Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tósepela na bizaleli ya Yehova: akabaka mpe azali makambo makasimakasi te

Tósepela na bizaleli ya Yehova: akabaka mpe azali makambo makasimakasi te

“Yehova azali malamu epai ya bikelamu nyonso, mpe motema mawa na ye ezali likoló ya misala na ye nyonso.”​—NZ. 145:9.

1, 2. Libaku nini baninga ya Yehova bazali na yango?

NDEKO mwasi moko nkombo na ye Monika alobi boye: “Ngai ná mobali na ngai tosili kokokisa mbula pene na 35 na libala. Toyebani malamu mpenza. Atako tofandi bambula ebele ndenge wana, mokomoko na biso amonaka kaka makambo ya sika oyo ayebaki te epai ya moninga!” Na ntembe te, ezali mpe bongo na mabala mingi mpe na boninga ya bato mingi.

2 Tosepelaka koyeba malamu bato oyo tolingaka. Kasi, na baninga nyonso oyo tokoki kozala na bango, boninga na biso ná Yehova nde ezali na ntina mingi koleka. Ata mokolo moko te tokoyeba makambo nyonso oyo etali Yehova. (Rom. 11:33) Ntango tokozwa bomoi ya seko, tokozala na libaku mpe esengo ya kokoba koyekola mpe kosepela lisusu mingi na bizaleli ya Yehova.​—Mos. 3:11.

3. Tokotalela nini na lisolo oyo?

3 Lisolo oyo eleki esalisaki biso tósepela lisusu mingi na bizaleli mibale ya Yehova: ndenge andimaka ete bato báya epai na ye mpe ndenge aponaka bilongi te. Sikoyo, tótalela bizaleli mosusu mibale ya Yehova: akabaka mpe azali makambo makasimakasi te. Kotalela bizaleli yango ekosalisa biso tómona lisusu polele ete “Yehova azali malamu epai ya bikelamu nyonso, mpe motema mawa na ye ezali likoló ya misala na ye nyonso.”​—Nz. 145:9.

YEHOVA AKABAKA

4. Kozala moto oyo akabaka elimboli nini?

4 Kozala moto oyo akabaka elimboli nini? Maloba ya Yesu oyo ezali na Misala 20:35 epesi eyano na motuna yango: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” Na yango, moto oyo akabaka apesaka na esengo nyonso ntango na ye, makasi na ye, mpe biloko na ye mpo na kosalisa basusu. Moto oyo akabaka ezali te oyo apesaka biloko ya ntalo, kasi nde oyo apesaka mpo motema na ye nde etindi ye apesa. (Tángá 2 Bakorinti 9:7.) Moto moko te akabaka koleka Yehova, ‘Nzambe na biso ya esengo.’​—1 Tim. 1:11.

5. Ndenge nini Yehova amonisaka ete akabaka?

5 Ndenge nini Yehova amonisaka ete akabaka? Akokisaka bamposa ya bato nyonso, ata ya baoyo bazali naino kosambela ye te. Ya solo, “Yehova azali malamu epai ya bikelamu nyonso.” “Abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.” (Mat. 5:45) Yango wana, ntoma Paulo alobaki ata na bato oyo bazalaki bandimi te ete Yehova “asaleli bino bolamu, ndenge apesaka bino bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, ndenge atondisaka mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.” (Mis. 14:17) Emonani polele ete Yehova akabelaka bato nyonso.​—Luka 6:35.

6, 7. (a) Yehova asepelaka mingimingi kokokisa bamposa ya banani? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ete Nzambe akokisaka mposa ya basaleli na ye ya sembo.

6 Yehova asepelaka mingimingi kokokisa bamposa ya basaleli na ye ya sembo. Mokonzi Davidi alobaki boye: “Nazalaki elenge, nakómi mpe mobange, kasi namoná naino te moyengebene asundolami mpenza, to bana na ye bazali koluka limpa.” (Nz. 37:25) Bakristo mingi ya sembo bamoná na bomoi na bango ete maloba yango ezali mpenza solo. Tózwa ndakisa moko.

