Danyele 5:1-31

5  Mokonzi Beleshazare+ asalelaki bato minene na ye nkóto moko (1 000) fɛti moko monene, mpe azalaki komɛla vinyo+ liboso ya bato yango nkóto moko.  Vinyo etindaki+ Beleshazare aloba ete báya na bambɛki ya wolo mpe ya palata+ oyo tata na ye Nebukadenezare alongolaki na tempelo oyo ezalaki na Yerusaleme, mpo mokonzi ná bato minene na ye, bamakango na ye mpe basi na ye mosusu bámɛla na yango.+  Na ntango yango, bayaki na bambɛki ya wolo oyo bazwaki na tempelo ya ndako ya Nzambe oyo ezalaki na Yerusaleme, mpe mokonzi ná bato minene na ye, bamakango na ye mpe basi na ye mosusu bamɛlaki na yango.  Bamɛlaki vinyo, mpe basanzolaki banzambe ya wolo mpe ya palata, ya motako, ya ebende, ya nzete mpe ya libanga.+  Na ntango yango, misapi ya lobɔkɔ ya moto ebimaki mpe ezalaki kokoma na mpɛmbɛ oyo bapakolá na efelo ya ndako ya mokonzi,+ pembeni ya etɛlɛmiselo ya miinda, mpe mokonzi azalaki komona lobɔkɔ oyo ezalaki kokoma.  Langi ya loposo ya mokonzi ebongwanaki na ntango wana, mpe makanisi na ye ekómaki kobangisa ye,+ mpe matonga ya loketo na ye ebandaki kolɛmba+ mpe mabɔlɔngɔ na ye ezalaki kotutana.+  Mokonzi azalaki kobelela na mongongo makasi ete bákɔtisa bato oyo babelelaka bilimo, Bakaladea mpe banganga-minzoto.+ Mokonzi ayanolaki mpe alobaki na bato ya bwanya ya Babilone boye: “Moto nyonso oyo akotánga likomi oyo mpe akopesa ngai ndimbola na yango, bakolatisa ye bilamba motane-bulé,+ ná nsinga ya monzɛlɛ ya wolo na nkingo, mpe akoyangela, akozala moto ya misato na bokonzi.”+  Na ntango yango, bato nyonso ya mokonzi oyo bazalaki bato ya bwanya bakɔtaki, kasi bakokaki te kotánga likomi yango to koyebisa mokonzi ndimbola na yango.+  Na yango, Mokonzi Beleshazare abangaki makasi mpenza mpe langi ya loposo na ye ebongwanaki; mpe bato minene na ye basilaki mayele.+ 10  Ntango mokonzi-mwasi* ayokaki maloba ya mokonzi mpe ya bato na ye ya minene, akɔtaki mbala moko na ndako ya fɛti. Mokonzi-mwasi ayanolaki mpe alobaki boye: “Ee Mokonzi, zalá na bomoi mpo na na ntango oyo etyami ndelo te.+ Makanisi na yo ebangisa yo te, mpe langi ya loposo na yo ebongwana te. 11  Na bokonzi na yo, ezali na mobali moko oyo akoki, oyo azali na elimo ya banzambe basantu;+ mpe na mikolo ya tata na yo, pole, mayele ya kososola ná bwanya lokola bwanya ya banzambe emonanaki epai na ye, mpe tata na yo Mokonzi Nebukadenezare atyaki ye kapita+ ya banganga-nzambe ya maji, ya bato oyo babelelaka bilimo, ya Bakaladea mpe ya banganga-minzoto, ɛɛ, tata na yo, Ee mokonzi; 12  mpamba te elimo moko ya mayele mingi koleka mpe boyebi ná mayele ya kososola mpo na kolimbola bandɔtɔ+ mpe kolimbola basambole mpe boyebi ya kofungola mazita emonanaki epai na ye,+ epai ya Danyele, oyo mokonzi ye moko apesaki ye nkombo Beleteshazare.+ Sikoyo, tiká bábenga Danyele, mpo amonisa ndimbola yango.” 13  Na yango, bakɔtisaki Danyele liboso ya mokonzi. Mokonzi azwaki maloba mpe alobaki na Danyele ete: “Yo nde Danyele, moko ya bato ya Yuda+ oyo bamemamaki awa na mboka mopaya, oyo mokonzi tata na ngai abimisaki na Yuda?