2 YOANE 1-13; 3 YOANE 1-14–YUDA 1-25
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE |Tosengeli kobunda etumba mpo na kotikala na solo
Yesu apesaki toli oyo: “Bósala makasi mpenza bókɔta na porte ya moke.” (Lk 13:24) Maloba ya Yesu emonisi ete tosengeli kosala makasi mpenza mpo tóndimama na miso ya Nzambe. Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Yuda, leki ya Yesu, akomaki maloba oyo ekokani na oyo Yesu alobaki: “Bóbunda etumba makasi mpo na kondima.” Esɛngi milende mpenza mpo na kosala makambo oyo: