Nzembo 79:1-13

Mondule ya Asafe. 79  Ee Nzambe, bikólo bakɔti na libula na yo;+Bakómisi tempelo na yo mosantu mbindo;+Bakómisi Yerusaleme libondo ya bitiká.+   Bapesi bandɛkɛ ya likoló bibembe ya basaleli na yo mpo ezala bilei na yango,+Mosuni ya bato na yo ya sembo na banyama ya zamba ya mabele.+   Basopi makila na bango lokola maiBipai nyonso na Yerusaleme, mpe moto ya kokunda bango azali te.+   Tokómi eloko ya nsɔni na miso ya bato oyo bafandi penepene na biso,+Eloko ya kotyola mpe ya kosɛka na miso ya baoyo bazali zingazinga na biso.+   Ee Yehova, kino ntango nini okosilika? Mpo na seko?+Kino ntango nini molende na yo ekopela lokola mɔtɔ?+   Sopelá bikólo oyo eyebi yo te nkɛlɛ na yo,+Mpe makonzi oyo ebeleli nkombo na yo te.+   Mpo balei Yakobo,+Mpe batiki esika na ye ya kofanda mpamba.+   Kokanisela biso mabunga ya bankɔkɔ na biso te.+Salá noki! Misala na yo ya motema mawa eyela biso,+Mpo tokómi mpenza babola koleka.+   Ee Nzambe ya lobiko na biso, salisá biso,+Mpo na nkembo ya nkombo na yo;+Bikisá biso mpe zipá masumu na biso mpo na nkombo na yo.+ 10  Mpo na nini bikólo báloba ete: “Nzambe na bango azali wapi?”+Eyebana na kati ya bikólo na miso na biso+Mabe oyo okozongisa mpo na makila ya basaleli na yo oyo esopamaki.+ 11  Kokimela ya moto ya bolɔkɔ ekóma liboso na yo.+Na kolanda bonene ya lobɔkɔ na yo, batelá baoyo baponami mpo na kobomama.+ 12  Mpe zongiselá bato oyo bafandi penepene na biso mbala nsambo na ntolo na bango+Kosambwisa oyo basambwisi yo, Ee Yehova.+ 13  Biso bato na yo mpe etonga ya esika na yo ya koleisa bibwɛlɛ matiti,+Tokopesa yo matɔndi mpo na ntango oyo etyami ndelo te;Tokosakola lisanzoli na yo libota na libota.+

Maloba na nse