Kebá okosama te
Kebá okosama te
DON QUICHOTTE ezali nkombo ya moto moko ya lisapo oyo mokomi moko ya Espagne, Miguel de Cervantes alobelaki na buku na ye na ekeke ya 16. Na lisapo yango, Don quichotte, atondisaki makanisi na ye na masapo mpe makambo ya lokuta na ntina na basoda ya mpiko oyo bazalaki na bibundeli oyo ezali kongɛnga mpe bazalaki kokende kobikisa bilenge basi oyo bazalaki na likama. Mosika te, akómaki kokanisa ete azali mpe soda ya mpiko. Na eteni moko ya lisolo yango, akendaki kobundisa bitutelo oyo etambwisamaka na mopɛpɛ oyo abandaki kokanisa ete ezali etuluku ya bato mabe oyo bazalaki bilombe. Na makanisi na ye andimaki ete azali kosalela Nzambe ndenge azali koboma bilombe yango, mpe nsukansuka ayokaki mpenza nsɔni.
Ya solo, Don quichotte ezali lisapo mpamba; kasi mbala mingi, komikosa ezalaka likambo ya lisɛki te. Na ndakisa, kanisá molangwi masanga oyo azali kokanisa ete akoki komɛla masanga ndenge alingi, nzokande nsukansuka akobebisa nzoto na ye moko mpe bomoi ya libota na ye. To moto moko oyo azali koluka kozala nzoto mike, mpe nsima ya kolya azali koluka kosanza biloko oyo alei mpe azali kokanisa ete azali kolya malamu, mpe azali na nzoto kolɔngɔnɔ nzokande azali komiboma malɛmbɛmalɛmbɛ na nzala.
Moto nyonso akoki kokwea na motambo ya komikosa? Likambo ya mawa, yango ekoki kokóma. Mpo na koloba solo, biso nyonso tokoki kokwea na motambo yango. Tokoki kokosama mpe na mateya ya lingomba oyo tolingaka mingi—mpe yango ekoki komemela biso makama minene. Mpo na nini? Ndenge nini okoki kosala mpo okosama te?
Kokosama ezali likama
Kokosa ndenge buku moko elimboli yango, ezali “kotinda moto andima likambo
oyo ezali lokuta ete ezali solo mpe likambo oyo ekoki kosalema te ete ekoki kosalema.” Esangisi mpe “kotinda moto andima na makasi likanisi ya lokuta to andima mateya oyo ekosala ete azanga boyebi, abulungana to azanga elikya.” Likanisi mpenza ya liloba wana, mpe maloba mosusu lokola “kobungisa” mpe “kobuba,” ezali komema moto na ndenge ya nse nse abunga nzela. Ya solo, moto oyo ayebi te ete bazali “kokosa ye, bazali kobulunganisa ye, to kolongola ye elikya” na makambo oyo ezali solo te, azali na likama monene.Likambo oyo eleki mabe mpenza ezali ete mbala mingi moto oyo azali kokosama akangamaka na makambo oyo bayebisi ye ata soki balakisi ye mpenza ete makambo yango ezali lokuta. Ekoki kozala ete makambo yango ekɔtelá ye mpenza na makanisi mpe amoni kaka ete akanga miso mpe matoi na makambo nyonso oyo ekoki kokweisa makambo oyo andimaka.
Tokoki kokosama?
Ntango mosusu okoki komituna, ‘ezali kolekisa ndelo te koloba ete biso nyonso tozali na likama ya kokosama na likambo etali mateya ya lingomba oyo tondimaka?’ Te, ezali bongo te. Ezali mpo Satana Zabolo, oyo Yesu abengaki “tata ya lokuta,” azali na mokano ya kokosa biso nyonso. (Yoane 8:44) Na Biblia, Satana abengami mpe “nzambe ya makambo ya ntango oyo.” “Azipi makanisi” ya bamilio ya bato na boumeli ya bikeke. (2 Bakorinti 4:4) Ata lelo oyo, azali “kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.”—Emoniseli 12:9.
Satana abandá kokosa bato bandá na ebandeli. Na ndakisa, akosaki Eva ete ezali na ntina te atosa mibeko ya Mozalisi na ye mpe ete akoki ‘kokóma mpenza lokola Nzambe, koyeba malamu ná mabe.’ (Ebandeli 3:1-5) Yango ezalaki kokosama monene, mpo atako bato bakelamá na likoki ya kopona likambo oyo balingi kosala, bakelamaki te na likoki ya kokata bango moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Kaka Nzambe, oyo azali Mozalisi mpe Nkolo oyo Aleki Nyonso nde azali na lotomo mpe bokonzi yango. (Yirimia 10:23; Emoniseli 4:11) Ezali mpenza komikosa kokanisa ete likoki ya kopona oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe elimboli kozala na lotomo ya kokata oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe! Likambo ya mawa, biso bato ya kozanga kokoka tokweaka na motambo yango na pɛtɛɛ nyonso.
Ekoki mpe kokómela yo?
