“Kosilikela Yehova” soki moke te
“Bozoba ya moto ya mabele nde ebulunganisaka nzela na ye, bongo motema na ye ekómaka kosilikela Yehova.”—MAS. 19:3.
1, 2. Mpo na nini tosengeli te kopesa Yehova foti mpo na mikakatano ya bato? Pesá ndakisa.
KANISÁ ete esali bambula mingi banda obalá mpe yo ná mwasi na yo bozali na libala ya esengo. Kasi mokolo moko ntango ozongi ndako, okuti biloko nyonso ya ndako epanzanipanzani. Bamesa ná bakiti ebukanibukani, bakɔpɔ ná basaani ya mbɛlɛ́ epasukipasuki, mpe bakaro ebukanibukani. Ndako na yo ya kitoko ekómi lokola esika oyo bauti kobunda bitumba. Okoganga ete: “Mpo na nini mwasi na ngai asali boye?” To okotuna nde: “Nani asali likambo ya boye?” Na ntembe te, motuna ya mibale nde ekoyela yo mbala moko na makanisi. Mpo na nini? Mpo oyebi ete mwasi na yo ya bolingo akoki kosala likambo ya ndenge wana te.
2 Lelo oyo, mabele ebebi. Zamba, mai, mpe mopɛpɛ esili kobeba. Mokili etondi na makambo ya mobulu, pite mpe ekobo. Biso bayekoli ya Biblia toyebi ete ezali Yehova te nde azali kobimisa mikakatano wana nyonso. Asalaki mabele mpo ezala paradiso moko kitoko. (Eba. 2:8, 15) Yehova azali Nzambe ya bolingo. (1 Yoa. 4:8) Boyekoli na biso ya Makomami esalisi biso tóyeba nani mpenza azali kobimisa bampasi mingi oyo tozali komona na mokili. Ezali nde Satana Zabolo, “mokonzi ya mokili oyo.”—Yoa. 14:30; 2 Ko. 4:4.
3. Ndenge nini makanisi na biso ekoki kobeba?
3 Kasi, tosengeli te kopesa Satana foti mpo na mikakatano nyonso ya bato. Mpo na nini? Mpo mikakatano mosusu oyo tokutanaka na yango ezalaka mpo na mabunga na biso moko. (Tángá Kolimbola Mibeko 32:4-6.) Ata soki tokoki kondima ete ezali bongo, kozanga kokoka na biso ekoki kobebisa makanisi na biso mpe kotinda biso na nzela oyo ekoki komema biso na likama. (Mas. 14:12) Na ndenge nini? Ntango likambo ebimi, na esika tómona ete ezali foti na biso moko to ya Satana, tokoki kobanda nde kopesa Yehova foti. Tokoki kutu kokóma “kosilikela Yehova.”—Mas. 19:3.
4, 5. Ndenge nini mokristo akoki kokóma “kosilikela Yehova”?
Yis. 41:11) Tokosala yango mpo tózwa nini? Kutu, mokomi moko alobaki ete: “Lobɔkɔ ya moto ezali mokuse mingi mpo abunda na Nzambe.” Mbala mosusu tokoloba mpenza na monɔkɔ boye te ete tosilikeli Yehova. Nzokande, Masese 19:3 elobi ete bozoba ya moto “ebulunganisaka nzela na ye, bongo motema na ye ekómaka kosilikela Yehova.” Ya solo, moto akoki kokóma kosilikela Yehova na kati ya motema na ye. Ezaleli yango ekoki kobanda komonana mokemoke. Moto akoki kosala lokola akangeli Yehova nkanda na motema. Na yango, akoki kobanda kokima lisangá to koboya kopesa mabɔkɔ na bibongiseli oyo ezali kozwama mpo na losambo ya Yehova.
4 Ekoki mpenza kosalema ete tókóma “kosilikela Yehova”? Ya solo, kosala bongo ezali na litomba moko te. (5 Nini ekoki kotinda biso ‘tósilikela Yehova’? Ndenge nini tokoki kokima motambo yango? Ezali na ntina mingi tóyeba biyano na mituna wana mpamba te likambo yango etali boyokani na biso na Yehova Nzambe!
NINI EKOKI KOTINDA BISO TÓKÓMA “KOSILIKELA YEHOVA”?
6, 7. Mpo na nini Bayisraele ya ntango ya Moize babandaki koimaima mpo na Yehova?
6 Nini ekoki kotinda mosaleli moko ya sembo ya Yehova abanda koimaima mpo na Nzambe na motema na ye? Tótalela makambo mitano mpe bandakisa ya Biblia oyo emonisi ndenge oyo bato mosusu ya ntango ya kala bakweaki na motambo yango.—1 Ko. 10:11, 12.
