13 SANZA YA 12, 2018
ÉTATS-UNIS
Batatoli ya Yehova batɛki ndako na bango ya nsuka oyo etikalaki na Brooklyn, na One York Street
Na mokolo ya 12/12/2018, Batatoli ya Yehova batɛki ndako ya nsuka oyo etikalaki, esika Biro monene na bango ya kala oyo ezalaki na Brooklyn, na Fortis Dimbo Acquisition, LLC. Lopango yango ezalaki na balabala One York Street oyo eyebani mpe na nkombo 30 Front Street. Kobanda 2004, Batatoli ya Yehova batɛkaki bandako 37 na kartye yango.
Batatoli ya Yehova basombá lopango yango na 1977 mpe bazalaki kosalela yango lokola parkingi ya mituka mpo na bandeko oyo bazalaki kosala na Biro monene ya kala. Lopango yango oyo batongá te (oyo ezingami na fɔtɔ) ezali na Dumbo, na nsuka ya pont ya Brooklyn mpe ya nzela monene ya Brooklyn-Queens.
Mbula koleka 100, Batatoli ya Yehova bazalaki kobongisa mosala na bango ya koteya bato Biblia na mokili mobimba na Biro monene na bango oyo ezalaki na Brooklyn. Kasi kobanda 2016, Biro yango ekómá nde na Warwick, na etúká ya New York.
Bato oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga: Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000