Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge ya kosalela eteni “Ndenge ya kobanda lisolo”

Ndenge ya kosalela eteni “Ndenge ya kobanda lisolo”

Kobanda na sanza ya 01/2018, eteni “Ndenge ya kobanda lisolo” etyamaki na ezipeli ya Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo. Ndenge nini tokoki kosalela yango?

Ntango ozali kosala devuare na eteni ya bana-kelasi: Osengeli kosalela motuna, vɛrsɛ, mpe motuna oyo okotika oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Kasi, yango elingi koloba te ete osengeli kosalela kaka maloba oyo basaleli na video mpo na ndenge ya kobanda lisolo. Okoki kosalela lolenge ekeseni, maloba ya ebandeli, kolandisa makanisi ndenge omoni malamu, mpe bongo na bongo. Okoki mpe kopesa moto moko ya mikanda oyo ezali na kati ya bisaleli na biso mpo na koteya, ata soki malako moko ya sikisiki epesami te na eteni yango.

Na mosala ya kosakola: Eteni “Ndenge ya kobanda lisolo” ebongisami mpo na kosalisa biso. Soki moto moko asepeli na nsango na biso mpe alingi koyeba makambo mingi, okoki mbala mosusu kokoba na lisolo, okoki mpe kosalela maloba ya kozongela moto oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Okoki kobongola mwa moke maloba oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo” to kolobela makambo oyo ekeseni mpenza na yango. Motó ya likambo ya sanza eleki to vɛrsɛ mosusu ekobenda mpenza likebi ya bato ya teritware na bino? Na esika ofandi, bato bazali nde kolobela mingi likambo moko to eloko moko oyo ezali kosalema? Ezala mayele nini okopona mpo na kosalela “Ndenge ya kobanda lisolo,” mokano na yo esengeli kozala ya ‘kosala makambo nyonso mpo na nsango malamu, mpo osakola yango elongo na bamosusu.’​—1Ko 9:22, 23.