“Bakiselá biso kondima”
“Salisá ngai na esika oyo nazali na bosɛnga na kondima!”—MARKO 9:24.
1. Kondima ezali na ntina nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)
OSILÁ komituna: ‘Yehova akolinga mpenza kobikisa ngai na ntango ya bolɔzi monene?’ Ntoma Paulo alobaki ete ezaleli moko ya ntina mingi oyo tosengeli na yango mpo na tóbika ezali kondima. Alobaki ete: “Soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa ye ata moke te.” (Baebre 11:6) Likambo yango ekoki komonana lokola ezali mpasi te, kasi mpo na koloba solo “bato nyonso te nde bazalaka na kondima.” (2 Batesaloniki 3:2) Bavɛrsɛ wana mibale esalisi biso tóyeba ete ezali mpenza na ntina tókómisa kondima na biso makasi.
2, 3. (a) Kondima na biso ezali na ntina nini? (b) Tokotalela nini sikoyo?
2 Ntoma Petro alobelaki kondima oyo “emekami.” (Tángá 1 Petro 1:7.) Bolɔzi monene ekómi mpenza pene, mpe tolingi kozala “bato oyo bazali na kondima mpo na kobatela molimo na bomoi.” (Baebre 10:39) Na yango, tosengeli mpenza kosala nyonso mpo na kokómisa kondima na biso makasi. Tokolinga kozala na kati ya bato oyo bakozwa mbano ntango Yesu Kristo, mokonzi na biso akomonana. Yango wana, na ndakisa ya moto oyo asɛngaki Yesu ete apesa ye kondima mingi, biso mpe tokoki koloba: “Salisá ngai na esika oyo nazali na bosɛnga na kondima!” (Marko 9:24) To lokola bantoma, tokoki koloba: “Bakiselá biso kondima.”—Luka 17:5.
3 Na lisolo oyo, tokotalela makambo oyo: Ndenge nini tokoki kokómisa kondima na biso makasi? Ndenge nini tokoki komonisa ete kondima na biso ezali makasi? Mpe mpo na nini tokoki kondimisama ete Nzambe akoyanola biso soki tosɛngi ye abakisela biso kondima?
NZAMBE ASEPELAKA NTANGO TOZALI KOKÓMISA KONDIMA NA BISO MAKASI
4. Bandakisa nini ekoki kotinda biso tókómisa kondima na biso makasi?
4 Lokola kondima ezali na ntina mingi, Yehova apesi biso ebele ya bandakisa ya kondima na Biblia. Bandakisa yango “ekomamaki mpo eteya biso.” (Baroma 15:4) Ndakisa ya Abrahama, Sara, Yisaka, Yakobo, Moize, Rahaba, Gideone, Barake mpe ebele ya bato mosusu ekoki kotinda biso tókómisa kondima na biso makasi. (Baebre 11:32-35) Longola bandakisa wana ya bato ya kala, tozali mpe na bandakisa kitoko ya kondima ya bandeko na biso mibali mpe basi ya mikolo na biso. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)
Tozali na bandakisa kitoko ya kondima ya bandeko na biso mibali mpe basi ya mikolo na biso
5. (a) Ndenge nini Eliya amonisaki ete azali na kondima makasi epai ya Yehova? (b) Motuna nini tosengeli komituna?
5 Ndakisa moko ya Biblia ezali ya mosakoli Eliya. Wana ozali kokanisa na mozindo na ndakisa na ye, luká komona makambo mitano oyo asalaki mpo na komonisa ete azalaki kotyela Yehova motema. (1) Ntango Eliya ayebisaki mokonzi Ahaba ete Yehova akonɔkisa mbula te, alobaki na elikya nyonso ete: “Lokola Yehova Nzambe ya Yisraele oyo natɛlɛmi liboso na ye azali solo na bomoi, na bambula oyo, mamwɛ to mbula ekozala te.” (1 Bakonzi 17:1) (2) Eliya andimisamaki ete Yehova akopesa ye mpe bato basusu biloko oyo basengeli na yango na eleko wana oyo mbula ekonɔka te. (1 Bakonzi 17:4, 5, 13, 14) (3) Eliya andimisamaki mpe ete Yehova akosekwisa mwana ya mwasi moko oyo mobali na ye akufá. (1 Bakonzi 17:21) (4) Andimisamaki ete mɔtɔ ya Yehova ekozikisa mbeka na ye na ngomba Karamele. (1 Bakonzi 18:24, 37) (5) Ata liboso ete mbula ebɛta, Eliya ayebisaki Ahaba na elikya nyonso ete: “Tɛlɛmá, lyá mpe mɛlá; mpo makɛlɛlɛ oyo ezali koyokana ezali lokito ya mbula makasi.” (1 Bakonzi 18:41) Na yango, nsima ya kotalela makambo oyo, tokoki komituna boye: ‘Kondima na ngai ezali makasi lokola oyo ya Eliya?’
