Privacy Settings

To provide you with the best possible experience, we use cookies and similar technologies. Some cookies are necessary to make our website work and cannot be refused. You can accept or decline the use of additional cookies, which we use only to improve your experience. None of this data will ever be sold or used for marketing. To learn more, read the Global Policy on Use of Cookies and Similar Technologies. You can customize your settings at any time by going to Privacy Settings.

Lakisá makambo oyo ezali na kati

Elenge mobali moko azali kotánga buku moko. Ezali na telecommande ya TV mpe babuku mosusu pene na ye.

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Mpo na nini ezali na ntina ete bana bátángaka?​—Eteni ya 1: Kotánga buku moko to kotala filme?

Mpo na nini ezali na ntina ete bana bátángaka?​—Eteni ya 1: Kotánga buku moko to kotala filme?

 Ntango bana na yo bazali kopema, basepelaka kosala nini: kotala filme to kotánga buku? Baponaka nini: telefone to buku?

 Esali bambula mingi, bato bazali kolinga lisusu kotánga mingi te: ya liboso mpo na televizyo, mpe lisusu mpo na ebele ya bavideo oyo etondi na Internet. Jane Healy alobi boye na buku na ye Endangered Minds, oyo ebimaki na 1990: “Kotánga ezali kokóma lokola likambo moko esilá ngala.

 Soki tozongi nsima moke, bato mosusu bakanisaki ete buku yango elekisaki ndelo ndenge elobaki bongo. Kasi lelo, na mikili oyo makambo ya teknoloji ezali mingi, bilenge mingi batángaka lisusu mingi te.

Na lisolo oyo tokolobela

 Mpo na nini ezali na ntina bana bátángaka?

  •   Kotánga etindaka moto akanisa. Na ndakisa, ntango totángaka lisolo moko na buku, tokanisaka soki mongongo ya ndenge nini bato yango bazali kosalela, ndenge bazali komonana, esika oyo bazali. Mokomi ya lisolo yango apesaka mwa makambo ya mikemike, kasi motángi nde asengeli kokanisa makambo mosusu oyo etikali mpo na kokanga ntina na yango.

    Elenge mobali moko azali kotánga buku moko mpe azali kokanisa ete amati likoló ya nyama babengi dinosaure.

     Mama moko na nkombo Laura alobi boye: “Ntango totalaka bavideo to bafilme, tomonaka nde makambo oyo moto mosusu azali kokanisa. Mpo na koloba solo, esepelisaka. Kasi kotánga ekobakisela yo likambo moko ya ntina mingi: kokanisa makambo oyo moto mosusu akomaki.”

  •   Kotánga ebongisaka bomoto ya moto. Ntango bana batángaka, bakolisaka likoki ya kokanisa na likambo moko mpe ndenge ya koluka solisyo na likambo yango. Longola yango, kotánga esalisaka bana bátya makanisi na bango esika moko. Kosala bongo, bakolisaka bizaleli lokola motema molai, komipekisa, mpe komitya na esika ya basusu.

     Komitya na esika ya basusu? Na ndenge nini! Bato ya mayele bamoni ete ntango bana batángaka malɛmbɛmalɛmbɛ mpe na likebi mpenza lisolo moko, yango esalisaka bango báyeba ndenge bato yango bazalaki komiyoka. Mpe yango ekoki kosalisa bango bámitya na esika ya bato oyo bakutanaka na bango mikolo nyonso.

  •   Kotánga etindaka moto akanisa na mozindo. Bato oyo batángaka na likebi batángaka na vitɛsi na bango moko mpe mbala mosusu, kozongela kotánga mbala na mbala soki esengeli, mpo bákanga ntina ya makambo oyo mokomi alingaki koloba. Na ndenge wana nde babosanaka te makambo oyo batángaki mpe bazwelaka yango matomba.​—1 Timote 4:15.

     Tata moko na nkombo Joseph alobi boye: “Ntango ozali kotánga, okoki na pɛtɛɛ nyonso kokanga ntina ya makambo oyo balobi, koyokanisa yango na makambo oyo oyebi, mpe kozwa mateya na yango. Bavideo mpe bafilme esalisaka ntango nyonso te moto akanisa na mozindo.”

 Na mokuse: Atako bavideo mpe bafilme ezali na ntina na yango, bana na yo bakozanga makambo ya ntina mingi soki bazali te kozwa ntango ya kotánga.

 Ndenge ya kosalisa bana mpo bátángaka

  •   Bandá yango ntango bazali naino mike mpenza. Chloe, mama moko ya bana mibali mibale, alobi boye: “Tobandaki kotángela bana na biso ntango bazalaki naino na libumu, mpe tokobaki kotángela bango ntango babotamaki. Tozali na esengo ndenge totikaki te. Sikoyo, kotánga ezali kosepelisa bango mpe ekómá mimeseno mpo na bango.”

     Toli ya Biblia: “Banda bomwana na yo mpenza oyebi makomi mosantu.”​—2 Timote 3:15.

  •   Salá ete ndako na yo ezala esika malamu mpo na kotánga. Okosala bongo soki ozali kotya mikanda ndenge na ndenge mpo na kotánga. Tamara, mama moko ya bana minei alobi boye: “Luká mikanda to bazulunalo oyo bana bakosepela kotánga mpe tyá yango pene na mbeto na bango.”

     Toli ya Biblia: “Bɔkɔlá mwana mobali na kolanda nzela oyo esengeli mpo na ye; ata ntango akokóma mobange akopɛngwa na yango te.”​—Masese 22:6.

  •   Tyá bandelo mpo na kosalela Internet. Tata moko na nkombo Daniel alobi ete, bokoki kotya mpokwa moko oyo moto moko te asengeli kosalela baaparɛyi. Alobi boye: “Atako ezalaka kaka mbala moko na pɔsɔ, tolekisaka mpokwa moko malamu kozanga makelele ya TV. Esalisaka biso tózwa ntango ya kotánga elongo to mpe moto na moto na ndenge na ye.”

     Toli ya Biblia: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—Bafilipi 1:10.

  •   Zalá ndakisa malamu. Karina, mama moko ya bana basi mibale, alobi boye: “Ntango ozali kotángela bana na yo, bɛtá lisolo lokola yo mpe ozalaki wana mpe monisá mayoki oyo ozali na yango mpo na makambo oyo ozali kotánga. Soki olingaka kotánga, bana na yo bakolanda ndakisa na yo.”

     Toli ya Biblia: “Kobá komipesa na kotánga liboso ya bato nyonso.”​—1 Timote 4:13.

Elenge mwasi moko afandi na mabele mpe azali kotala mama, oyo azali kotánga buku moko.

 Bana nyonso te bakolinga kotángaka mingi. Kasi, ndenge ozali kolendisa bango ekoki kopesa bango mposa ya kotánga. David, tata moko ya bana basi mibale, asalelaka likanisi yango mbala na mbala. Alobi boye: “Nazalaki kotánga makambo oyo bana na ngai bazalaki kotánga, yango esalisaki ngai nayeba makambo oyo ezalaki kosepelisa bango mpe ezali kopesa ngai nzela ya kosolola na bango. Tozalaki na ekipi na biso moko ya moke ya batángi. Ezalaki kitoko mpenza!”