Masese 19:1-29
19 Moto oyo akelelá, oyo azali kotambola na kozanga mbeba, azali malamu+ koleka ye oyo azali na mbɛbu ya maloba mbilingambilinga, mpe ye oyo azali zoba.+
2 Lisusu, ezali malamu te ete molimo ezanga boyebi,+ mpe ye oyo azali kosala mbangumbangu na makolo na ye azali kosala lisumu.+
3 Bozoba ya moto ya mabele nde ebulunganisaka nzela na ye,+ bongo motema na ye ekómaka kosilikela Yehova.+
4 Bomɛngo nde ebakisaka baninga mingi,+ kasi ye oyo azangá akabwanaka na moninga na ye.+
5 Motatoli ya lokuta akozanga etumbu te,+ mpe ye oyo asopasopaka makambo ya lokuta akobika te.+
6 Bato mingi bakitisaka moto ya lokumu motema,+ mpe moto nyonso azalaka moninga ya moto oyo apesaka makabo.+
7 Bandeko ya moto oyo akelelá bango nyonso bayini ye.+ Baninga na ye mpenza bakimi ye kutu mosika koleka!+ Azali kolandalanda bango na makambo ya koloba; bango bazali te.+
8 Ye oyo azali kozwa motema+ azali kolinga molimo na ye moko. Ye oyo azali kobatela bososoli akozwa bolamu.+
9 Motatoli ya lokuta akozanga etumbu te,+ mpe ye oyo asopasopaka makambo ya lokuta akokufa.+
10 Bomɛngo ebongi na zoba te.+ Ekozala kutu boni soki mosaleli ayangeli bankumu!+
11 Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye,+ mpe kitoko na ye ezali ete alimbisaka likambo oyo ebuki mibeko.+
12 Nkɛlɛ ya mokonzi ezali konguluma lokola oyo ya mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki,+ kasi soki asepeli na moto ezali lokola mamwɛ likoló ya milona.+
13 Mwana ya zoba nde mikakatano mpo na tata na ye,+ mpe kowelana ya mwasi ezali lokola nsamba oyo ezali kotanga, oyo ezali kobengana yo.+
14 Libula oyo eutaka na batata nde ndako ná bomɛngo,+ kasi mwasi ya mayele autaka na Yehova.+
15 Gɔigɔi epesaka mpɔngi makasi,+ mpe molimo ya gɔigɔi ekufaka nzala.+
16 Ye oyo abatelaka mitindo azali kobatela molimo na ye;+ ye oyo azali kotyola banzela na ye akobomama.+
17 Ye oyo amoniselaka moto oyo azangá boboto azali kodefisa Yehova,+ mpe Ye akozongisela ye ndenge na ye wana ya kosala.+
18 Pesá mwana na yo etumbu wana elikya ezali naino;+ mpe molimo na yo elinga liwa na ye te.+
19 Ye oyo azalaka na nkɛlɛ makasi akofuta lomande;+ mpo soki obikisi ye, okozongela kosala yango mbala na mbala.+
20 Yoká toli mpe ndimá disiplini,+ mpo ozala na bwanya na bomoi na yo na mikolo oyo ezali koya.+
21 Myango ebele ezalaka na motema ya moto,+ kasi mokano ya Yehova nde ekotɛlɛma.+
22 Eloko ya kitoko epai ya moto ya mabele ezali motema boboto na ye;+ mpe moto oyo akelelá azali malamu koleka moto ya lokuta.+
23 Kobanga Yehova ememaka na bomoi,+ mpe moto akolala na butu atondi;+ mabe ekoyela moto te.+
24 Moto ya gɔigɔi akɔtisi lobɔkɔ na ye na kibakuli ya fɛti;+ azali kokoka kozongisa yango ata na monɔkɔ na ye te.+
25 Osengeli kobɛta mosɛki,+ mpo moto oyo azangi mayele akóma ekɛngɛ;+ mpe esengeli kopamela moto ya mayele, mpo asosola boyebi.+
26 Ye oyo azali komonisa tata mpasi mpe azali kobengana mama+ azali mwana oyo azali kosala makambo ya nsɔni mpe ya kosambwa.+
27 Mwana na ngai, tiká koyoka disiplini mpe ekozala mpo na yo kopɛngwa na maloba ya boyebi.+
28 Motatoli ya mpamba atyolaka bosembo,+ mpe monɔkɔ ya bato mabe emɛlaka makambo oyo eyokisaka mpasi.+
29 Bitumbu ebongisami mpenza mpo na basɛki,+ mpe kobɛtama mpo na mokɔngɔ ya bazoba.+