Zekaria 1:1-21
1 Na sanza ya mwambe, na mbula ya mibale ya Dariuse,+ liloba ya Yehova eyelaki Zekaria+ mwana ya Berekia mwana ya mosakoli Ido+ ete:
2 “Yehova ayokelaki batata na bino nkanda—nkanda makasi mpenza.+
3 “Mpe okoloba na bango ete: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “‘Bózongela ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, ‘mpe ngai nakozongela bino,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo.”’
4 “‘Bókóma lokola batata na bino+ te oyo basakoli ya kala babelelaki bango+ ete: “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bózonga, nabondeli bino, bólongwa na banzela na bino ya mabe mpe na misala na bino ya mabe.’”’+
“‘Kasi bayokaki te, mpe batyelaki ngai ata likebi te,’+ yango nde liloba ya Yehova.
5 “‘Bongo batata yango na bino, bazali wapi?+ Bongo basakoli+ yango, bakobaki nde kozala na bomoi libela?
6 Nzokande, na oyo etali maloba na ngai mpe malako na ngai oyo napesaki mitindo na basaleli na ngai, basakoli,+ yango ekómelaki nde batata na bino te?’+ Yango wana, babongwanaki mpe balobaki ete: ‘Oyo Yehova ya mampinga akanisaki kosalela biso,+ na kolanda banzela na biso mpe misala na biso, yango nde asalelaki biso.’”+
7 Na mokolo ya ntuku mibale na minei (24) ya sanza ya zomi na moko, elingi koloba, sanza ya Shebate, na mbula ya mibale ya Dariuse,+ liloba ya Yehova eyelaki Zekaria+ mwana ya Berekia mwana ya mosakoli Ido+ ete:
8 “Namonaki na butu, mpe talá! moto+ moko amati na mpunda ya motane,+ mpe atɛlɛmaki nyɛɛ na kati ya banzete ya mirte+ oyo ezalaki na esika mozindo; mpe bampunda ya motane, ya motane-ngwaa, mpe ya mpɛmbɛ ezalaki nsima na ye.”+
9 Bongo nalobaki ete: “Nkolo na ngai, baoyo nde banani?”+
Na yango, anzelu oyo azalaki kosolola na ngai alobaki+ na ngai ete: “Ngai moko nakomonisa yo soki baoyo bazali banani.”
10 Bongo moto oyo atɛlɛmaki nyɛɛ na kati ya banzete ya mirte ayanolaki mpe alobaki ete: “Baoyo nde bato Yehova atindi mpo na kotambolatambola na mabele.”+
11 Mpe bango bayanolaki anzelu ya Yehova oyo atɛlɛmaki na kati ya banzete ya mirte ete: “Totambolitamboli na mabele,+ mpe talá! mabele mobimba efandi nyɛɛ mpe ezali na yikiyiki te.”+
12 Bongo anzelu ya Yehova ayanolaki ete: “Ee Yehova ya mampinga, tii ntango nini yo moko okoyokela Yerusaleme mpe bingumba ya Yuda mawa te,+ oyo okweiselaki makaneli na yo mbula ntuku nsambo (70) oyo?”+
13 Mpe Yehova ayanolaki anzelu oyo azalaki kosolola na ngai, na maloba ya malamu, maloba ya kobɔndisa;+
14 mpe anzelu oyo azalaki kosolola na ngai alobaki na ngai lisusu ete: “Gangá ete: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Nayoki zuwa mpo na Yerusaleme mpe mpo na Siona, zuwa moko monene.+
15 Nazali koyokela bikólo oyo efandi kimya+ nkanda, nkanda moko monene; mpamba te ngai nayokaki nkanda kaka mwa moke,+ kasi bango bapesaki mabɔkɔ mpo na koyeisa likama.”’+
16 “Yango wana, talá oyo Yehova alobi: ‘“Nakozonga mpenza na Yerusaleme na motema mawa.+ Ndako na ngai moko ekotongama wana,”+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, “mpe nsinga mpenza ya komeka ekosembolama likoló ya Yerusaleme.”’+
17 “Gangá lisusu ete: ‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Bingumba na ngai ekotondana lisusu na bolamu;+ mpe Yehova akoyokela lisusu Siona mawa+ mpe akopona lisusu Yerusaleme.”’”+
18 Mpe natombolaki miso na ngai mpe namonaki; mpe talá! maseke minei.+
19 Bongo nalobaki na anzelu oyo azalaki kosolola na ngai ete: “Oyo ezali nini?” Mpe ye alobaki na ngai ete: “Oyo ezali maseke oyo epalanganisaki Yuda,+ Yisraele+ ná Yerusaleme.”+
20 Lisusu Yehova amonisaki ngai bato minei oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ.
21 Yango wana, nalobaki ete: “Bango bayei kosala nini?”
Mpe alobaki lisusu ete: “Oyo ezali maseke+ oyo epalanganisaki Yuda bongo moto ata moko te atombolaki motó na ye; mpe oyo mosusu ekoya mpo na kolɛngisa yango, mpo na kokweisa maseke ya bikólo oyo ezali kotombolela mokili ya Yuda liseke, mpo na kopalanganisa yango.”+