Emoniseli 18:1-24

18  Nsima ya makambo wana namonaki anzelu mosusu auti na likoló azali kokita, na bokonzi+ monene; mpe mabele engɛngaki na nkembo na ye.+  Mpe agangaki na mongongo makasi+ ete: “Akwei! Babilone Monene akwei,+ mpe akómi esika ya kofanda ya bademo mpe esika ya mipɛpɛ+ nyonso ya mbindo mpe esika ya kobombana ya bandɛkɛ nyonso ya mbindo mpe oyo eyinami!+  Mpo bikólo nyonso ezwami na vinyo ya nkanda ya pite na ye,+ mpe bakonzi ya mabele basali na ye pite,+ mpe bato ya mombongo+ na mabele oyo basalaka mibembo bakómaki bazwi mpo na nguya ya ebele ya biloko na ye ya kitoko oyo azali koyokela nsɔni te.”+  Mpe nayokaki mongongo mosusu euti na likoló elobi ete: “Bóbima kati na ye, bato na ngai,+ soki bolingi te kosangana na ye na masumu na ye,+ mpe soki bolingi te kozwa ndambo ya malɔzi na ye.  Mpo masumu na ye etondi tii na likoló,+ mpe Nzambe akanisi lisusu misala na ye oyo ezangi bosembo.+  Bósala ye ndenge ye moko mpe asalaki bato mosusu,+ mpe bósala ye mbala mibale ndenge wana, ɛɛ, mbala mibale makambo oyo ye asalaki;+ na kɔpɔ+ oyo ye asangisaki masanga, bósangisela ye+ yango mbala mibale.+  Ndenge amikumisaki mpe afandaki na ebele ya biloko ya kitoko oyo azali koyokela nsɔni te, bópesa ye mpe monyoko ná mawa ndenge wana.+ Mpo na motema na ye azali se koloba ete: ‘Nazali mokonzi,+ mpe nazali te mwasi oyo mobali akufá,+ mpe nakomona mawa ata moke te.’+  Yango wana, na mokolo kaka moko malɔzi na ye+ ekoya, liwa ná mawa ná nzala, mpe bakozikisa ye na mɔtɔ nyɛɛ,+ mpo Yehova Nzambe, oyo asambisi ye, azali makasi.+  “Mpe bakonzi+ ya mabele oyo basalaki na ye pite mpe bazalaki na ebele ya biloko ya kitoko oyo bazali koyokela nsɔni te bakolela mpe bakomibɛta na mawa mpo na ye,+ ntango bakotala molinga+ ya kozika na ye, 10  ntango bakotɛlɛma na mosika mpo na kobanga na bango ya monyoko na ye mpe bakoloba ete:+ ‘Mawa mingi, mawa mingi, yo engumba monene,+ Babilone yo engumba makasi, mpo na ngonga kaka moko lisambisi na yo eyei!’+ 11  “Lisusu, bato ya mombongo+ na mabele oyo basalaka mibembo bazali kolela mpe bazali na mawa mpo na ye,+ mpo moto ya kosomba biloko na bango nyonso azali lisusu te, 12  biloko nyonso+ ya wolo mpe ya palata mpe ya mabanga ya ntalo mpe ya mayaka mpe ya lini ya kitoko mpe ya bilamba ya motane-bulé mpe ya swá mpe ya bilamba ya motane makasi; ná biloko nyonso oyo esalemi na mabaya ya nsolo kitoko ná mitindo nyonso ya biloko oyo esalemi na mpɛmbɛ ya nzoku ná mitindo nyonso ya mabaya ya kitoko koleka mpe ya motako mpe ya bibende mpe ya marbrɛ;+ 13  ná kinamono ná amomo ná mpaka ya malasi ná mafuta ya nsolo kitoko ná olibana ná vinyo ná mafuta ya olive ná farini ya kitoko ná blé ná bibwɛlɛ ná bampate ná bampunda ná makalo ná baombo ná milimo ya bato.+ 14  Ɛɛ, mbuma kitoko oyo molimo na yo ezalaki kolinga+ elongwe epai na yo, mpe biloko nyonso ya malamu mingi mpe biloko na yo ya kongɛnga ebebi, mpe bakomona yango lisusu te.+ 15  “Bato ya mombongo+ ya biloko wana oyo basalaka mibembo, oyo bakómaki bazwi mpo na ye, bakotɛlɛma na mosika mpo bakobanga monyoko na ye, bakolela mpe bakozala na mawa,+ 16  bakoloba ete: ‘Mawa mingi, mawa mingi—engumba yango ya monene,+ oyo elati lini ya kitoko mpe elamba ya motane-bulé mpe ya motane makasi, mpe eyeisami kitoko mingi na biloko ya wolo mpe na mabanga ya ntalo mpe na mayaka,+ 17  mpo na ngonga kaka moko bomɛngo nyonso wana ebebi nyɛɛ!’+ “Mpe kapitɛni nyonso ya masuwa ná moto nyonso oyo asalaka mibembo epai na epai,+ ná bamatelo ná baoyo nyonso babikelaka na mbu, batɛlɛmaki mosika+ 18  mpe bagangaki ntango bazalaki kotala molinga ya kozika na ye mpe balobaki ete: ‘Engumba nini ekokani na engumba monene oyo?’+ 19  Mpe babwakaki putulu na mitó+ na bango mpe bagangaki, balelaki mpe bazalaki na mawa+ mpe balobaki ete: ‘Mawa mingi, mawa mingi—engumba yango ya monene, oyo na kati na yango bato nyonso oyo bazalaka na bamasuwa na mbu+ bakómaki bazwi+ mpo na ebele ya biloko na ye ya ntalo, mpo na ngonga kaka moko abebisami!’+ 20  “Sepelá mpo na ye, Ee likoló,+ ná bino basantu+ ná bino bantoma+ ná bino basakoli, mpo Nzambe akateli bino likambo mpe apesi ye etumbu!”+ 21  Mpe anzelu moko ya makasi atombolaki libanga moko ekokani na libanga monene oyo banikaka na yango mbuma+ mpe abwakaki yango na mbu,+ alobi: “Ndenge wana nde bakobwaka Babilone engumba monene na mbala moko, mpe ekomonana lisusu te.+ 22  Mpe lokito ya bayembi oyo bazali koyemba na nzɛnzɛ mpe ya babɛti-miziki mpe ya babɛti-piololo mpe ya babɛti-kelelo ekoyokana epai na yo lisusu te,+ mpe moto ata moko ya misala ya mabɔkɔ ezala ya ndenge nini akomonana lisusu epai na yo te, mpe lokito ya libanga ya konikela ekoyokana lisusu epai na yo te, 23  mpe pole ya mwinda ekongɛnga lisusu epai na yo te, mpe mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala ekoyokana lisusu epai na yo te;+ mpo bato na yo ya mombongo+ oyo basalaka mibembo bazalaki bato ya bibonga minene+ ya mabele, mpo okosi bikólo nyonso na misala na yo ya bilimo mabe.+ 24  Ɛɛ, makila+ ya basakoli+ mpe ya basantu+ mpe ya baoyo nyonso babomamaki na mabele emonanaki epai na ye.”+

Maloba na nse