Yosua 19:1-51

  • Libula ya libota ya Simeone (1-9)

  • Libula ya libota ya Zebulone (10-16)

  • Libula ya libota ya Isakare (17-23)

  • Libula ya libota ya Ashere (24-31)

  • Libula ya libota ya Nafatali (32-39)

  • Libula ya libota ya Dani (40-48)

  • Libula ya Yosua (49-51)

19  Libula ya mibale oyo ebimaki nsima ya kobwaka mbɛsɛ+ ezalaki mpo na Simeone, mpo na libota ya Simeone+ na kolanda mabota na bango. Mpe libula na bango ezalaki na kati ya teritware ya Yuda.+ 2  Libula na bango ezalaki Beere-sheba+ ná Sheba, Molada,+ 3  Hazare-shuale,+ Bala, Ezeme,+ 4  Eletolade,+ Betule, Horoma, 5  Ziklage,+ Bete-marakabote, Hazare-susa, 6  Bete-lebaote,+ ná Sharuhene: bingumba 13 mpe bamboka na yango. 7  Aine, Rimone, Etere, ná Ashane:+ bingumba minei mpe bamboka na yango, 8  mpe bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya bingumba yango tii na Baalate-beere, elingi koloba Rama ya sudi. Wana nde libula ya libota ya Simeone, na kolanda mabota na bango. 9  Libula ya bakitani ya Simeone ezwamaki na eteni oyo bapesaki Yuda, mpo mokili ya Yuda ezalaki monene mingi mpo na bango. Yango wana bakitani ya Simeone bazwaki mabele na kati ya libula ya Yuda.+ 10  Libula ya misato oyo ebimaki nsima ya kobwaka mbɛsɛ+ ezalaki mpo na bakitani ya Zebulone+ na kolanda mabota na bango, mpe ndelo ya teritware ya libula na bango ekendaki tii na Saride. 11  Ndelo na bango emataki na ngámbo ya wɛsti tii na Mareale mpe ekómaki tii na Dabeshete mpe na nsima ekendaki tii na lobwaku* oyo etalani na Yokoneame. 12  Mpe elongwaki na Saride na ngámbo ya ɛsti, epai moi ebimaka, ekendaki tii na ndelo ya Kislote-tabore mpe ebimaki na Daberate+ mpe emataki tii na Yafia. 13  Mpe banda kuna, ekatisaki na ngámbo ya ɛsti, ekei epai moi ebimaka tii na Gate-hefere,+ tii na Ete-kazine, mpe ebimaki tii na Rimone mpe ekendaki tii na Nea. 14  Mpe na nɔrdi ndelo yango ebalukaki tii na Hanatone, mpe esukaki na Lobwaku ya Ifita-ele, 15  mpe Katate, Nahalale, Shimirone,+ Idala, mpe Beteleme:+ bingumba 12 mpe bamboka na yango. 16  Wana nde teritware ya bakitani ya Zebulone, na kolanda mabota na bango.+ Wana nde bingumba mpe bamboka na yango. 17  Libula ya minei oyo ebimaki nsima ya kobwaka mbɛsɛ+ ezalaki mpo na Isakare,+ mpo na bakitani ya Isakare na kolanda mabota na bango. 18  Mpe ndelo na bango ezalaki na Yizireele,+ Kesulote, Shuneme,+ 19  Hafaraime, Shione, Anaharate, 20  Rabite, Kishione, Ebeze, 21  Remete, Ene-ganime,+ Ene-hada, ná Bete-pazeze. 22  Mpe ndelo yango ekómaki tii na Tabore+ mpe na Shahazuma ná Bete-shemeshe, mpe esukaki na Yordani: bingumba 16 mpe bamboka na yango. 23  Wana nde teritware ya libota ya Isakare na kolanda mabota na bango,+ bingumba mpe bamboka na yango. 24  Libula ya mitano oyo ebimaki nsima ya kobwaka mbɛsɛ+ ezalaki mpo na libota ya Ashere+ na kolanda mabota na bango. 