+ 14  Nayoki mpe ete ozali na elimo ya banzambe,+ mpe pole, mayele ya kososola ná bwanya+ moko ya kokamwa emonani epai na yo. 15  Mpe sikoyo bakɔtisi liboso na ngai bato ya bwanya mpe bato oyo babelelaka bilimo, mpo bátánga likomi oyo, ɛɛ mpo báyebisa ngai ndimbola na yango; kasi bakoki te kopesa ndimbola ya liloba yango.+ 16  Mpe ngai nayoki ete yo okoki kopesa bandimbola+ mpe kofungola mazita. Sikoyo, soki okoki kotánga likomi oyo mpe kopesa ngai ndimbola na yango, bakolatisa yo bilamba ya motane-bulé, ná nsinga ya monzɛlɛ ya wolo na nkingo, mpe okoyangela, okozala moto ya misato na bokonzi.”+ 17  Na ntango yango, Danyele ayanolaki mpe alobaki liboso ya mokonzi ete: “Tikalá na makabo na yo, mpe pesá bato mosusu mabonza na yo.+ Kasi nakotángela mokonzi likomi yango, mpe nakoyebisa ye ndimbola na yango.+ 18  Yo, Ee mokonzi, Nzambe Oyo-Aleki-Likoló+ ye moko apesaki tata na yo Nebukadenezare+ bokonzi, bonene, lokumu ná nkembo.+ 19  Mpe mpo na bonene oyo Ye apesaki ye, bato ya bikólo nyonso, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ bazalaki kolɛnga mpe kobanga liboso na ye.+ Moto oyo ye alingaki koboma, azalaki koboma; moto oyo ye alingaki kobɛta, azalaki kobɛta; moto oyo ye alingaki kotombola, azalaki kotombola; mpe moto oyo ye alingaki kokitisa, azalaki kokitisa.+ 20  Kasi ntango motema na ye ekómaki na lolendo mpe akómaki motó makasi, bongo akómaki kosala na lofundo,+ alongolamaki na kiti ya bokonzi na ye mpe akitisamaki, mpe balongolaki ye lokumu na ye.+ 21  Mpe babenganaki ye kati na bana ya bato, mpe bakómisaki motema na ye lokola oyo ya nyama, mpe afandaki esika moko na bampunda ya zamba.+ Bazalaki kopesa ye matiti alya lokola bangɔmbɛ, mpe mamwɛ ya likoló epɔlisaki nzoto na ye,+ tii ayebaki ete Nzambe Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato, mpe atyaka moto oyo ye alingi azala mokonzi na yango.+ 22  “Mpe yo, Beleshazare+ mwana na ye, okitisi motema na yo te,+ atako oyebaki nyonso wana.+ 23  Kasi omitombolaki mpo na kotɛmɛla Nkolo ya likoló,+ mpe bamemaki liboso na yo bambɛki ya ndako na ye;+ mpe yo moko ná bato minene na yo, bamakango na yo ná basi na yo mosusu bozali komɛla na yango, mpe bosanzoli banzambe ya palata mpe ya wolo, ya motako, ya ebende, ya nzete mpe ya libanga,+ oyo emonaka te mpe eyokaka te mpe eyebaka eloko moko te;+ kasi Nzambe oyo mpema na yo ezali na lobɔkɔ na ye+ mpe oyo banzela na yo nyonso ezali ya ye,+ okumisi ye te.+ 24  Yango wana Nzambe atindi lobɔkɔ moko, mpe akomisi likomi oyo.+ 25  Mpe likomi oyo ekomami yango oyo: MENE, MENE, TEKELE mpe PARASINE. 26  “Ndimbola ya liloba yango, yango oyo: MENE, Nzambe atángi mikolo ya bokonzi na yo mpe asukisi yango.+ 27  “TEKELE, batye yo na kilo mpe bamoni ete okoki te.+ 28  “PERESE, bakaboli bokonzi na yo mpe bapesi yango Bamede ná Baperse.”+ 29  Na ntango yango, Beleshazare apesaki mitindo, mpe balatisaki Danyele bilamba ya motane-bulé, ná nsinga ya monzɛlɛ ya wolo na nkingo; mpe bapanzaki nsango ete akokóma moyangeli ya misato na bokonzi.+ 30  Kaka na butu wana, Beleshazare mokonzi Mokaladea abomamaki+ 31  mpe Dariuse+ Momede azwaki bokonzi, azalaki na mbula soki ntuku motoba na mibale (62).

Maloba na nse

Ekoki kozala mama ya mokonzi.