Ndenge oyo liwa ya Yesu ekoki kobikisa yo
ELEKI sikoyo mbula pene na 2 000, na Elekeli ya Bayuda ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), moto moko akufaki mpo bato mosusu bákoka kozwa bomoi. Moto yango ezalaki nani? Ezalaki Yesu Monazalete. Likambo yango ezalaki na litomba mpo na banani? Mpo na bato nyonso. Vɛrsɛ moko oyo bato mingi bayebi malamu elobeli likambo yango boye: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.”—Yoane 3:16.
Atako bato mingi bayebi maloba yango, bato moke kaka nde bayebaka ndimbola na yango. Bato mingi bamitunaka boye: ‘Mpo na nini tozali na mposa ya mbeka ya Klisto? Ndenge nini liwa ya moto moko ekoki kopesa bato nyonso likoki ya kotikala na bomoi mpo na libela?’ Biblia epesi biyano ya polele na mituna yango.
Ndenge oyo liwa ekómaki koyangela bato
Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe akelaki bato mpo bázala na bomoi na boumeli ya mwa ntango awa na mabelé, bákutana na bampasi, básepela na mwa makambo mosusu, mpe na nsima bákufa mpo na kokende na esika ya malamu koleka. Na makanisi ya bato yango, liwa ezali mokano ya Nzambe. Nzokande, Biblia emonisi ete bato bakufaka mpo na ntina mosusu. Elobi boye: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpamba te bango nyonso basalaki lisumu.” (Baloma 5:12) Vɛrsɛ yango emonisi ete bato bakufaka mpo na lisumu. Kasi, “moto moko” oyo na nzela na ye lisumu epalanganaki epai ya bato nyonso ezali nani?
Buku moko (The World Book Encyclopedia) emonisi ete bato mingi ya siansi bandimaka ete bato nyonso bazali na nkɔkɔ moko, mpe nkɔkɔ yango ezali “moto moko” oyo Biblia elobeli. Genese 1:27 elobi boye: “Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye mpenza, na elilingi ya Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali mpe mwasi.” Na bongo, Biblia emonisi ete mobali ná mwasi ya liboso bazalaki bikelamu ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.
Lisolo ya Genese elobeli makambo oyo elekaki nsima ya kozalisama ya mobali mpe mwasi ya liboso. Kasi, na lisolo yango mobimba, Genese 2:16, 17) Nzambe alingaki ete bato báfanda na paladiso awa na mabelé, bázala na esengo mpe na nzoto kolɔngɔnɔ mpo na libela. Mokano na ye ezalaki te ete bato bánunaka mpe bákufaka. Kasi, ndenge nini liwa ekómaki koyangela bato?
Nzambe alobelaki liwa kaka lokola etumbu oyo basengelaki kozwa soki bazangi botosi. (Genese mokapo 3 elobeli ndenge oyo mobali mpe mwasi ya liboso baboyaki na nko kotosa Yehova Nzambe, Mopesi ya bomoi. Mpo na yango, Nzambe apesaki bango etumbu oyo ayebisaki bango liboso. Alobaki na mobali boye: “Ozali putulu, mpe okozonga kati na putulu.” (Genese 3:19) Ndenge Nzambe alobaki yango, bato yango mibale oyo bazangaki botosi bakufaki.
Kasi, etumbu yango esukaki kaka epai ya mobali mpe mwasi ya liboso te. Kozanga botosi na bango ebebiselaki bana na bango elikya ya kozala na bomoi ya seko. Maloba oyo Yehova alobaki na Adama ná Eva ntango amonisaki bango mokano na ye, etalelaki mpe bana na bango atako babotamaki naino te; alobaki boye: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló ya mbisi na mai, mpe na ndɛkɛ na likoló, mpe likoló ya nyama nyonso ya bomoi ekotambolaka na mokili.” (Genese 1:28) Nsukansuka, mokili elingaki kotonda na bato oyo balingaki kozala na bomoi ya seko mpe ya esengo. Kasi, “moto moko,” elingi koloba nkɔkɔ na bango Adama, atɛkaki bango lokola baombo na lisumu mpe na liwa. Ntoma Paulo, oyo azali mpe nkɔkɔ ya moto ya liboso, akomaki boye: “Nazali moto ya mosuni, oyo atɛkamá na nse ya lisumu.”—Baloma 7:14.