7 Maloba mabe ya basusu ekoki kobebisa makanisi na biso. (Tángá Kolimbola Mibeko 1:26-28.) Ntango elekaki naino mingi te kobanda Yehova alongolaki Bayisraele na boombo ya Ezipito. Na ndenge ya likamwisi, atindelaki Ezipito malɔzi zomi, mpe na nsima abomaki Farao ná basoda na ye na Mbu Motane. (Kob. 12:29-32, 51; 14:29-31; Nz. 136:15) Libota ya Nzambe ekómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. Nzokande, ezalaki na ntango wana nde Bayisraele babandaki koimaima mpo na Yehova. Nini esalaki ete kondima na bango ekita ndenge wana? Mitema na bango elɛmbaki mpo na lapolo mabe ya bato mosusu oyo batindamaki mpo na kotala mokili yango. (Mit. 14:1-4) Esukaki ndenge nini? Nzambe aboyaki Bayisraele nyonso ya eleko wana bákɔta na “mokili malamu.” (Mib. 1:34, 35) Ekómaka ete biso mpe tótika maloba mabe ya basusu elɛmbisa kondima na biso mpe etinda biso tóimaima mpo na ndenge oyo Yehova azali kotambwisa basaleli na ye?
8. Nini etindaki bato ya Yuda na mikolo ya Yisaya bábanda kopesa Yehova foti mpo na mikakatano na bango?
8 Mikakatano mpe bampasi ekoki kolɛmbisa biso. (Tángá Yisaya 8:21, 22.) Na mikolo ya Yisaya, mikakatano minene ekómelaki ekólo Yuda. Banguna bazingaki bango. Biloko ya kolya ezalaki mingi te. Bato mingi bazalaki na nzala. Kasi likambo ya mabe koleka, bato bazalaki na nzala ya elimo. (Amo. 8:11) Na esika básɛnga Yehova asalisa bango na ntango wana ya mikakatano, babandaki nde ‘kolakela mokonzi na bango mpe Nzambe na bango mabe.’ Bapesaki Yehova foti mpo na mikakatano na bango. Soki likama ekómeli yo to okutani na mikakatano, yo mpe olobaka na nse ya motema ete: ‘Yehova azalaki wapi ntango nazalaki na mposa na ye?’
9. Mpo na nini Bayisraele ya mikolo ya Ezekiele bakómaki na makanisi oyo ebongi te?
9 Toyebaka makambo nyonso te. Lokola bayebaki makambo nyonso te, Bayisraele ya mikolo ya Ezekiele bakanisaki ete nzela ya Yehova ezali “sembo te.” (Ezk. 18:29) Ezalaki lokola nde bazalaki kosambisa Nzambe, bazalaki kotya mibeko na bango moko na oyo etali mabe ná malamu likoló ya mibeko ya Yehova mpe kosambisa ye na kolanda kaka mwa makambo moke oyo bango bayebaki. Soki, ntango mosusu okangi mpenza ntina te ya lisolo moko ya Biblia, to ozali koyeba mpenza te mpo na nini makambo mosusu ezali kokómela yo, okokanisa nde na nse ya motema ete nzela ya Yehova ezali “sembo te”?—Yobo 35:2.
10. Ndenge nini moto akoki kolanda ndakisa mabe ya Adama?
10 Topesaka basusu foti mpo na masumu mpe mabunga na biso moko. Adama, mobali ya liboso, apesaki Nzambe foti mpo na lisumu oyo ye moko asalaki. (Eba. 3:12) Adama abukaki mobeko ya Nzambe na nko mpe ayebaki malamu mabe oyo yango ekobimisa, kasi apesaki Yehova foti mpo na yango. Alobaki ete Yehova apesaki ye mwasi ya mabe. Banda wana, bato mosusu balandaka ndakisa ya Adama ya kopesa Nzambe foti mpo na mabunga na bango moko. Na yango, tosengeli komituna boye: ‘Soki nalɛmbi nzoto to natungisami mpo na mabunga na ngai moko, nakómaka komona ete mibeko ya Yehova eleki makasi?’
11. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yona?
11 Tokómaka koluka kaka matomba na biso moko. Mosakoli Yona asepelaki te na ekateli oyo Yehova azwaki ya komonisela Ninive motema mawa. (Yona 4:1-3) Mpo na nini? Emonani ete azalaki kobanga ete amonana moto ya lokuta soki engumba Ninive ebebisami te, ndenge asakolaki yango. Na esika amona ete esengeli koyokela bato ya Ninive mawa mpo babongolaki motema, Yona azalaki komitungisa mingi kaka mpo na lokumu na ye moko. Biso mpe tosalaka bongo? Koluka kaka matomba na biso moko etindaka biso tósilikela Yehova mpo azali koyeisa nsuka noki te? Soki osakolaka banda bambula mingi ete mokolo ya Yehova ekómi pene, okokóma nde motema mokuse mpo na Yehova, ntango bato bazali kotyola biso mpo tozali kosakola makambo oyo Biblia elobi?—2 Pe. 3:3, 4, 9.
