Emoniseli 13:1-18

13  Mpe etɛlɛmaki na zɛlo+ ya mbu. Mpe namonaki nyama mabe+ moko ebimi na mbu,+ ezali na maseke zomi+ mpe na mitó nsambo,+ mpe na maseke na yango mitole zomi, kasi na mitó na yango bankombo ya kofinga.+  Sikoyo nyama mabe oyo namonaki ezalaki lokola nkoi,+ kasi makolo na yango lokola oyo ya urse,+ mpe monɔkɔ na yango lokola monɔkɔ ya nkɔsi.+ Mpe dragɔ+ epesaki nyama yango nguya na yango mpe kiti na yango ya bokonzi mpe bokonzi monene.+  Mpe namonaki lokola nde moko ya mitó na yango ezoki pene na liwa, kasi mpota na yango ya liwa+ ebelaki, mpe mabele mobimba elandaki nyama mabe yango na kokamwa.  Mpe basambelaki dragɔ mpo epesaki nyama mabe yango bokonzi, mpe basambelaki nyama mabe yango na maloba oyo: “Nani azali lokola nyama mabe oyo, mpe nani akoki kobunda na yango etumba?”  Mpe bapesaki yango monɔkɔ oyo elobaka makambo minene+ mpe efingaka,+ mpe bapesaki yango bokonzi mpo esala makambo sanza ntuku minei na mibale (42).+  Mpe efungolaki monɔkɔ na yango mpo na kofinga+ Nzambe, mpo na kofinga nkombo na ye mpe esika na ye ya kofanda, elingi koloba baoyo bafandi na likoló.+  Mpe bapesaki yango nzela+ ya kobunda etumba na basantu mpe kolonga bango,+ mpe bapesaki yango bokonzi likoló ya mabota nyonso mpe mikili nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe bikólo nyonso.  Mpe bato nyonso oyo bafandi na mabele bakosambela yango; baoyo nkombo na bango ekomamá te na rulo+ ya bomoi ya Mwana-Mpate oyo abomamaki,+ banda na ebandeli ya mokili.+  Soki moto azali na litoi, ayoka.+ 10  Soki moto asengeli kokangama, akokangama.+ Soki moto akoboma na mopanga, bakoboma ye na mopanga.+ Awa nde basantu+ basengeli koyika mpiko+ mpe kozala na kondima.+ 11  Mpe namonaki nyama mabe+ mosusu ebimi na mabele,+ mpe ezalaki na maseke mibale lokola mwana-mpate, kasi ezalaki koloba lokola dragɔ.+ 12  Mpe ezali kosalela bokonzi nyonso ya nyama mabe+ ya liboso na miso na yango. Mpe ezali kotinda mabele ná bato oyo bafandi wana básambela nyama mabe ya liboso, oyo mpota na yango ya liwa ebelaki.+ 13  Mpe ezali kosala bilembo minene,+ bongo ezali kosala ete ata mɔtɔ euta na likoló ekita tii na mabele na miso ya bato. 14  Mpe ezali kokosa bato oyo bafandi na mabele na bilembo oyo bapesaki yango nzela esala na miso ya nyama mabe yango, ezali koyebisa bato oyo bafandi na mabele ete básala elilingi+ ya nyama mabe yango oyo ezalaki na mpota ya liwa+ kasi ezongaki lisusu na bomoi. 15  Mpe bapesaki yango nzela ya kopesa elilingi ya nyama mabe yango mpema, mpo elilingi ya nyama mabe yango eloba mpe ebomisa bato nyonso oyo bazali kosambela elilingi+ ya nyama mabe yango ata moke te. 16  Mpe ezali kotinda bato nyonso na makasi,+ bato mike ná bato minene, mpe bazwi ná babola, mpe bato ya bonsomi ná baombo, bázwa elembo na lobɔkɔ na bango ya mobali to na elongi na bango,+ 17  mpe moto akoka kosomba te to kotɛka te longola kaka moto oyo azali na elembo yango, nkombo+ ya nyama mabe yango to motángo ya nkombo na yango.+ 18  Awa nde esengeli kozala na bwanya: Moto oyo azali na mayele atánga motángo ya nyama mabe yango, mpo ezali motángo ya moto;+ mpe motángo na yango ezali nkama motoba na ntuku motoba na motoba (666).+

Maloba na nse