Mitángo 34:1-29

34  Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete:  “Pesá bana ya Yisraele mitindo, mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Bozali kokɔta na mokili ya Kanana.+ Yango nde mokili oyo bakokabolela bino lokola libula,+ mokili ya Kanana engebene bandelo+ na yango.  “‘Mpe ngámbo na bino ya sudi esengeli kozala banda na esobe ya Zine pembenipembeni ya Edome,+ mpe ndelo na bino ya sudi esengeli kozala banda na nsuka ya Mbu ya Mungwa,+ na ɛsti.  Mpe ndelo na bino esengeli kobaluka banda na sudi na nzela ya komata Akrabime+ mpe kokatisa tii na Zine, mpe nsuka na yango esengeli kozala na sudi ya Kadeshe-barnea,+ mpe esengeli kobima na Hazare-adare+ mpe koleka na Azemone.  Mpe ndelo yango esengeli kobaluka na Azemone ekei na lobwaku ya mokɛli ya Ezipito,+ mpe nsuka na yango esengeli kozala na Mbu.+  “‘Ndelo ya wɛsti+ esengeli kozala mpo na bino Mbu Monene ná mabele ya pembenipembeni na yango. Ekozala ndelo na bino ya wɛsti.  “‘Sikoyo talá oyo ekozala ndelo na bino ya nɔrdi: Banda na Mbu Monene, bokokata ndelo tii na Ngomba Hore+ mpo ezala ndelo mpo na bino.  Banda na Ngomba Hore, bokokata ndelo tii na esika ya kokɔta na Hamate,+ mpe nsuka ya ndelo na yango esengeli kozala na Zedade.+  Mpe ndelo yango esengeli kobima, ekei na Zifrone, mpe nsuka na yango esengeli kozala Hazare-enane.+ Ekozala ndelo na bino ya nɔrdi. 10  “‘Na nsima, bosengeli kokata ndelo mpo ezala ndelo na bino na ɛsti banda na Hazare-enane tii na Shefame. 11  Mpe ndelo esengeli kokita banda Shefame tii na Ribla na ɛsti ya Aine, mpe ndelo yango esengeli kokita mpe kokende kotuta esika oyo ekitá ya mbu ya Kinerete, na ɛsti. + 12  Mpe ndelo esengeli kokita tii na Yordani, mpe nsuka na yango esengeli kozala Mbu ya Mungwa.+ Yango ekozala mokili+ na bino engebene bandelo na yango zingazinga.’” 13  Bongo Moize apesaki bana ya Yisraele mitindo ete: “Talá mokili oyo bino bokokabola na kobwakáká mbɛsɛ+ mpo ezala ya bino, kaka ndenge Yehova apesaki mitindo ete bápesa na mabota libwa na ndambo.+ 14  Mpo libota ya bana ya Barubene, na kolanda ndako ya batata na bango mpe libota ya bana ya Bagade, na kolanda ndako ya batata na bango basilaki kozwa, mpe ndambo ya libota ya Manase basilaki kozwa libula na bango.+ 15  Mabota wana mibale na ndambo basilaki kozwa libula na bango banda na etúká ya Yordani pene na Yeriko na ngámbo ya ɛsti, epai moi ebimaka.”+ 16  Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 17  “Talá bankombo ya mibali oyo bakokabolela bino mokili mpo ezala ya bino: Eleazare+ nganga-nzambe mpe Yosua mwana ya Nunu.+ 18  Mpe bokozwa nkumu moko na libota mokomoko mpo na kokabola mokili mpo ezala ya bino.+ 19  Mpe talá bankombo ya mibali yango: Na libota ya Yuda:+ Kalebe mwana ya Yefune;+ 20  mpe na libota ya bana ya Simeone:+ Shemuele mwana ya Amihude; 21  na libota ya Benyamina:+ Elidade mwana ya Kisilone; 22  mpe na libota ya bana ya Dani:+ nkumu moko, Buki mwana ya Yogli; 23  na bana ya Yozefe,+ na libota ya bana ya Manase:+ nkumu moko, Hananiele mwana ya Efode; 24  mpe na libota ya bana ya Efraime:+ nkumu moko, Kemuele mwana ya Shifitane; 25  mpe na libota ya bana ya Zebulone:+ nkumu moko, Elizafane mwana ya Parnake; 26  mpe na libota ya bana ya Isakare:+ nkumu moko, Palatiele mwana ya Azane; 27  mpe na libota ya bana ya Ashere:+ nkumu moko, Ahihude mwana ya Shelomi; 28  mpe na libota ya bana ya Nafatali:+ nkumu moko, Pedahele mwana ya Amihude.” 29  Bango nde bato oyo Yehova apesaki mitindo ete bákómisa bana ya Yisraele bankolo-mabele na mokili ya Kanana.+

Maloba na nse