Kaka ndenge bato mosusu babebisaka batablo ya ntalo mingi, lisumu ya Adama ebebisaki mpenza bato, bikelamu ya Nzambe. Bana ya Adama babotaki; na nsima, bana ya bana na bango babotaki, mpe bongo na bongo. Libota mokomoko ya bato oyo babotamaki, bakolaki, babotaki bana, mpe nsukansuka bakufaki. Mpo na nini bango nyonso bakufaki? Mpamba te bango nyonso bautaki na Adama. Biblia elobi boye: “Na libunga ya moto kaka moko bato mingi bakufaki.” (Baloma 5:15) Maladi, bobange, makanisi ya kosala mabe, mpe liwa yango moko ezali mbuma mabe oyo lisumu ya Adama ememelaki bana na ye. Bana yango ezali biso nyonso.
Na mokanda oyo akomelaki baklisto ya Loma, ntoma Paulo alobelaki mokakatano ya bato ya kozanga kokoka—kati na bango ye Baloma 7:14-25) Ya solo, Mozalisi na biso azwi bibongiseli mpo na kobikisa biso na nzela ya Mwana na ye, Yesu Klisto.
moko—mpe etumba oyo bazalaka na yango mpo na kokima makambo mabe oyo lisumu ememaki. Alobaki boye: “Ngai moto ya mawa! Nani akobikisa ngai na nzoto oyo ezali kozwa liwa oyo?” Motuna yango ebongi mpenza! Nani akokaki kobikisa Paulo mpe bato mosusu nyonso oyo bazali na mposa ya kolongwa na boombo ya lisumu mpe ya liwa? Paulo ye moko apesaki eyano ete: “Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Klisto Nkolo na biso!” (Mokumba oyo Nzambe apesi Yesu mpo na kobikisa bato
Yesu alimbolaki mokumba na ye mpo na kobikisa bato na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Alobaki boye: “Mwana ya moto ayei . . . kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.” (Matai 20:28, haut fleuve) Na ndenge nini bomoi ya Yesu ezali lisiko? Liwa na ye ezali na litomba nini mpo na biso?
Biblia emonisi ete Yesu azalaki moto oyo “azangi lisumu” mpe “akabwani na basumuki.” Bomoi na ye mobimba, Yesu atosaki mibeko ya Nzambe na ndenge ya kokoka. (Baebele 4:15; 7:26) Na yango, soki Yesu akufaki, ezalaki te mpo asalaki lisumu mpe azangaki botosi lokola Adama. (Ezekiele 18:4) Yesu andimaki kokufa mpo na kokokisa mokano ya Tata na ye ya kobikisa bato na lisumu mpe na liwa. Ndenge touti kotánga yango, Yesu andimaki “kopesa bomoi na ye lokola lisiko.” Na bolingo oyo moto mosusu amonisá te, Yesu andimaki ‘kokufela moto nyonso.’—Baebele 2:9.
Bomoi oyo Yesu akabaki ekokani mpenza na bomoi oyo Adama abungisaki ntango asalaki lisumu. Liwa ya Yesu ememaki matomba nini? Yehova andimaki mbeka yango lokola “lisiko oyo ekokani mpo na bato nyonso.” (1 Timote 2:6) Nzambe asalelaki bomoi ya Yesu mpo na kosomba, to kolongola, bato na boombo ya lisumu mpe liwa.
Biblia elobeli mbala na mbala likambo yango oyo emonisi bolingo monene ya Mozalisi. Paulo ayebisaki baklisto ete ‘basombamaki na motuya moko boye.’ (1 Bakolinti 6:20; 7:23) Petelo akomaki ete Nzambe asalelaki wolo to palata te, kasi makila ya Mwana na ye mpo na kosikola baklisto na liwa. (1 Petelo 1:18, 19) Na lisalisi ya mbeka ya Klisto, Yehova azwaki bibongiseli mpo na kobikisa bato na liwa.