25  Mpe ndelo na bango ezalaki: Helekate,+ Hali, Betene, Akashafe, 26  Alameleke, Amade, ná Mishale. Na ngámbo ya wɛsti ekómaki tii na Karamele+ mpe tii na Shihore-libinate, 27  mpe ezongaki tii na ɛsti na Bete-dagone mpe ekómaki tii na Zebulone mpe na Lobwaku ya Ifita-ele na nɔrdi, tii na Bete-emeke mpe Neiele, mpe ekendaki tii na Kabule na lobɔkɔ ya mwasi, 28  mpe tii na Ebrone, Rehobe, Hamone, mpe Kana tii na Sidone Monene.+ 29  Mpe ndelo yango ezongaki tii na Rama mpe kino na Tire,+ engumba oyo ebatelami makasi. Na nsima, ndelo yango ezongaki tii na Hosa, mpe esukaki na mbu, na etúká oyo Akazibe, 30  Uma, Afeke,+ mpe Rehobe+ ezalaki. Yango nyonso ezalaki bingumba 22 mpe bamboka na yango. 31  Wana nde teritware ya libula ya libota ya Ashere na kolanda mabota na bango.+ Wana nde bingumba na bango mpe bamboka na yango. 32  Libula ya motoba oyo ebimaki nsima ya kobwaka mbɛsɛ+ ezalaki mpo na bakitani ya Nafatali, na kolanda mabota na bango. 33  Ndelo na bango ebandaki na Helefe, banda na nzete monene na Zaananime,+ mpe Adami-nekebe mpe Yabineele tii na Lakume; mpe esukaki na Yordani. 34  Ndelo yango ezongaki na ngámbo ya wɛsti tii na Azenote-tabore; elongwaki kuna mpe ekendaki tii na Hukoke mpe ekómaki na Zebulone na sudi. Na wɛsti, ndelo yango ekómaki tii na Ashere, mpe na ɛsti ekómaki tii na Yuda, na Yordani. 35  Mpe bingumba oyo ebatelami makasi ezalaki: Zidime, Zere, Hamate,+ Rakate, Kinerete, 36  Adama, Rama, Hazore,+ 37  Kedeshe,+ Edrei, Ene-hazore, 38  Yirone, Migidala-ele, Horeme, Bete-anate ná Bete-shemeshe:+ bingumba 19 mpe bamboka na yango. 39  Wana nde teritware ya libota ya Nafatali na kolanda mabota na bango,+ bingumba mpe bamboka na yango. 40  Libula ya nsambo oyo ebimaki nsima ya kobwaka mbɛsɛ+ ezalaki mpo na libota ya Dani,+ na kolanda mabota na bango. 41  Mpe ndelo ya libula na bango ezalaki: Zora,+ Eshetaole, Ire-shemeshe, 42  Shaalabine,+ Aiyalone,+ Itila, 43  Elone, Timina,+ Ekrone,+ 44  Eleteke, Gibetone,+ Baalate, 45  Yehude, Bene-berake, Gate-rimone,+ 46  Me-yarakone, ná Rakone, mpe ndelo ya teritware yango etalanaki na Yope.+ 47  Kasi teritware ya libota ya Dani ezalaki moke mingi mpo na bango.+ Yango wana bamataki mpo na kobundisa Lesheme;+ bazwaki yango mpe babomaki bato na yango na mopanga. Na nsima, bakómisaki yango mboka na bango mpe bafandaki kuna. Balongolaki yango nkombo ya Lesheme mpe bapesaki yango nkombo Dani, nkombo ya nkɔkɔ na bango.+ 48  Oyo nde libula ya libota ya Dani na kolanda mabota na bango. Wana nde bingumba mpe bamboka na yango. 49  Bongo basilisaki kokabola mokili yango na bateritware lokola libula. Na nsima, Bayisraele bapesaki Yosua, mwana ya Nunu, libula na mokili na bango. 50  Na etinda ya Yehova, bapesaki ye engumba oyo asɛngaki, elingi koloba: Timinate-sera,+ na etúká ya ngombangomba ya Efraime, mpe atongaki lisusu engumba yango mpe afandaki kuna. 51  Wana nde bateritware oyo nganga-nzambe Eleazare, Yosua mwana ya Nunu, mpe bankumu ya batata ya mabota ya Yisraele bakabolaki+ na nzela ya mbɛsɛ na Shilo,+ liboso ya Yehova, na ekɔtelo ya hema ya kokutana.+ Na ndenge wana nde basilisaki kokabola mokili yango.

Maloba na nse

To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.