MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
Likabo na yo ezali mpenza ya motuya?
Davidi azwaki etinda ya kosalela Yehova etumbelo na esika ya kotutatuta mbuma ya Arauna (2Sa 24:18)
Arauna andimaki kopesa mabele mpe banyama mpo na kotumba mbeka (2Sa 24:21-23)
Davidi alingaki te kopesa mbeka ya biloko oyo amoneli mpasi te (2Sa 24:24, 25; it-1-F lok. 153 par. 3)
Yehova asepelaka mingi ntango topesaka na bolingo na biso moko: ntango, makasi mpe biloko na biso ya kobikela mpo na matomba ya Bokonzi. (w12 15/1 lok. 18 par. 8) Mikano nini okoki komityela mpo na kobakisa lisusu “mbeka ya lisanzoli” oyo opesaka ye?—Ebr 13:15.