TOKOKI KOSALA NINI MPO TÓKÓMISA KONDIMA NA BISO MAKASI?
6. Mpo tókómisa kondima na biso makasi, tosengeli kosɛnga Yehova nini?
6 Lokola tokoki te kokómisa kondima na biso makasi na ndenge na biso moko, tosengeli kosɛnga Nzambe elimo santu. Mpo na nini? Mpo kondima ezali na kati ya mbuma ya elimo santu. (Bagalatia 5:22) Tokomonisa ete tozali na bwanya ntango tozali kolanda toli ya Yesu ya kobondela mpo na kozwa elimo santu mingi. Yesu alakaki ete Yehova ‘akopesa baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu.’—Luka 11:13.
Tokomonisa ete tozali na bwanya ntango tozali kolanda toli ya Yesu ya kobondela mpo na kozwa elimo santu mingi
7. Lobelá ndenge oyo tokoki kosala mpo kondima na biso ezala ntango nyonso makasi.
7 Soki kondima na biso epai ya Nzambe ekómi makasi, tosengeli kobatela yango. Tokoki kokokanisa kondima na mɔtɔ. Ntango topelisi mɔtɔ, ekoki kopela makasi. Kasi, soki tobakisi nkoni na mɔtɔ yango te, ekoki kobanda kokufa mokemoke tii ekotikala kaka putulu ya mpamba. Kasi soki tozali kobakisa nkoni na mɔtɔ, tokobatela yango mpo ekufa te. Ezali mpe bongo mpo na kondima na biso. Soki tozali kokoba kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, tokolinga Yehova mingi mpe tokolinga Biblia lisusu mingi. Mpe nsukansuka, kondima na biso ekozala ntango nyonso makasi.
8. Eloko nini ekosalisa yo okómisa kondima na yo makasi mpe obatela yango?
8 Osengeli kosuka te kaka na kosepela na makambo oyo oyekolaki liboso ya kozwa batisimo. (Baebre 6:1, 2) Na ndakisa, koyekola bisakweli ya Biblia oyo esilá kokokisama ekosalisa yo okómisa kondima na yo makasi mpe obatela yango. Okoki mpe kosalela Liloba ya Nzambe mpo na komona soki kondima na yo ezali mpenza makasi.—Tángá Yakobo 1:25; 2:24, 26.
9, 10. Ndenge nini makambo oyo elandi ekómisaka kondima na biso makasi (a) baninga malamu? (b) makita ya lisangá? (c) mosala ya kosakola?
9 Ntoma Paulo alobaki ete bakristo bakoki ‘kolendisana, moto na moto na kondima ya mosusu.’ (Baroma 1:12) Yango elingi koloba nini? Ntango tozali kolekisa ntango elongo na bandeko na biso, moko na moko akoki kolendisa kondima ya mosusu. Yango ezali mpe solo ntango tozali kolekisa ntango elongo na bato oyo kondima na bango “emekami.” (Yakobo 1:3) Baninga mabe babebisaka kondima na biso, kasi oyo ya malamu basalisaka biso tózala na kondima makasi. (1 Bakorinti 15:33) Yango wana, bapesaka biso toli ete tóyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Kuna, tokobaka ‘kolendisana.’ (Tángá Baebre 10:24, 25.) Lisusu, mateya oyo tozwaka na makita ekómisaka kondima na biso makasi. Biblia elobi ete “kondima eutaka na likambo oyo moto ayoki.” (Baroma 10:17) Mpo na yango, omituna boye: ‘Makita ya lisangá ekómá mpenza lokola eteni moko ya nzoto na ngai?’
