Komonisama ya mobuki mibeko
Paulo alingaki kolobela nini na bavɛrsɛ oyo?
-
“Eloko oyo ezali kokanga nzela” (vs. 6)—Ekoki kozala bantoma
-
“Komonisama” (vs. 6)—Nsima ya liwa ya bantoma, bakristo oyo bapɛngwaki bakómaki koteya mateya ya lokuta polele mpe kosala makambo na bokosi
-
“Libombami ya kobuka mibeko” (vs. 7)—Na ntango ya Paulo, bato bayebaki te soki “Mobuki mibeko” azalaki nani
-
“Mobuki mibeko” (vs. 8)—Lelo oyo ezali bakonzi nyonso ya mangomba ya bokristo
-
“Nkolo Yesu akoboma [mobuki mibeko] . . . na komonisama ya kozala na ye” (vs. 8)—Yesu akomonisa polele ete azali Mokonzi kuna na likoló ntango akopesa mokili ya Satana ezala mpe “mobuki mibeko” bitumbu ya Yehova
Ndenge nini bavɛrsɛ oyo elendisi yo osakolaka na molende mpe obosana te ete mikolo etikali ya kotánga?