22-28/06
KOBIMA 1-3
Loyembo 7 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Min. 1)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Nakozala oyo nakozala”: (Min. 10)
[Lakisá video Maloba ya ebandeli na mokanda ya Kobima.]
Kob 3:13—Moize azalaki na mposa ya koyeba makambo mingi na oyo etali moto oyo azalaki na nkombo Yehova (w13 15/3 lok. 25 par. 4)
Kob 3:14—Yehova aponaka kokóma nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa mokano na ye (kr lok. 43, etanda)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 10)
Kob 2:10—Mpo na nini tokoki koloba ete ebongaki mwana mwasi ya Farao azwa Moize mpo na kobɔkɔla ye? (g04-F 8/4 lok. 6 par. 4)
Kob 3:1—Yetro azalaki nganga-nzambe ya ndenge nini? (w04 15/3 lok. 24 par. 4)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela mpo na Yehova Nzambe, mosala ya kosakola to eloko mosusu?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Kob 2:11-25 (th liteya 11)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 3 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Pesá eyano na ntembe moko oyo bato babimisaka mingi na teritware na bino. (th liteya 16)
Kozongela moto: (Eleka min. 4 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya kozongela moto oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Na nsima, pesá nkolo-ndako zulunalo moko ya sika oyo epesi eyano na motuna oyo atunaki. (th liteya 12)
Diskur: (Eleka min. 5 te) w02 15/6 lok. 11 par. 1-4—Motó ya likambo: Eloko oyo eleki biloko ya motuya ya Ezipito. (th liteya 13)
BOMOI YA BAKRISTO
Kómá moninga ya Yehova—Nkombo ya Yehova: (Min. 6) Lisolo na bayangani. Lakisá video. Na nsima, soki likoki ezali, bengisá bana oyo oponaki báya na estrade, mpe tuná bango boye: Nkombo Yehova elimboli nini? Yehova akelaki nini? Ndenge nini Yehova akoki kosalisa yo?
Na Scandinavie, nkombo ya Nzambe ezwi lokumu: (Min. 9) Lisolo na bayangani. Lakisá video. Na nsima, tuná bayangani boye: Mpo na nini kaka mwa ndambo ya bato nde bayebaki nkombo ya Nzambe na siɛklɛ ya 16? Ndenge nini bato bakómaki kosalela nkombo ya Nzambe Yehova na Scandinavie? Mpo na nini osepelaka na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika?
Boyekoli ya Biblia na lisangá : (Min. 30) jy mok. 120
Maloba ya nsuka (Eleka min. 3 te)
Loyembo 104 mpe libondeli