Nzembo 96:1-13

96  Bóyembela Yehova loyembo ya sika.+Bóyembela Yehova, bino nyonso bato ya mabele.+   Bóyembela Yehova, bópambola nkombo na ye.+Mokolo na mokolo, bósakola nsango malamu ya lobiko na ye.+   Bósakola nkembo na ye na kati ya bikólo,+Misala na ye ya kokamwa+ na kati ya bato ya bikólo nyonso.   Mpo Yehova azali monene+ mpe asengeli kosanzolama mingi mpenza.Azali kobangisa koleka banzambe mosusu nyonso.+   Mpo banzambe nyonso ya bato ya bikólo bazali banzambe ya mpambampamba;+Kasi Yehova asalá likoló.+   Lokumu mpe nkembo ezali liboso na ye;+Bokasi mpe kitoko ezali na esika mosantu na ye.+   Ee bino mabota ya bato ya bikólo, bópesa Yehova,+Bópesa Yehova nkembo mpe bóndima bokasi na ye.+   Bópesa Yehova nkembo oyo ebongi na nkombo na ye;+Bómema likabo mpe bókɔta na mapango na ye.+   Bógumbamela Yehova na bilamba ya monzɛlɛ ya bosantu;+Bólɛnga* liboso na ye, bino nyonso bato ya mabele.+ 10  Bóloba na kati ya bikólo ete: “Yehova ye moko akómi mokonzi.+Mabele oyo ebotaka epikami mpe makasi, boye ekoki kotengatenga te.+Akosamba likambo ya bato na bosembo.”+ 11  Likoló esepela, mpe mabele ezala na esengo.+Mbu enguluma lokola nkake mpe biloko oyo etondi kuna.+ 12  Esobe ezala na nsai monene ná biloko nyonso oyo ezali kuna.+Se na ntango yango, banzete nyonso ya zamba eganga na esengo+ 13  Liboso ya Yehova. Mpo ayei;+Mpamba te ayei kosambisa mabele.+Na boyengebene, akosambisa mabele oyo ebotaka+Mpe na bosembo na ye,+ bato ya bikólo.

Maloba na nse

Lil., “Bózala na mpasi makasi.”