Nzembo 38:1-22

Mondule ya Davidi, mpo na kokanisa. 38  Ee Yehova, kopamela ngai na nkanda na yo te,+Mpe kosembola ngai na nkɛlɛ na yo te.+   Mpo makula na yo ekɔti mpenza na kati na ngai,+Mpe lobɔkɔ na yo ekiteli ngai.+   Eteni ata moko ya malamu ezali te na nzoto na ngai mpo na makaneli na yo.+Mikuwa na ngai ezali na kimya te mpo na lisumu na ngai.+   Mpo mabunga na ngai eleki na motó na ngai;+Lokola mokumba moko ya kilo, yango eleki ngai na kilo.+   Bampota na ngai ekómi kolumba nsolo mabe, ebimisi mafina,Mpo na bozoba na ngai.+   Nabulungani, nagumbami koleka ndelo;+Mokolo mobimba natamboli epai na epai na mawa.+   Mpo bangɛi na ngai ezali kozika bipai nyonso,Mpe eteni ata moko ya malamu ezali te na nzoto na ngai.+   Nasili makasi mpe natutami koleka ndelo;Nagangi mpo na komilelalela ya motema na ngai.+   Ee Yehova, mposa na ngai nyonso ezali liboso na yo,Mpe kokimela na ngai ebombami liboso na yo te.+ 10  Motema na ngai ebɛti makasimakasi, nguya na ngai etiki ngai,Mpe pole ya miso na ngai ezali elongo na ngai lisusu te.+ 11  Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai, batɛlɛmi mosika na bolɔzi na ngai,+Mpe bato oyo bayebani na ngai malamumalamu batɛlɛmi mosika.+ 12  Kasi baoyo balukaka molimo na ngai bazali kotya mitambo,+Mpe baoyo basalaka mpo likama ezwa ngai balobeli mikakatano,+Mpe mokolo mobimba, bazali kaka koloba bokosi na nse nse.+ 13  Ngai nazalaki koyoka te lokola moto oyo akufá matoi;+Mpe nazalaki kofungola monɔkɔ na ngai te lokola moto oyo alobaka te.+ 14  Mpe nakómaki lokola moto oyo azalaki koyoka te,Mpe na monɔkɔ na ngai, maloba ya kozongisela bango ezalaki te. 15  Mpo nazelaki nde yo, Ee Yehova;+Yo moko oyanolaki, Ee Yehova Nzambe na ngai.+ 16  Mpo nalobaki ete: “Soki te bakosepela mpo na ngai;+Ntango lokolo na ngai ekotengatenga,+ bakotombolela ngai mpenza mapeka.”+ 17  Mpo etikalaki moke natɛnguma,+Mpe mpasi na ngai ezalaki liboso na ngai ntango nyonso.+ 18  Mpo nabandaki koyebisa libunga na ngai;+Nabandaki komitungisa mpo na lisumu na ngai.+ 19  Mpe banguna na ngai oyo bazali na bomoi bakómaki makasi,+Mpe baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba bakómaki mingi.+ 20  Mpe bazalaki kozongisela ngai mabe mpo na malamu;+Bazalaki kotɛlɛmɛla ngai mpo nazalaki kolanda oyo ezali malamu.+ 21  Ee Yehova, kotika ngai te.Ee Nzambe na ngai, kozala mosika na ngai te.+ 22  Salá noki osunga ngai,+Ee Yehova lobiko na ngai.+

Maloba na nse