Sekele mpo na libota ya esengo
Kɔtisá na mitó ya bana na yo bizaleli ya malamu
Loida, * mama moko na Mexique, alobi boye: “Bazali kopesa bana bakapɔti na eteyelo, yango wana bilenge bakanisaka ete kosangisa nzoto ezali mabe te—soki ozali ‘komibatela.’”
Nobuko, mama moko na Japon, alobi boye: “Natunaki mwana na ngai ya mobali, akosala nini soki ye ná moninga na ye ya mwasi bazali kaka bango mibale. Alobaki, ‘ayebi te soki akosala nini.’”
NTANGO bana na bino bazalaki naino mike, bozalaki kobomba mosika biloko oyo ekoki kobimisela bango makama? Ntango mosusu bozalaki kozipa bansinga ya kura, kobomba biloko oyo ekoki kozokisa, mpe kokanga nzela oyo ezali na baeskalye—nyonso wana mpo na kobatela bana na bino.
Ezalaka pɛtɛɛ te kobatela bilenge oyo bakokisi naino mbula ntuku mibale te. Sikoyo omitungisaka mingi, na ndakisa omitunaka: ‘Mwana na ngai ya mobali atalaka pornografi?’ ‘Mwana na ngai ya mwasi, atindaka te ‘bililingi ya bolumbu’ na ye na telefone?’ Mpe motuna oyo ebangisaka baboti yango oyo: ‘Mwana na ngai akómi kosangisa nzoto?’
Kokangakanga bana ezali komikosa
Baboti mosusu balukaka kokɛngɛla bana na bango ntɔngɔ tii mpokwa, balukaka kozala elongo na bango mpe koyeba likambo nyonso oyo bazali kosala. Kasi, na nsima mingi na bango bayaka koyeba ete kosala bongo etindaka bana na bango bábomba mabe oyo bazali kosala. Bana ya basi to ya mibali bakómaka na mayele makasi ya kobomba etamboli nyonso ya mabe oyo baboti na bango balingaka te.
Emonani polele ete, kokangakanga bana ezali na ntina te. Yehova Nzambe asalelaka mayele wana te mpo bikelamu na ye bátosa ye, mpe bino baboti bosengeli kosala bongo te. (Kolimbola Mibeko 30:19) Na yango, ndenge nini okoki kosalisa bana na yo oyo bakómi bilenge bázwa bikateli ya bwanya na makambo etali bizaleli ya malamu?—Masese 27:11.
Likambo eleki ntina ezali ya kosololaka na bana na yo mpe kobanda kosala yango ntango bazali naino mike. * (Masese 22:6) Na nsima, ntango bakómi na mbula 13 tii 19, kobá kosololaka na bango. Lokola ozali moboti, osengeli kozala moto ya liboso ya koyebisa mwana na yo makambo oyo akotyela yango motema. Alicia, elenge mwasi moko na Angleterre, alobi boye: “Bato mingi bakanisaka ete tosengeli nde kosolola ná baninga na biso makambo etali kosangisa nzoto, kasi ezali bongo te. Tosepelaka koyoka yango ntango euti epai ya baboti na biso. Totyaka mpenza motema na makambo oyo bakoki koloba na biso.”
Ntina ya bizaleli ya malamu
Wana bazali kokola, bana basengeli koyeba makambo mingi na oyo etali kosangisa nzoto na esika ya koyebisa bango kaka ndenge bomoi ebandaka. Basengeli mpe kozala na ‘makoki ya kososola, oyo lokola basalelaka yango, emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.’ (Baebre 5:14) Na mokuse, basengeli kozala na bizaleli ya malamu—mitinda ya bokristo oyo elobeli makambo etali kosangisa nzoto—kozala mpe na etamboli oyo eyokani na mitinda yango. Ndenge nini okoki kokɔtisa bizaleli ya malamu na mitó ya bana?
Talelá naino bizaleli na yo moko. Na ndakisa, ondimaka mpenza ete pite—kosangisa nzoto kati na bato oyo babalani te—ezali mabe. (1 Batesaloniki 4:3) Ekoki kozala ete bana na yo bayebi likanisi na yo na likambo yango; bakoki kutu koyeba mikapo ya Biblia oyo esimbi makambo oyo ondimaka. Ntango batuni bango, bakoki kopesa eyano mbala moko ete kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mabe.
