Nzembo 77:1-20
Epai ya mokambi ya nzembo na Yedutune. Ya Asafe.+ Mondule.
77 Na mongongo na ngai, nakobelela Nzambe ye moko,+Na mongongo na ngai nakobelela Nzambe, mpe ye akotyela ngai mpenza litoi.+
2 Na mokolo ya mpasi na ngai naluki Yehova ye moko.+Na butu lobɔkɔ na ngai esembolami mpe esili makasi te;Molimo na ngai eboyi kobɔndisama.+
3 Nakokanisa Nzambe mpe nakozala na yikiyiki;+Nakomibanzabanza, mpo elimo na ngai elɛmba.+ Sela.
4 Osimbi ntɔkɔ ya miso na ngai;+Nakómi kotungisama, mpe nakoki koloba te.+
5 Nakanisi mikolo ya kala,+Bambula ya kala oyo etyami ndelo te.
6 Nakokanisa na butu miziki ya ebɛtɛlo na ngai ya bansinga;+Na motema na ngai nakomibanzabanza,+Mpe elimo na ngai ekoluka malamumalamu.
7 Yehova akobwaka nde mpo na libela,+Mpe akosepela nde lisusu te?+
8 Motema boboto na ye esili nde seko?+Liloba na ye ekómi eloko mpamba libota na libota?+
9 Nzambe abosani nde komonisa mawa,+To aboyi nde komonisa makambo ya motema mawa na ye mpo na nkanda?+ Sela.
10 Mpe nasengeli nde ntango nyonso koloba ete: “Talá eloko oyo ezali kotɔbɔla ngai,+Kobongwana ya lobɔkɔ ya mobali ya Oyo-Aleki-Likoló”?+
11 Nakokanisa misala ya Yah;+Mpo nakokanisa misala na yo ya kokamwa ya ntango ya kala.+
12 Mpe nakomanyola likoló ya mosala na yo nyonso,+Mpe nakotya likebi na misala na yo.+
13 Ee Nzambe, nzela na yo ezali na esika mosantu.+Nani azali Nzambe monene lokola Nzambe?+
14 Yo ozali Nzambe ya solo, oyo asalaka makambo na ndenge ya kokamwa.+Kati na bato ya bikólo osali ete makasi na yo eyebana.+
15 Na lobɔkɔ na yo obikisi bato na yo,+Bana ya Yakobo mpe ya Yozefe. Sela.
16 Ee Nzambe, mai emoni yo,Mai emoni yo; yango ebandaki koyoka mpasi makasi.+Lisusu, mai mozindo ebandaki koningana.+
17 Mapata esopi mai na konguluma lokola nkake;+Likoló oyo etondi na mapata eyokisi lokito.Lisusu, makula na yo ezalaki kokende epai na epai.+
18 Lokito ya nkake na yo ezalaki lokola bayiká ya makalo;+Mikalikali engɛngisi mabele oyo ebotaka;+Mabele eninganaki mpe ebandaki kolɛnga.+
19 Nzela na yo ezalaki na mbu,+Mpe esika olekaka ezalaki na mai mingi;Mpe makolo na yo eyebanaki te.
20 Okambaki bato na yo kaka lokola etonga,+Na lobɔkɔ ya Moize ná Arona.+