OYO TOKOKI KOSALA MPO ‘TÓSILIKELA YEHOVA TE’
12, 13. Soki na kati ya motema na biso tobandi kokanisa ete makambo mosusu oyo Yehova azali kosala ezali mabe, eloko nini tosengeli kobatela?
12 Tokoki kosala nini soki na kati ya motema na biso bato ya masumu tobandi kokanisa ete makambo mosusu oyo Yehova azali kosala ezali mabe? Kobosana te ete kokanisa bongo ezali kozanga bwanya. Na libongoli mosusu ya Biblia, Masese 19:3 elobi boye: “Soki moto amitie na nzela ya mabe na bozoba na ye moko, akómaka koyokela Yawe kanda.” (Bible na lingala ya lelo oyo) Lokola toyebi bongo, tótalela sikoyo makambo mitano oyo ekosalisa biso tótika soki moke te ete mikakatano ya bomoi etinda biso tópesa Yehova foti.
13 Kobá kobatela boyokani na yo na Yehova. Tokokima ezaleli oyo biso bato ya kozanga kokoka tozalaka na yango ya kosilikela Nzambe soki tobateli malamu boyokani na biso na ye. (Tángá Masese 3:5, 6.) Tosengeli kotyela Yehova motema. Tosengeli mpe te komimona bato ya bwanya na miso na biso moko to koluka kaka matomba na biso moko. (Mas. 3:7; Mos. 7:16) Yango ekosalisa biso tówelaka te kopesa Yehova foti ntango makambo ya mabe esalemi.
14, 15. Nini ekosalisa biso mpo maloba mabe ya basusu elɛmbisa biso te?
14 Kotika te ete maloba mabe ya basusu elɛmbisa yo. Bayisraele na mikolo ya Moize bazalaki na bantina mingi ya kondima ete Yehova akokamba bango tii bakokɔta na Mokili ya Ndaka. (Nz. 78:43-53) Kasi ntango bayokaki lapolo ya mabe ya banɔngi zomi oyo bazangaki bosembo, “bakanisaki lobɔkɔ [ya Nzambe] te.” (Nz. 78:42) Soki tozali komanyola misala ya Yehova mpe bolamu nyonso oyo asaleli biso, boyokani na biso na ye ekokóma lisusu makasi. Na yango, tokotika te ete makanisi mabe ya basusu ekabola biso na Yehova.—Nz. 77:11, 12.
15 Bongo soki tozali kosepela na bandeko na biso bakristo te? Na ntango yango, boyokani na biso na Yehova ekoki kobeba. (1 Yoa. 4:20) Ntango Bayisraele balobaki mabe mpo na mokumba oyo Arona azwaki, Yehova amonaki ete bazalaki koimaima nde mpo na Ye. (Mit. 17:10) Ndenge moko mpe, soki tobandi komilelalela mpe koimaima mpo na bandeko oyo Yehova azali kosalela mpo na kotambwisa eteni ya ebongiseli na ye awa na mabele, ekozala lokola nde tozali koimaima mpo na Yehova.—Ebr. 13:7, 17.
16, 17. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tokutani na mikakatano?
16 Kobosana te ete Yehova te nde abimiselaka biso mikakatano. Atako Bayisraele ya mikolo ya Yisaya bapesaki Yehova mokɔngɔ, Yehova azalaki kaka na mposa ya kosalisa bango. (Yis. 1:16-19) Ata soki tokutani na mokakatano nini, tokoki kobɔndisama na koyeba ete Yehova atyelaka biso likebi mpe alingaka kosalisa biso. (1 Pe. 5:7) Kutu, alaki ete akopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tókoba koyika mpiko.—1 Ko. 10:13.
17 Soki tokutani na makambo ya kozanga bosembo—ndenge ekómelaki Yobo, moto ya sembo—tosengeli komikundola ete Yehova te nde abimisaka makambo ya mabe. Yehova ayinaka makambo ya kozanga bosembo; alingaka nde boyengebene. (Nz. 33:5) Ndenge moko na Elihu, moninga ya Yobo, tosengeli koloba ete: “Nzambe ya solo akoki kosala mabe ata moke te, mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoki ata moke te kosala makambo oyo ezangi bosembo!” (Yobo 34:10) Yehova abimiselaka biso mikakatano te; apesaka biso nde “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza.”—Yak. 1:13, 17.
18, 19. Mpo na nini tosengeli kotyela Yehova motema ntango nyonso. Pesá ndakisa.
