—1 Bakorinti 11:33, 34.
a Nzambe alobaki na Bayisraele boye: “Bosengeli koyokisa milimo na bino mpasi” na mokolo ya kozipa masumu. (Balevi 16:29, 31) Maloba yango ezali kopesa likanisi ya kokila bilei. (Yisaya 58:3) Yango wana, Biblia Contemporary English Version ebongoli yango boye: “Bosengeli komilalisa nzala mpo na komonisa ete boyoki mawa mpo na masumu na bino.”
b Talá buku A Textual Commentary on the Greek New Testament, ya Bruce Metzger, oyo ebimá mpo na mbala ya misato, lokasa 554.
c Mpo na istware ya mikolo 40 ya Karɛme, buku New Catholic Encyclopedia elobi boye: “Na siɛklɛ misato ya liboso, eleko ya kokila bilei mpo na komibongisa na fɛti ya Pasika ezalaki koleka pɔsɔ mobimba te; ezalaki koumela mokolo moko to mibale. . . . Mbala ya liboso bálobela eleko ya mikolo 40 ezali na cinquième canon ya Concile de Nicée (325), atako bato mosusu ya mayele bamitunaka soki ebongi karɛme ezala wana.”—Ebimeli ya mibale, Volimi 8, lokasa 468.