Balevi 1:1-17

1  Mpe Yehova abengaki Moize mpe alobaki na ye uta na hema ya kokutana+ ete:  “Lobá na bana ya Yisraele,+ mpe osengeli koyebisa bango boye: ‘Soki moto moko kati na bino alingi kopesa Yehova likabo oyo euti na banyama ya mboka, bokopesa likabo na bino oyo euti na etonga ya bangɔmbɛ mpe na etonga ya bampate.  “‘Soki likabo na ye ezali likabo ya kotumba+ oyo euti na etonga ya bangɔmbɛ, akopesa nyama ya mobali oyo ezangi mbeba.+ Akopesa yango ndenge ye alingi na monɔkɔ ya hema ya kokutana liboso ya Yehova.+  Mpe asengeli kotya lobɔkɔ na ye na motó ya likabo ya kotumba, mpe basengeli kondimela+ ye yango na esengo mpo na kozipa masumu na ye.+  “‘Na nsima mwana-ngɔmbɛ ya mobali esengeli kobomama liboso ya Yehova; mpe bana mibali ya Arona, banganga-nzambe,+ basengeli kopesa makila na yango mpe komwangisa makila yango zingazinga likoló ya etumbelo,+ oyo ezali na monɔkɔ ya hema ya kokutana.  Mpe likabo ya kotumba esengeli kolongolama mposo mpe kokatama bitenibiteni.+  Mpe bana mibali ya Arona, banganga-nzambe, basengeli kotya mɔtɔ na etumbelo+ mpe kotya nkoni na molɔngɔ likoló ya mɔtɔ.+  Mpe bana mibali ya Arona, banganga-nzambe, basengeli kotya na molɔngɔ biteni yango+ ná motó mpe mafuta likoló ya nkoni oyo ezali likoló ya mɔtɔ oyo ezali na etumbelo.  Mpe misɔpɔ+ na yango ná makolo na yango ekosukolama na mai; mpe nganga-nzambe asengeli kosala ete yango nyonso ebimisa milinga likoló ya etumbelo lokola likabo ya kotumba, likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko ya kokitisa Yehova motema.+ 10  “‘Mpe soki likabo na ye mpo na likabo ya kotumba euti na etonga ya bampate,+ na bana-mpate ya mibali to na bantaba, akopesa+ nyama ya mobali+ oyo ezangi mbeba. 11  Mpe yango esengeli kobomama pembeni ya etumbelo na nɔrdi, liboso ya Yehova, mpe bana mibali ya Arona, banganga-nzambe, basengeli komwangisa makila na yango zingazinga, likoló ya etumbelo.+ 12  Mpe asengeli kokata yango bitenibiteni, mpe nganga-nzambe asengeli kotya yango ná motó na yango mpe mafuta na yango na molɔngɔ likoló ya nkoni oyo ezali likoló ya mɔtɔ oyo ezali na etumbelo.+ 13  Mpe akosukola misɔpɔ+ ná makolo+ na mai; mpe nganga-nzambe asengeli kopesa yango nyonso mpe akosala ete yango ebimisa milinga+ likoló ya etumbelo. Ezali likabo ya kotumba, likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko ya kokitisa Yehova motema.+ 14  “‘Nzokande, soki likabo na ye oyo ezali likabo ya kotumba mpo na Yehova euti na bandɛkɛ, boye asengeli kopesa bipopo+ to bana ya bibenga+ ezala likabo na ye. 15  Mpe nganga-nzambe asengeli kopesa yango na etumbelo mpe kokata+ motó na yango na manzaka mpe kosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo, kasi akotika makila na yango esopana na mopanzi ya etumbelo. 16  Mpe asengeli kolongola libenga ya nkingo na yango ná nsala na yango mpe kobwaka yango pene na etumbelo, epai ya ɛsti, na esika putulu ya mɔtɔ oyo etondi na mafuta ezali.+ 17  Mpe asengeli kopasola yango na mapapu na yango. Asengeli kokabola+ yango te. Na nsima, nganga-nzambe asengeli kosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo likoló ya nkoni oyo ezali likoló ya mɔtɔ. Yango ezali likabo ya kotumba,+ likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko ya kokitisa Yehova motema.+

Maloba na nse