18 Tyelá Yehova motema ntango nyonso. Nzambe akoká na makambo nyonso, mpe makanisi na ye eleki mosika oyo ya biso. (Yis. 55:8, 9) Na yango, komikitisa mpe bopɔlɔ esengeli kosalisa biso tóndima ete toyebi makambo nyonso te. (Rom. 9:20) Soki likambo moko ebimi, ezalaka mpasi tóyeba makambo nyonso oyo etali likambo yango. Na ntembe te, osilá komona ete lisese oyo ezali solo ete: “Moto oyo asambaka liboso, amonanaka lokola ’tè ye moto alongi; kasi makambo nyonso ekómaka polele kaka soki bayoki pe moto oyo azali kosamba na ye.”—Batoli 18:17, Bible na lingala ya lelo oyo.
19 Soki moninga na yo oyo otyelaka motema asali likambo moko oyo okangi ntina na yango mpenza te to soki omoni ete ezali momeseno na ye te, okoloba mbala moko ete asali mabe? To okotyela ye kaka motema, mingimingi soki oyebi ye malamu banda
kala? Soki tosalaka bongo mpo na baninga na biso oyo bazali bato ya kozanga kokoka, tosengeli kutu kotyela Tata na biso ya likoló motema mingi koleka, mpo banzela na ye mpe makanisi na ye eleki mosika oyo ya biso!20, 21. Mpo na nini tosengeli kopesa foti na moto azali na foti?
20 Pesá foti na moto oyo azali na foti. Mpo na nini tosengeli kosala bongo? Mpo makambo mosusu oyo ekómelaka biso ezalaka foti na biso moko. Soki esalemi bongo, tosengeli kondima yango. (Gal. 6:7) Komeka te kopesa Yehova foti mpo na makambo yango. Mpo na nini kosala bongo ekozala libunga? Tózwa ndakisa ya motuka moko oyo ekoki kotambola na vitɛsi makasi. Kanisá ete sofɛlɛ atye vitɛsi makasi koleka oyo esengeli ntango azali kotambola na nzela ya nyokanyoka, mpe asali aksida. Okoloba nde ete aksida oyo esalemi ezali foti ya moto oyo asalaki motuka yango? Te, okoloba bongo te! Ndenge moko mpe, Yehova akelá biso na bonsomi ya kopona. Kasi, apesá biso mpe mibeko oyo tosengeli kolanda mpo tózwaka bikateli ya malamu. Sikoyo, mpo na nini kopesa Mozalisi na biso foti mpo na mabunga na biso moko?
21 Ya solo, mikakatano nyonso oyo tokutanaka na yango ezalaka kaka mpo na mabunga mpe bikateli na biso moko te. Makambo mosusu ekómelaka biso mpo na “ntango ná makambo oyo ekanami te.” (Mos. 9:11) Kasi, tóbosana soki moke te ete Satana Zabolo nde azali moto ya libosoliboso oyo abimisaka makambo ya mabe. (1 Yoa. 5:19; Em. 12:9) Ye nde monguna; kasi Yehova te!—1 Pe. 5:8.
KOBÁ KOBATELA BOYOKANI MALAMU NA YEHOVA
22, 23. Tosengeli komikundola nini soki tolɛmbi nzoto mpo na mikakatano?
22 Ntango ozali kobundana na mikakatano mpe bampasi, kanisá ndakisa ya Yosua ná Kalebe. Mibali yango ya sembo bamemaki lapolo ya malamu; basalaki lokola banɔngi mosusu zomi te. (Mit. 14:6-9) Bamonisaki kondima epai ya Yehova. Atako bongo, basengelaki koyengayenga na esobe mbula 40 elongo na Bayisraele mosusu nyonso. Yosua ná Kalebe bakómaki nde koimaima to kosilika ete likambo yango ezalaki sembo te? Te. Batyelaki Yehova motema, mpe Yehova apambolaki bango. Ndenge nini? Bayisraele mosusu nyonso oyo bautaki Ezipito bakufaki na esobe, kasi nsukansuka Yosua ná Kalebe bakɔtaki na Mokili ya Ndaka. (Mit. 14:30) Ndenge moko mpe, Yehova akopambola biso soki “tolɛmbi te” kosala mokano na ye.—Gal. 6:9; Ebr. 6:10.
23 Soki olɛmbi nzoto mpo na mikakatano, mpo na kozanga kokoka ya bato mosusu, to mpo na mabunga na yo moko, osengeli kosala nini? Tyá makanisi na yo na bizaleli ya Yehova. Kanisá ndenge bomoi ekozala ntango elikya oyo Yehova apesi biso ekokokisama. Omituna boye: ‘Soki Yehova te, nalingaki kozala ndenge nini?’ Tikalá penepene na Yehova, mpe kotika soki moke te motema na yo ekóma kosilikela ye!