Ekoki kozala ete mateya ya lingomba oyo yo olingaka eumeli bikeke mingi, to mpe ekoki kozala ete bankɔkɔ ya bankɔkɔ na yo bazalaki na lingomba yango. Kasi, yango elingi koloba kaka te ete yango ezali mateya ya solo. Mpo na nini? Biblia emonisi ete nsima ya liwa ya bantoma ya Kristo, bato ya bokosi bakɔtaki na lisangá ya bokristo mpe bateyaki “makambo ya mbilingambilinga mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Misala 20:29, 30) Na mayele nyonso, balongaki kobungisa bato nzela “na maloba ya kondimisa” mpe “na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato.”—Bakolose 2:4, 8.
Lelo oyo makambo ebongwani? Mpenza te, mpo ntoma Paulo akebisaki ete makambo ekobeba mpenza na “mikolo ya nsuka,” oyo tozali kobika. Akomaki boye: “Bato mabe mpe bakosi bakosala lisusu mabe koleka, bakokosa bato mpe bango moko bakokosama [to ‘bakojimbisa mpe bakojimbisama,’ haut fleuve].”—2 Timote 3:1, 13.
Yango wana, ezali likambo ya bwanya kozwa na lisɛki te likebisi oyo ntoma Paulo apesaki ete: “Na yango, moto oyo akanisi ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.” (1 Bakorinti 10:12) Ya solo, Paulo azalaki kolobela boyokani ya moto ná Nzambe. Kutu, kokanisa ete Satana akoki kokosa yo te, ezali komikosa mpenza. Moto nyonso akoki kokwea na “mayele mabe” ya Satana. (Baefese 6:11) Yango wana, ntoma azalaki kobanga mpo na baninga na ye bakristo ete “ezala na ndenge nini, lokola nyoka abendaki Eva na mayele mabe na ye, makanisi na [bango] ebebisama mpe elongwa na bosembo mpe na bopɛto ya bizaleli oyo esengeli na Kristo.”—2 Bakorinti 11:3.
Ndenge nini okoki komibatela mpo okosama te?
Na yango, okoki kosala nini mpo Satana akosa yo te? Ndenge nini okoki koyeba mpenza soki ozali “kosambela [Nzambe] na elimo mpe na solo”? (Yoane 4:24) Salelá oyo Yehova Nzambe apesi yo. Ya liboso, apesi yo “mayele” mpo oyeba kokesenisa oyo ezali solo mpe oyo ezali lokuta. (1 Yoane 5:20) Apesi yo mpe likoki ya koyeba mayele ya Satana. (2 Bakorinti 2:11) Kutu, apesi yo nyonso oyo ozali na yango mposa mpo na kotɛmɛla mayele ya Satana ya koluka kobungisa yo nzela.—Masese 3:1-6; Baefese 6:10-18.
Likambo eleki ntina, Nzambe apesá yo eloko moko oyo ekoki kobeba te, mpo omibatela. Eloko yango nini? Eloko kaka moko oyo ntoma Paulo alendisaki moninga na ye Timote atyela yango motema ntango akutanaki na likambo oyo etalelaki kondima na ye. Nsima ya kokebisa ye mpo na “bato mabe mpe bakosi,” ntoma Paulo ayebisaki Timote atɛmɛla bango, asalela “makomi mosantu,” elingi koloba, Biblia, Liloba mosantu ya Nzambe na mateya na ye nyonso.—2 Timote 3:15.
Ya solo, bato mosusu bakoki koloba ete moto nyonso oyo andimaka Nzambe mpe Biblia ete ezali Liloba na ye oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu akoki kokosama te. Nzokande, mpo na koloba solo, baoyo bakosamaka ezali bato oyo na motó makasi nyonso baboyaka kondima makambo nyonso oyo emonisaka ete Mozalisi azali mpe ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. *—Baroma 1:18-25; 2 Timote 3:16, 17; 2 Petro 1:19-21.
Na esika ya kokosama na “boyebi ya lokuta,” salelá Liloba ya Nzambe mpo na kosimba solo. (1 Timote 6:20, 21) Zalá lokola mibali mpe basi ya makanisi malamu oyo ntoma Paulo ateyaki na Beroya. “Bayambaki liloba na mposa makasi mpenza koleka.” Bazalaki kaka te kondima makambo oyo Paulo ateyaki bango, kasi bazalaki mpe “kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezali bongo.”—Misala 17:11.
Osengeli kobanga te mpo na kotalela mateya na yo ndenge wana. Kutu, Biblia elendisi yo ‘oluka koyeba likambo nyonso’ liboso ya kondima ete ezali solo. (1 Batesaloniki 5:21) Pene na nsuka ya ekeke ya liboso ya ntango na biso, ntoma Yoane alendisaki baninga na ye bakristo boye: “Bandeko ya bolingo, bóndimaka te liloba nyonso oyo emonani lokola nde euti na Nzambe, kasi bómekaka maloba yango mpo na komona soki euti mpenza na ye.” (1 Yoane 4:1) Ya solo, ata soki mateya ya lingomba moko emonani lokola euti na Nzambe, ekozala kaka bwanya kotalela Makomami liboso ya kondima ete ezali solo.—Yoane 8:31, 32.
