Luka 10:1-42

10  Nsima ya makambo wana Nkolo aponaki bayekoli mosusu ntuku nsambo (70)+ mpe atindaki bango mibalemibale+ liboso na ye na engumba nyonso mpe na esika nyonso epai ye moko asengelaki kokóma.  Bongo abandaki koloba na bango ete: “Ya solo, mbuma ya kobuka+ ezali mingi, kasi basali+ bazali moke. Yango wana, bósɛnga+ Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali+ na mosala na ye ya kobuka mbuma.  Bókende. Talá! Nazali kotinda bino lokola bana-mpate+ na kati ya bambwa ya zamba.  Bómema pɔtɔmɔni te, saki ya bilei te,+ sandale te, mpe bóyambana na moto te+ na nzela mpo na kopesa ye mbote.  Esika nyonso bokokɔta na ndako bóloba libosoliboso ete: ‘Kimya ezala na ndako oyo.’+  Mpe soki moninga ya kimya azali wana, kimya na bino ekofanda likoló na ye.+ Kasi soki azali te, yango ekozongela bino.+  Bongo bófanda na ndako wana,+ bólya mpe bómɛla biloko oyo bakopesa bino,+ mpo mosali asengeli kozwa lifuti na ye.+ Bólongwa na ndako moko mpo na kokende na ndako mosusu te.*+  “Lisusu, esika nyonso oyo bokokɔta na engumba mpe oyo bakoyamba bino, bólya biloko oyo bakopesa bino,  mpe bóbikisa+ bato ya maladi na engumba yango, mpe bókoba koyebisa bango ete: ‘Bokonzi+ ya Nzambe ekómi pene na bino.’ 10  Kasi esika nyonso oyo bokokɔta na engumba mpe oyo bakoyamba bino te,+ bóbima na babalabala na yango ya minene mpe bóloba ete: 11  ‘Tozali kopupolela bino ata putulu oyo ekangamaki na makolo na biso na engumba na bino.+ Atako bongo, bósimba likambo oyo: bokonzi ya Nzambe ekómi pene.’ 12  Nazali koyebisa bino ete: Na mokolo yango, Sodoma+ ekozala kutu mwa malamu koleka engumba wana. 13  “Mawa na yo, Korazine!+ Mawa na yo, Betesaida!+ mpamba te soki misala ya nguya oyo esalemaki epai na bino esalemaka na Tire mpe na Sidone, mbɛlɛ babongolá motema banda kala balati ngɔtɔ mpe bafandi na putulu ya mɔtɔ.+ 14  Yango wana, na Mokolo ya Kosambisama, Tire ná Sidone ekozala kutu mwa malamu koleka bino.+ 15  Mpe yo, Kapernaume, mbala mosusu okotombwama tii na likoló?+ Okokita tii na Nkunda!*+ 16  “Moto oyo ayoki+ bino ayoki mpe ngai. Mpe moto oyo atyoli bino atyoli mpe ngai. Mpe moto oyo atyoli ngai atyoli+ mpe moto oyo atindaki ngai.” 17  Bongo bayekoli yango ntuku nsambo (70) bazongaki na esengo mpe balobaki: “Nkolo, ata bademo bazali kotosa+ biso ntango tozali kosalela nkombo na yo.” 18  Bongo alobaki na bango ete: “Namoni Satana auti na likoló akwei+ lokola mokalikali. 19  Talá! Napesi bino bokonzi ya konyata banyoka+ mpe bankotó,+ mpe bokonzi likoló ya nguya nyonso ya monguna,+ mpe eloko moko ekosala bino mabe ata moke te. 20  Atako bongo, bósepela na likambo oyo te ete bilimo ezali kotosa bino, kasi bósepela nde mpo bankombo+ na bino ekomami na likoló.” 21  Na ngonga wana mpenza atondaki na esengo+ mpe na elimo santu mpe alobaki ete: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabele, mpo obombeli bato ya bwanya+ mpe bato ya mayele makambo oyo malamumalamu, mpe omonisi yango bana mike. Ya solo, Ee Tata, mpo omonaki malamu kosala bongo. 