10 Tokómisaka mpe kondima na biso makasi ntango tosakwelaka basusu nsango malamu ya Biblia mpe toteyaka bango. Na ndakisa ya bakristo ya liboso, toyekolaka kotyela Yehova motema mpe koloba na mpiko mpenza na likambo nyonso.—Misala 4:17-20; 13:46.
11. Mpo na nini Kalebe ná Yosua bazalaki na kondima makasi, ndenge nini biso mpe tokoki kozala lokola bango?
11 Kondima na biso epai ya Yehova ekómaka makasi ntango tomonaka ndenge asalisaka biso mpe ayanolaka na mabondeli na biso. Yango nde esalemaki epai ya Kalebe mpe Yosua. Bamonisaki kondima epai ya Yehova ntango bakendaki Yosua 23:14; 24:14, 15) Ntango tozali kotyela Yehova motema mpe tozali komona ndenge azali kosalisa mokomoko na biso, kondima na biso ekómaka makasi.—Nzembo 34:8.
konɔnga Mokili ya ndaka. Wana mikolo ezalaki koleka, kondima na bango ekómaki lisusu makasi ntango nyonso oyo bazalaki komona ndenge Yehova asalisaki bango. Na elikya nyonso, Yosua ayebisaki Bayisraele boye: “Na maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino, ata liloba moko te ezangaki kokokisama.” Alobaki lisusu ete: “Bóbanga Yehova mpe bósalela ye na bosembo mpe na bosolo.” Na nsima, abakisaki ete: “Kasi mpo na ngai mpe bato ya ndako na ngai, tokosalela Yehova.” (NDENGE OYO TOKOKI KOMONISA KONDIMA NA BISO
12. Ndenge nini tomonisaka ete tozali na kondima makasi?
12 Ndenge nini tomonisaka ete tozali na kondima makasi? Moyekoli Yakobo alobaki ete: “Nakolakisa yo kondima na ngai na misala na ngai.” (Yakobo 2:18) Misala na biso emonisaka ete tozali na kondima makasi. Tólobela naino yango.
13. Ndenge nini tomonisaka kondima na biso ntango tozali kosakola?
13 Kosakola ezali lolenge eleki malamu oyo tomonisaka kondima na biso. Mpo na nini? Mpamba te ntango tosakolaka, tomonisaka ete tozali kondima ete nsuka ekómi pene mpe ete “ekokóma nsima ya ngonga te.” (Habakuku 2:3) Mpo na koyeba soki kondima na biso ezali makasi, tokoki komituna boye: ‘Namonaka mpenza ete mosala ya kosakola ezali na ntina mingi? Nasalaka nyonso oyo ekoki mpo nayebisa basusu makambo etali Nzambe? Nalukaka mabaku ya kosalela Yehova lisusu mingi?’ (2 Bakorinti 13:5) Tokomonisa ete tozali na kondima makasi soki tozali ‘koloba polele mpo na lobiko,’ elingi koloba, kosakola nsango malamu.—Tángá Baroma 10:10.
14, 15. (a) Ndenge nini tokoki komonisa kondima mokolo na mokolo? (b) Lobelá ndakisa moko oyo emonisi ete kondima makasi emonanaka na misala.
Baebre 4:16) Tomonisaka kondima epai ya Yehova ntango tosɛngaka ye asalisa biso. Yesu alobaki ete tokoki kosɛnga Yehova apesa biso “bilei . . . na kolanda bamposa ya mokolo.” (Luka 11:3) Masolo oyo ezali na Biblia emonisi ete Yehova akoki kopesa biso eloko nyonso oyo tosengeli na yango. Na ndakisa, ntango mbula ezalaki konɔka te na Yisraele na boumeli ya ntango molai, Yehova apesaki Eliya biloko ya kolya mpe mai. Biblia elobi ete “bayanganga ezalaki komemela ye limpa ná mosuni na ntɔngɔ mpe limpa ná mosuni na mpokwa, mpe azalaki komɛla mai ya lobwaku ya mokɛli.” (1 Bakonzi 17:3-6) Tozali na kondima ete Yehova akoki mpe kopesa biso oyo tosengeli na yango.