Salelá makambo oyo ozali koyekola
Kasi, ezali na eloko mosusu oyo osengeli kosala. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Bókóma batosi ya liloba, kasi bayoki kaka te, noki bómikosa na makanisi ya lokuta.” (Yakobo 1:22) Koyeba oyo Biblia eteyaka, ekoki te. Osengeli kosalela yango. Ndenge nini? Kosala oyo Nzambe azali kosɛnga yo mpe koboya kosala makambo oyo apekisi.
Na ndakisa, talá bizaleli mabe oyo ezali zingazinga na biso. Yango emonisi te ete Satana azali kolonga kokosa bato bákanisa ete bakoki koboya kotosa mibeko ya Nzambe kozanga ete bázwa etumbu? Mpo na yango, ntoma Paulo apesaki bakristo toli oyo ya polele: “Bómikosa te: Nzambe azali moto ya kotyola te. Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.”—Bagalatia 6:7.
Kozala te lokola “zoba,” oyo Yesu alobaki ete ‘ayokaki’ maloba na ye mpe ‘asalelaki yango te.’ Lokola Don quichotte oyo Cervantes alobelaki, oyo amikosaki na makanisi na ye moko, moto yango akosamaki mpo azalaki kokanisa ete akoki kotonga ndako ya makasi mpe ya malamu likoló ya zɛlo. Kasi, zalá nde lokola moto oyo “atongaki ndako na ye likoló ya mabanga.” Yesu abengaki ye “moto ya mayele” mpo ayokaki maloba na ye mpe ‘atosaki yango.’—Matai 7:24-27.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 18 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous? mpe buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Elilingi na nkasa 12, 13]
Omonaka makambo ndenge ezali mpenza?
Na bambula ya 1930, Oscar Reutersvärd, moto moko ya mayele na Suède, asalaki mayemi mpe bililingi oyo ekómaki kobengama bililingi oyo ezalaka mpasi mpo na koyeba (figures impossibles). Na lobɔkɔ ya mwasi, ezali na ndakisa moko ya elilingi yango. Soki otali yango likolólikoló, bililingi yango ekoki kotinda yo ondima makambo oyo ezali kobuka mibeko etali makanisi ya bomoto. Kasi, soki otali yango na likebi, ekoki komonana ete ezali mitambo oyo bato ya mayele basali mpo na kobulunganisa to kokosa miso mpe makanisi ya bato oyo bazali kotala yango.
Ezali te kaka bililingi wana nde emonanaka ndenge mosusu koleka ndenge ezali mpenza. Mbula koleka soki nkóto mibale, Biblia epesaki likebisi oyo: “Bókeba: mbala mosusu moto moko akoki komema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato, na kolanda makambo mikemike ya mokili kasi na kolanda Kristo te.”—Bakolose 2:8.
Eloko oyo ezali kosala ete tózwa likebisi yango na valɛrɛ, ezali ete moto oyo akomaki makambo yango akosamaki liboso. Lokola atángaki na makolo ya moko ya bateyi ya mangomba oyo ayebanaki mingi na ntango wana mpe lokola ayebanaki na bisika ya minene, emonanaki ete ezalaki mpasi mpo akosama.—Misala 22:3.
Mobali yango—Saulo moto ya Tarse—andimaki ete moto nyonso oyo azali te kotosa lingomba ya bankɔkɔ na ye mpe mimeseno na yango, asengelaki kozwa etumbu. Lokola bakonzi ya mangomba bapesaki ye bokonzi, azalaki komona yango lokola mokumba oyo Nzambe apesi ye ya konyokola moto nyonso oyo aboyaki kowangana Kristo. Apesaki kutu mabɔkɔ mpo na koboma moko ya bato ya ekólo oyo bakoselaki makambo ete azali motuki.—Misala 22:4, 5, 20.
Na nsima, Saulo asalisamaki mpo amona bokeseni kati na oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, oyo Nzambe andimaka mpe oyo aboyaka. Ntango Saulo amonaki ete azalaki na libunga, mobali wana ya mpiko abongwanaki mpe ayebanaki na nkombo ya Paulo, ntoma ya Yesu Kristo. Lokola akosamaki lisusu te, Paulo amonaki losambo ya solo.—Misala 22:6-16; Baroma 1:1.
Lokola Paulo, bato mingi ya sembo bakosamaki liboso na mateya oyo ekokanaki na bililingi oyo tolobeli awa—mateya oyo emonanaki lokola ezali malamu, kasi euti te na Liloba ya Nzambe. (Masese 14:12; Baroma 10:2, 3) Na nsima, basalisamaki mpo bámona mpenza ndenge mateya mpe misala ya lingomba na bango ezali. (Matai 7:15-20) Ntango bazwaki boyebi ya solosolo ya Biblia, batikaki mateya mpe bizaleli na bango ya mabe mpo na kondimama na Nzambe.
Okosepela kolanda ndakisa ya ntoma Paulo mpe kotalela malamu mateya na yo na lisalisi ya Biblia, Liloba ya Nzambe? Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]
Eyemami na Doré