Lakisá makambo oyo ezali na kati

Makambo nini Batatoli ya Yehova bakutanaki na yango na eleko ya Banazi?

Makambo nini Batatoli ya Yehova bakutanaki na yango na eleko ya Banazi?

 Batatoli ya Yehova soki 1 500 bakufaki na eloko ya Banazi, na kati na bango bato 35 000 oyo bazalaki kofanda na Allemagne mpe na bikólo oyo Banazi bazalaki kokonza. Ntina oyo bakufaki eyebani te. Lokola bolukiluki ezali kokoba kosalema, bakoki kotya mitángo mpe makambo mikemike mosusu ya sika.

 Ndenge nini bakufaki?

  • Sii oyo Banazi bazalaki kosalela

      Koboma: Batatoli ya Yehova soki 400 babomaki bango na Allemagne mpe na bikólo oyo Banazi bazalaki kokonza. Mingi na bango basambisaki bango na tribinale, bakatelaki bango etumbu ya liwa, mpe bakataki bango motó. Bamosusu babɛtaki bango masasi to bakakisaki bango na nzete kozanga ete básambisa bango.

  •   Babolɔkɔ moko mabe mpenza: Batatoli ya Yehova koleka 1 000 bakufaki na bakaa ya bakangami mpe babolɔkɔ ya Banazi. Bakufaki mpo misala oyo bazalaki kosalisa bango elekaki makasi, kozanga kolya, malili, maladi to kozanga kozwa lisalisi ya monganga. Bamosusu bakufaki mwa moke nsima ya kobima na babolɔkɔ na nsuka ya Etumba ya mibale ya mokili mobimba mpo na ndenge banyokolaki bango mabe na bakaa yango.

  •   Makambo mosusu: Babomaki Batatoli ya Yehova mosusu na bashambre ya bagaze, minganga basalelaki bamosusu mpo na komeka bankisi to mayele ya monganga oyo ebimi sika to mpe babɛtaki bamosusu ntonga ya pwazɔ.

 Mpo na nini banyokolaki bango?

 Banyokolaki Batatoli ya Yehova mpo bazalaki kolanda mateya ya Biblia. Ntango guvɛrnema ya Nazi esɛngaki Batatoli ya Yehova básala makambo oyo Biblia epekisi, Batatoli ya Yehova baboyaki. Baponaki “kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.” (Misala 5:29) Tótalela ntina mibale oyo etindaki bango bázwa ekateli wana.

  1.   Koboya komikɔtisa na makambo ya mokili. Ndenge moko na Batatoli ya Yehova ya bikólo nyonso lelo oyo, Batatoli ya Yehova na eleko ya Banazi baboyaki komikɔtisa na makambo ya politiki. (Yoane 18:36) Yango wana, baboyaki:

  2.   Kotosa makambo oyo bandimaka. Atako bapekisaki bango básala makambo na bango ya losambo, Batatoli ya Yehova bakobaki:

 Profesɛrɛ Robert Gerwarth alobi ete kaka Batatoli ya Yehova nde “banyokolaki bango na Banazi mpo na makambo na bango ya losambo.” a Bato mosusu oyo bakangamaki na bakaa yango bakómaki kokumisa Batatoli ya Yehova mpo na ekateli na bango ya kotikala sembo. Moto moko ya Autriche oyo azalaki na bolɔkɔ, alobaki boye: “Bakendaka bitumba te. Bakolinga kutu báboma bango na esika bango báboma moto mosusu.”

 Epai wapi bakufaki?

  •   Bakaa ya bakangami: Batatoli ya Yehova mingi bakufaki na bakaa ya bakangami. Bakangaki bango na kaa ya Auschwitz, ya Buchenwald, ya Dachau, ya Flossenbürg, ya Mauthausen, ya Neuengamme, ya Niederhagen, ya Ravensbrück, mpe ya Sachsenhausen. Kaka na kaa ya Sachsenhausen, bamoni ete Batatoli ya Yehova soki 200 bakufaki kuna.

  •   Babolɔkɔ: Batatoli ya Yehova mosusu babɛtaki bango. Bamosusu bakufaki mpo na bampota oyo bazokisaki bango ntango bazalaki kotuna bango mituna.

  •   Bisika babomaki bango: Babomaki Batatoli ya Yehova mingimingi na bolɔkɔ ya Berlin-Plötzensee, Brandenburg, mpe na Halle/​Saale. Longola yango, bamoni lisusu bisika mosusu soki 70 epai babomaki Batatoli ya Yehova.

 Mwa ndambo ya baoyo babomamaki

  •  Nkombo: Helene Gotthold

     Esika babomaki ye: Plötzensee (Berlin)

     Helene, oyo azalaki mwasi ya libala mpe mama ya bana mibale, bakangaki ye mbala ebele. Na mobu 1937, babɛtaki ye makasi ntango bazalaki kotuna ye mituna na boye ete bebe oyo azalaki na libumu na ye akufaki. Na mokolo ya 8/12/1944, bakataki ye motó na sii, na bolɔkɔ ya Plötzensee, Berlin.

  •  Nkombo: Gerhard Liebold

     Esika babomaki ye: Brandenburg

     Gerhard, elenge mobali ya mbula 20, bakataki ye motó na mokolo ya 6/05/1943, mbula mibale nsima ya kokata mpe tata na ye motó kaka na bolɔkɔ wana. Na mokanda ya kopesa mbote ya nsuka oyo akomelaki bato ya libota na ye mpe fianse na ye; alobaki boye: “Soki na makasi ya Nkolo te, nalingaki kokoka te kotambola na nzela oyo.”

  •  Nkombo: Rudolf Auschner

     Esika babomaki ye: Halle/​Saale

     Rudolf azalaki na mbula 17 ntango bakataki ye motó na mokolo ya 22/09/1944. Na mokanda ya kopesa mbote ya nsuka oyo akomelaki mama na ye, alobaki boye: “Bandeko mingi baleki na nzela oyo, ngai mpe nalingi koleka wana.”

a Buku Hitler’s Hangman: The Life of Heydrich, lokasa 105.