Kasi, esengeli kosuka kaka wana te. Buku moko (Sex Smart) elobi ete bilenge mosusu bakoki koloba ete bandimaka mateya oyo baboti na bango bandimaka na likambo etali kosangisa nzoto. Buku yango elobi boye: “Bamonaka ete ezali mpasi bázala na makanisi ya bango moko. Ntango bamekami na likambo moko oyo bakanaki te, bayebaka te nini bakosala, babulunganaka.” Yango emonisi ntina mpenza ya bizaleli ya malamu. Ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo akóma na bizaleli yango?
Monisá bizaleli na yo polele.
Ondimaka ete kosangisa nzoto esengeli kosuka kaka na kati ya libala? Na yango, yebisá mwana na yo likambo yango polele mpe zongeláká yango mbala na mbala. Buku moko (Beyond the Big Talk) elobi ete bolukiluki oyo esalemaki emonisi ete “na bandako oyo baboti bayebisaka bana na bango polele ete balingaka te ete bilenge básangisa nzoto, emonanaka ete ezalaka mpasi mpo bilenge yango básangisa nzoto.”
Ya solo, ndenge tolobaki yango liboso, koyebisa kaka makambo oyo ondimaka elakisi te ete mwana na yo akondima mpe kotosa yango. Nzokande, koyebisa polele bizaleli oyo okolinga bato ya libota na yo bázala na yango, ekosalisa bango; ekozala fondasyo oyo bana na yo mpe bakolanda. Lisusu, balapolo emonisi ete nsukansuka, bilenge mingi balandaka bizaleli ya baboti na bango ata soki ntango bazalaki naino na mbula 13 tii 19 balandaki yango te.
MEKÁ KOSALA BOYE: Salelá nsango moko oyo oyokaki na televizyo to na radio mpo na kobanda lisolo ná bango mpe koyebisa bango makambo oyo olandaka. Na ndakisa, soki oyoki nsango ya moto moko oyo basangisaki na ye nzoto na makasi, okoki koloba boye: “Nayokaka mpasi mingi ndenge mibali mosusu basangisaka na basi nzoto na makasi. Bokanisi ete bazwaka makanisi ya ndenge wana wapi?”
Kobombela bango likambo moko te na oyo etali kosangisa nzoto.
Makebisi ezalaka na ntina. (1 Bakorinti 6:18; Yakobo 1:14, 15) Kasi, Biblia elobeli libosoliboso likambo ya kosangisa nzoto lokola likabo ya Nzambe, kasi te lokola motambo ya Satana. (Masese 5:18, 19; Loyembo ya Salomo 1:2) Koyebisa bana kaka makama ya kosangisa nzoto ekoki kosala ete bákóma kotalela likambo yango na ndenge ya mabe, na ndenge oyo Biblia elobeli te. Corrina, elenge mwasi moko na France alobi boye: “Baboti na ngai balobelaka mingi likambo etali pite, mpe yango esalá ete nakóma kotalela kosangisa nzoto ete ezali likambo moko ya mabe.”
Omindimisa ete bana na yo bayebi makambo nyonso na oyo etali kosangisa nzoto. Nadia, mama moko na Mexique alobi boye: “Nazalaki ntango nyonso koyebisa bana na ngai ete kosangisa nzoto ezali malamu mpe moto nyonso akelamá na mposa wana, mpe Yehova Nzambe apesá yango bato mpo básepela. Kasi, esengeli kosala yango kaka na kati ya libala. Ekoki kopesa biso esengo to mpasi, na kotalela ndenge oyo tozali kosalela yango.”
MEKÁ KOSALA BOYE: Mbala ya nsima oyo okosolola na mwana na yo likambo etali
kosangisa nzoto, bósukisa lisolo na likanisi moko ya malamu. Kobanga te komonisa ete kosangisa nzoto ezali likabo moko kitoko oyo euti na Nzambe mpe ete akosepela na yango ntango akobala. Salisá bana na yo bándima mpenza ete bakoki kotosa mibeko ya Nzambe tii ntango bakobala.Salisá mwana na yo amona makama oyo ekoki kobima.
