Nzembo 44:1-26

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora.+ Maskile. 44  Ee Nzambe, toyoki na matoi na biso,Bankɔkɔ na biso bayebisi biso+Mosala oyo osalaki na mikolo na bango,+Na mikolo ya kala.+   Yo moko na lobɔkɔ na yo obenganaki mpenza bikólo,+Mpe olonaki bango na esika ya bikólo yango.+Obandaki kobuka bituluku ya bato ya bikólo mpe kotika yango ekende.+   Mpo bazwaki mokili na mopanga na bango moko te,+Mpe lobɔkɔ na bango moko te nde ememelaki bango lobiko.+Kasi ezalaki lobɔkɔ na yo ya mobali ná lobɔkɔ na yo+ mpe pole ya elongi na yo,Mpamba te osepelaki na bango.+   Ee Nzambe, yo moko ozali Mokonzi na ngai.+Pesá mitindo mpo na lobiko monene ya Yakobo.+   Na lisalisi na yo tokotindika banguna na biso;+Na nkombo na yo tokonyata baoyo bazali kotɛlɛmɛla biso.+   Mpo nazalaki kotyela litimbo na ngai motema te+Mpe mopanga na ngai nde ezalaki kobikisa ngai te.+   Mpo obikisaki biso na mabɔkɔ ya banguna na biso,+Mpe baoyo bazali koyina biso makasi oyokisa bango nsɔni.+   Tokopesa Nzambe masanzoli mokolo mobimba,+Mpe tokokumisa nkombo na yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Sela.   Kasi sikoyo obwaki biso mpe ozali kaka kosambwisa biso,+Mpe ozali kobima te elongo na mampinga na biso.+ 10  Ozali kaka kozongisa biso nsima liboso ya monguna,+Mpe bato oyo bazali koyina biso makasi bamipunzeli biloko.+ 11  Okabi biso lokola bampate, lokola eloko moko ya kolya,+Mpe opalanganisi biso na kati ya bikólo.+ 12  Otɛki bato na yo mpo na eloko oyo ezali na motuya te,+Mpe ntalo oyo otɛkaki bango epesi yo bomɛngo te. 13  Okómisi biso eloko ya nsɔni na miso ya bato oyo bafandi penepene na biso,+Eloko ya kotyola mpe ya kosɛka na miso ya baoyo nyonso bazali zingazinga na biso.+ 14  Okómisi biso liloba ya lisese na kati ya bikólo,+Koningisama ya motó na kati ya bituluku ya bato ya bikólo.+ 15  Mokolo mobimba kosambwa na ngai ezali liboso na ngai,Mpe nsɔni ya elongi na ngai ezipi ngai,+ 16  Mpo na mongongo ya moto oyo azali kotuka mpe azali koloba mabe,Mpo na monguna mpe moto oyo azali kozongisa mabe.+ 17  Nyonso wana nde ekómeli biso, mpe tobosani yo te,+Mpe na kondimana na yo,+ tosali makambo na bokosi te. 18  Motema na biso ezongi nsima te na kozanga bosembo,+Mpe matambe na biso epɛngwi na nzela na yo te.+ 19  Mpo otuti biso na esika ya bambulú,+Mpe ozali kozipa biso na molili makasi.+ 20  Soki tobosani nkombo ya Nzambe na biso,To totandeli nzambe mopaya mabɔkɔ na biso,+ 21  Nzambe ye moko akolukaluka yango te?+Mpo ayebi basekele ya motema.+ 22  Kasi mpo na yo tobomami mokolo mobimba;Totalelami lokola bampate ya koboma.+ 23  Lamuká. Ee Yehova, mpo na nini ozali kaka kolala?+Lamuká. Kobwaka biso mpo na libela te.+ 24  Mpo na nini ozali kaka kobomba elongi na yo?Mpo na nini ozali kobosana mpasi na biso mpe monyoko na biso?+ 25  Mpo molimo na biso egumbami tii na putulu;+Libumu na biso ekangami na mabele. 26  Tɛlɛmá mpo na kosunga biso+Mpe sikolá biso mpo na motema boboto na yo.+

Maloba na nse