22  Tata na ngai apesi ngai biloko nyonso,+ mpe moto moko te ayebi Mwana longola kaka Tata;+ mpe moto moko te ayebi Tata longola kaka Mwana+ ná moto oyo Mwana asepeli komonisa ye Tata.” 23  Bongo ntango bayekoli na ye bazalaki bango moko, alobaki na bango ete: “Esengo na miso oyo ezali komona makambo oyo bino bozali komona.+ 24  Mpo nazali koloba na bino, Basakoli mingi mpe bakonzi mingi bazalaki na mposa ya komona+ makambo oyo bino bozali komona kasi bamonaki yango te, mpe bazalaki na mposa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka kasi bayokaki yango te.” 25  Nzokande, talá! moto moko oyo ayebaki Mibeko malamumalamu+ atɛlɛmaki mpo ameka ye, mpe alobaki ete: “Moteyi, nasala nini mpo nazwa libula ya bomoi ya seko?”+ 26  Alobaki na ye ete: “Bakomá nini na Mibeko?+ Otángaka nini?” 27  Ye azongisaki ete: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso,’+ mpe, ‘mozalani na yo lokola yo moko.’”+ 28  Alobaki na ye ete: “Oyanoli malamu; ‘kobá kosala bongo mpe okozwa bomoi.’”+ 29  Kasi lokola moto yango alingaki komimonisa moyengebene, alobaki na Yesu ete: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?”+ 30  Yesu azongisaki ete: “Moto moko autaki na Yerusaleme azali kokita na Yeriko mpe akutanaki na miyibi, babɔtɔlaki ye biloko nyonso, babɛtibɛti ye, bakei batiki ye pene na liwa. 31  Nzokande nganga-nzambe moko azalaki kokita na nzela yango kaka boye, mpe ntango amonaki ye, alekaki na ngámbo mosusu.+ 32  Ndenge moko mpe, ntango Molevi moko akitaki na esika yango mpe amonaki ye, ye mpe alekaki na ngámbo mosusu.+ 33  Kasi Mosamaria+ moko azalaki koleka na nzela yango akómaki pene na ye mpe, ntango amonaki ye, ayokaki mawa. 34  Bongo apusanaki pene na ye, akangi bampota na ye mpe asopeli yango mafuta ná vinyo.+ Na nsima, amatisaki ye na nyama na ye mpe amemaki ye na ndako oyo bapaya bazalaki kolala mpe asalisaki ye. 35  Mpe na mokolo oyo elandaki abimisaki denari mibale, apesaki yango mobateli ya ndako oyo bapaya bazalaki kolala, mpe alobaki ete: ‘Salisá ye, mpe nyonso oyo okobimisa likoló ya oyo, nakozongisela yo yango ntango nakozonga awa.’ 36  Mpo na yo, nani na kati na bango misato amonisi ete azali mozalani+ ya moto oyo akutanaki na miyibi?” 37  Ye alobaki ete: “Oyo amoniselaki ye motema mawa.”+ Bongo Yesu alobaki na ye: “Kende mpe yo moko salá+ se bongo.” 38  Nzokande ntango bazalaki kokende akɔtaki na mboka moko boye. Awa mwasi moko nkombo na ye Marta+ ayambaki ye na ndako. 39  Mwasi yango azalaki mpe na ndeko na ye ya mwasi na nkombo Maria, oyo afandaki na makolo+ ya Nkolo mpe azalaki koyoka liloba na ye. 40  Nzokande, Marta azalaki komitungisa+ na ebele ya misala oyo azalaki kosala. Bongo ayaki pene mpe alobaki ete: “Nkolo, ezali kosala yo eloko te ndenge ndeko na ngai atiki ngai moko nasalaka misala?+ Yebisá ye aya kosalisa ngai.” 41  Nkolo azongiselaki ye ete: “Marta, Marta, ozali komitungisa+ mpe komiyokisa mpasi mpo na biloko mingi.+ 42  Nzokande, kaka biloko moke+ nde ezali na ntina, to moko kaka. Maria ye aponi eloko oyo ezali malamu,+ mpe bakobɔtɔla ye yango te.”

Maloba na nse

Elingi koloba, basengeli te koluka esika ya kolala ya kitoko koleka.
To, “Hadesi.” Talá Ap 4.