Okozwa litomba na lisiko ya Klisto?
Ntoma Yoane alobelaki matomba ya lisiko ya Klisto na maloba oyo: “[ Yesu Klisto] azali mbeka ya mbɔndi mpo na masumu na biso, nzokande mpo na oyo ya biso kaka te kasi mpe mpo na oyo ya mokili mobimba.” (1 Yoane 2:2) Ya solo, lisiko ya Klisto ezali mpo na bato nyonso. Kasi, yango elingi nde koloba ete moto nyonso akozwa litomba na lisiko yango kaka mpamba? Te. Tókanisa lisusu likambo oyo tolobelaki na lisolo eleki. Bato oyo bakendaki kobikisa basali oyo bakangamaki na nse ya mabelé bakitisaki eloko moko tii na esika oyo bazalaki, kasi mosali mokomoko asengelaki kokɔta na kati ya eloko yango. Ndenge moko mpe, baoyo balingi kozwa litomba na lisiko ya Klisto basengeli kokanga mabɔkɔ te. Basengeli kosala likambo moko.
Nzambe alingi básala likambo nini? Yoane 3:36 elobi boye: “Moto oyo azali komonisa kondima na kati ya Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo atosaka Mwana te akomona bomoi te, kasi nkanda ya Nzambe efandi likoló na ye.” Nzambe alingi ete tózala na kondima na mbeka ya Klisto. Kasi, esuki wana te. Biblia elobi boye: “Na likambo oyo nde tozali koyeba ete tosili koyeba [Yesu], elingi koloba, soki tozali kokoba kotosa bakomandema na ye.” (1 Yoane 2:3) Na bongo, tomoni polele ete mpo na kobikisama na lisumu mpe na liwa, tosengeli kozala na kondima na mbeka ya Klisto mpe kotosa mibeko na ye.
Lolenge moko oyo tokoki komonisa kondima na biso na mbeka ya Yesu ezali kokanisa liwa yango, ndenge ye moko atindaki, mpo na komonisa ete tozali na botɔndi. Na butu oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, Yesu apesaki bantoma na ye ya sembo limpa oyo ezalaki komonisa nzoto na ye mpe vinyo oyo ezalaki komonisa makila na ye mpe alobaki na bango ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Batatoli ya Yehova bapesaka motuya mingi na boyokani na bango na Mwana ya Nzambe, mpe batosaka etinda yango. Na mbula oyo, Ekaniseli ya liwa ya Yesu Klisto ekozala na mokolo ya pɔsɔ, 22 Marsi, nsima ya kolala ya moi. Tozali na esengo ya kobenga yo oyangana na biso na likita yango ya ntina mingi mpo na kotosa etinda ya Yesu. Batatoli ya Yehova ya engumba na bino bakoyebisa yo ngonga mpe esika oyo likita yango ekosalema. Na Ekaniseli yango, okoyeba makambo mosusu oyo osengeli kosala mpo mbeka ya Klisto esikola yo na makambo mabe oyo lisumu ememaki.
Lelo oyo, bato mingi te bazali mpenza kokanga ntina ya likambo monene oyo Mozalisi mpe Mwana na ye basalaki mpo na kobikisa bango. Baoyo bazali komonisa kondima na mbeka yango bakoki mpenza kozala na esengo. Ntoma Petelo akomelaki baninga na ye baklisto ete: “Bozali komonisa kondima na kati na [ Yesu] mpe bozali kosepela mingi na esengo ya koloba te mpe oyo etondi na nkembo, mpamba te bozali kozwa nsuka ya kondima na bino, lobiko ya milimo na bino.” (1 Petelo 1:8, 9) Soki olingi Yesu Klisto mpe omonisi kondima na mbeka oyo apesaki mpo na kosikola biso, okozala na esengo na bomoi na yo mpe okozala na elikya ya kobikisama na lisumu mpe na liwa.