Mpo na kozwa bikateli ya malamu na likambo nyonso na bomoi, bilenge basengeli koyeba likambo yango mpe na nsima kopona oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Kokanisa te ete soki bana bayebi kaka oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe nde ekoki. Emma, mwasi mokristo moko na Australie, alobi boye: “Soki nakanisi mabunga oyo nasalaki na bolenge, nakoki koloba ete kosuka kaka na koyeba mibeko ya Nzambe elimboli te ete ondimi yango. Koyeba matomba ya mibeko yango—mpe makama oyo ebimaka ntango obuki mibeko yango—ezali na ntina.”
Biblia ekoki kosalisa, mpo mibeko na yango mingi emonisi makama oyo moto akoki kozwa soki asali mabe. Na ndakisa, Masese 5:8, 9, elendisi bilenge mibali báboya pite ‘mpo bápesa bato mosusu lokumu na bango te.’ Ndenge bavɛrsɛ yango emonisi, baoyo basangisaka nzoto liboso ya kobala babungisaka bizaleli na bango ya malamu, bosembo na bango, mpe bamizwaka lisusu na valɛrɛ te. Mpe yango esalaka ete ezala mwa mpasi mpo moto oyo azali na bizaleli ya malamu ndenge wana aluka kobalana na bango. Kotalela mpasi oyo moto akoki kozwa na nzoto, na makanisi mpe na elimo soki aboyi kotosa mibeko ya Nzambe, ekoki kolendisa ekateli ya mwana na yo ya kotosa mibeko yango. *
MEKÁ KOSALA BOYE: Salelá bandakisa mpo na kosalisa mwana na yo amona bwanya ya mibeko ya Nzambe. Na ndakisa, okoki koloba boye: “Mɔtɔ oyo balambelaka ezalaka malamu; kasi mɔtɔ ya monene oyo ekoki kozikisa zamba ezali mabe. Mɔtɔ yango mibale ekeseni na nini, mpe ndenge nini eyano na yo eyokani na mibeko oyo Nzambe atyá na likambo etali kosangisa nzoto?” Salelá lisolo oyo ezali na Masese 5:3-14 mpo na kosalisa mwana na yo amona makama ya pite.
Takao, elenge moko ya mbula 18 na Japon, alobi boye: “Nayebi ete nasengeli kosala oyo ezali malamu, kasi etumba ezali makasi ná bamposa ya nzoto.” Bilenge oyo bayokaka ndenge wana, bakoki kobɔndisama na koyeba ete bazali bango moko te. Ata ntoma Paulo—mokristo ya molende—andimaki ete: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.”—Baroma 7:21.
Bilenge basengeli koyeba ete etumba ya ndenge wana ezali ntango nyonso mabe te. Ekoki kosalisa bango bámona lolenge ya bato oyo balingi kokóma. Ekoki kosalisa bango bátya likebi na motuna oyo: ‘Na bomoi na ngai, nakolinga koyebana lokola moto oyo azali na bizaleli ya malamu, azali sembo, to nakolinga kozala moto oyo azali bilandalanda—moto oyo alandaka kaka bamposa na ye?’ Kozala na bizaleli ya malamu ekosalisa bana na yo bázala na bwanya ya koyanola na motuna wana.
^ par. 3 Bankombo mosusu na lisolo oyo ezali ya bango te.
^ par. 10 Mpo na koyeba ndenge nini kobanda lisolo na mwana na yo na likambo etali kosangisa nzoto, mpe ndenge ya kosala yango na kolanda mbula na bango, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2010, nkasa 12-14.
^ par. 22 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Kosangisa nzoto ekobongisa boyokani na biso?” na Lamuká! ya Yuli—Sɛtɛmbɛ 2010, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
OMITUNA . . .
-
Makambo nini emonisi ete mwana na ngai azali mpenza na bizaleli ya malamu?
-
Ntango nazali kosolola na mwana na ngai na likambo etali kosangisa nzoto, namonisaka yango libosoliboso ete ezali likabo ya Nzambe to ezali motambo ya Satana?