14 Tomonisaka mpe kondima na biso epai ya Yehova na ndenge toyikaka mpiko na mikakatano ya mokili oyo. Soki tozali na maladi, tolɛmbi nzoto, totungisami na makanisi, tozali babola to tozali na mikakatano mosusu, tosengeli kozala na kondima ete Yehova mpe Yesu bakosalisa biso “ntango tozali na mposa ya lisalisi.” (15 Tondimisami ete ntango tozali kosalela mitinda ya Biblia, tokokokisa bamposa ya libota na biso. Ndeko mwasi moko oyo abalá na nkombo Rebecca, oyo afandaka na Asie, amonisi ndenge oyo ye ná libota na ye basalelaki mitinda oyo ezali na Matai 6:33 mpe Masese 10:4. Alobi ete mobali na ye amonaki ete mosala na ye ekoki kobebisa boyokani na ye ná Yehova. Atikaki mosala yango. Kasi bazalaki na bana minei ya kobɔkɔla, yango wana babandaki kosala biloko ya kolya mpo na kotɛka. Nsima ya kosala mosala makasi wana, bazalaki kozwa mbongo mpenza oyo basengelaki na yango mpo na kokokisa bamposa ya libota na bango. Alobi ete: “Tomiyokaki ete Yehova asundoli biso soki moke te. Tozangaki eloko ya kolya te.” Oyebi ndakisa moko ya ndenge wana oyo elendisaki kondima na yo?
Tondimisami ete ntango tozali kosalela mitinda ya Biblia, tokokokisa bamposa ya libota na biso
16. Likambo nini ekosalema soki totyeli Nzambe motema?
16 Tosengeli soki moke te kotya ntembe ete soki tolandi litambwisi ya Yehova, akosalisa biso. Ntoma Paulo azongelaki maloba ya Habakuku ntango alobaki ete: “Moyengebene akozala na bomoi mpo na kondima.” (Bagalatia 3:11; Habakuku 2:4) Yango wana, tosengeli kozala na kondima makasi epai na ye oyo akoki mpenza kosalisa biso. Ntoma Paulo akundweli biso ete Nzambe azali “moto oyo, na boyokani na nguya oyo ezali kosala mosala na kati na biso, akoki kosala mingi mpenza koleka makambo nyonso oyo tosɛngaka to oyo eyelaka biso na makanisi.” (Baefese 3:20) Basaleli ya Yehova basalaka nyonso mpo na kosala mokano ya Nzambe, kasi bayebaka mpe ete makoki na bango ezali na ndelo. Tozali mpenza na botɔndi mpo ete Nzambe azali elongo na biso mpe ete apambolaka milende na biso.
BAOYO BASƐNGAKI ETE BÁZALA NA KONDIMA BAZWAKI BIYANO
17. (a) Ndenge nini Yesu ayanolaki bantoma? (b) Mpo na nini tokoki kolikya ete Yehova akoyanola na mabondeli oyo tosɛngaka ye abakisela biso kondima?
17 Nsima ya kotalela makambo oyo, ekozala malamu tólanda ndakisa ya bantoma oyo basɛngaki Yesu ete: “Bakiselá biso kondima.” (Luka 17:5) Yesu apesaki bantoma na ye eyano na ndenge ya kokamwa na Pantekote ya mobu 33, ntango bazwaki elimo santu mpe basosolaki malamumalamu mpenza mokano ya Nzambe. Yango elendisaki kondima na bango. Matomba nini emonanaki? Kobanda na ntango wana, babandaki kampanye monene ya mosala ya kosakola. (Bakolose 1:23) Tokoki kozala na elikya ete Nzambe akoyanola ntango tosɛngaka ye ete abakisela biso kondima? Yehova alaki biso ete ekoki kosalema soki tozali ‘kosɛnga na boyokani na mokano na ye.’—1 Yoane 5:14.
18. Ndenge nini Yehova apambolaka baoyo bakómisaka kondima na bango makasi?
18 Soki tozali mpenza kotyela Yehova motema, akosepela na biso. Akoyanola na mabondeli na biso oyo tosɛngaka ye abakisela biso kondima, kondima na biso ekokóma makasi, mpe tokokóma “bato babongi na bokonzi ya Nzambe.”—2 Batesaloniki 1:3, 5.
^ par. 4 Mpo na bandakisa yango mosusu, talá masolo ya bomoi ya Lillian Gobitas Klose (na Lamuká! ya 22/07/1993 na Lifalanse), Feliks Borys (na Lamuká! ya 01/1994), mpe Josephine Elias (na Lamuká! ya sanza ya 09/2009, na Lifalanse).