05-11/05
MASESE 12
Loyembo 101 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
1. Mosala makasi ezali na mbano
(Min. 10)
Kobebisa ntango te na kolanda makambo ya mpambampamba (Mas 12:11)
Saláká mosala makasi mpe na molende (Mas 12:24; w16.06 30 par. 5)
Okozwa mbano mpo na mosala na yo ya makasi (Mas 12:14)
LIKANISI: Mosala makasi ekoki kopesa biso esengo soki totye makanisi na matomba oyo ezali komemela basusu.—Mis 20:35; w15 1/2 5 par. 4-6.
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min. 10)
-
Mas 12:16—Ndenge nini etinda oyo ezali na vɛrsɛ yango ekoki kosalisa moto ayeba kokanga motema ntango akutani na botɛmɛli? (ijwyp lisolo 95 par. 10-11)
-
Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Mas 12:1-20 (th liteya 5)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 2) NDAKO NA NDAKO. (lmd liteya 1 pwɛ 4)
5. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Yebisá moto ete olingi koyekola na ye Biblia. (lmd liteya 5 pwɛ 4)
6. Kolandela bokoli
(Min. 3) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Lakisá site Internet na biso epai ya moto oyo azali na bana. (lmd liteya 9 pwɛ 3)
7. Limbolá bindimeli na yo
(Min. 3) Elakiseli. ijwfq lisolo 3—Motó ya likambo: Bokanisaka ete kaka bino nde lingomba ya solo? (lmd liteya 4 pwɛ 3)
Loyembo 21
8. Yehova akoki kosalisa yo olonga mikakatano ya mbongo
(Min. 15) Lisolo na bayangani.
Ozali komitungisa mpo ozali kozwa mosala te, mpo obungisi mosala na yo, mpo mbongo oyo ozali kozwa ezali kokokisa bamposa ya sanza mobimba te, to ozali komitungisa mpo na ntango oyo okokóma mobange? Nkita ya mokili ekoki kobongwana noki mpenza. Kasi, Yehova ayebisi biso ete soki totye ye na esika ya liboso, akokokisa ntango nyonso bamposa na biso—ata soki mbongwana moko esalemi mpe esali ete tózala lisusu na mbongo te.—Nz 46:1-3; 127:2; Mt 6:31-33.
Lakisá VIDEO Yehova asundolaka biso ata moke te. Na nsima tuná bayangani boye:
-
Liteya nini ozwi na lisolo ya ndeko Alvarado?
Tángá 1 Timote 5:8. Na nsima tuná bayangani boye:
-
Ndenge nini vɛrsɛ yango endimisi yo mpenza ete Yehova akokokisa ntango nyonso bamposa ya baoyo basambelaka ye?
Talá mwa mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo ntango ozali komitungisa mpo na makambo ya mbongo:
-
Zalá na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ. Boyá banyongo ebeleebele mpe bisombasomba.—Mt 6:22
-
Poná mosala mpe kelasi oyo ekosalisa yo otya makambo ya elimo na esika ya liboso.—Flp 1:9-11
-
Zalá na komikitisa mpe yebá komesana na mbongwana. Soki ozali lisusu na mosala te, ndimá mosala ya ndenge nyonso oyo ekoki kosalisa yo okokisa bamposa ya libota na yo, ata soki ezali mosala ya lokumu te.—Mas 14:23
-
Zaláká pene ya kokabela basusu, ata soki ozali na biloko mingi te.—Ebr 13:16
9. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) bt mok. 26 par. 1-8, bitanda na nk. 204, 208