7 Eleki mwa bambula, Nancy, ndeko mwasi moko oyo azalaki mobongisi-nzela, akutanaki na mokakatano moko. Alobi boye: “Nazalaki na mposa ya dolare 66 mpo na kofuta ndako na mokolo oyo elandi. Nayebaki te ndenge nini nakokaki kozwa mbongo yango. Nabondelaki mpo na likambo yango, mpe na nsima nakendaki mosala na restora epai nazalaki kosala. Nandimaki te ete nakozwa mbongo ebele na mwa mbongo ya mikemike oyo bakiliya bakabelaka biso, mpamba te ezalaki mokolo oyo bato bayaka mingi mpenza te na restora. Likambo ya kokamwa, na butu wana, bato bakɔtaki mingi na restora. Ntango nasilisaki mosala mpe natángaki mwa mbongo ya mikemike oyo bazalaki kokabela ngai, nyonso esalaki dolare 66.” Nancy andimaka mpenza ete Yehova nde asalisaki ye azwa mbongo oyo asengelaki na yango.​—Mat. 6:33.

8. Likabo nini eleki monene Yehova apesá bato?

8 Ezali na likabo moko oyo eleki monene, oyo Yehova apesá mpo na bolamu ya moto nyonso. Likabo yango nini? Ezali mbeka ya lisiko ya Mwana na ye. Yesu alobaki ete: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoa. 3:16) Na vɛrsɛ yango, liloba “mokili” elimboli bato nyonso. Ya solo, Yehova apesi likabo wana oyo eleki monene mpo na moto nyonso oyo alingi kondima yango. Baoyo bazali komonisa kondima epai na Yesu bakozwa bomoi mingi, elingi koloba bomoi ya seko! (Yoa. 10:10) Ya solo, yango nde likambo eleki monene oyo emonisi ete Yehova akabaka.

TÓMEKOLA YEHOVA: TÓKABAKA

Mibeko elendisaki Bayisraele bámekola Yehova na oyo etali kokaba (Talá  paragrafe 9)

9. Ndenge nini tokoki komekola Yehova na oyo etali kokaba?

 9 Ndenge nini tokoki komekola Yehova na oyo etali kokaba? Lokola Yehova “apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela,” biso mpe tosengeli kozala “bato bayebi kokaba” mpo tósala ete basusu mpe básepela. (1 Tim. 6:17-19) Na esengo nyonso, tokabelaka bandeko na biso ya libota, baninga na biso, mpe tosalisaka bato oyo bazali na bosɛnga. (Tángá Kolimbola Mibeko 15:7.) Nini ekoki kosalisa biso tóbosanaka te kokaba? Bandeko mosusu basalaka boye: Soki moto akabeli bango eloko, bango mpe balukaka libaku ya kokabela moto mosusu eloko. Na lisangá, ezali na bandeko mibali mpe basi mingi oyo bazali ndakisa malamu na oyo etali kokaba.

10. Wapi lolenge moko ya malamu mpenza ya komonisa ete tokabaka?

10 Lolenge moko ya malamu mpenza ya komonisa ete tokabaka ezali ya kopesa ntango mpe makasi na biso mpo na kosalisa basusu mpe kolendisa bango. (Gal. 6:10) Mpo na koyeba soki osalaka yango mpenza, okoki komituna boye: ‘Bato bamonaka mpenza ete nayokaka bango na likebi ntango bazali koyebisa ngai mitungisi na bango? Soki ndeko moko asɛngi ngai nasalisa ye na likambo moko boye to atindi ngai, nandimaka kosalisa ye soki likoki ezali? Mbala ya nsuka oyo napesaki ndeko na ngai ya libota to ya lisangá longonya oyo euti mpenza na motema ezalaki mokolo nini?’ Soki tozali na momeseno ya kopesa, tóyeba ete tokozala na boyokani malamu na Yehova mpe baninga na biso.​—Luka 6:38; Mas. 19:17.

11. Biloko nini tokoki kokabela Yehova?

 11 Tokoki mpe kokabela Yehova. Biblia elobi ete: “Kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya.” (Mas. 3:9) ‘Biloko yango ya motuya’ ekoki kozala ntango, makasi, mpe mbongo na biso, oyo tokoki kosalela na mosala ya Nzambe. Ata bana mike bakoki koyekola kokabela Yehova. Tata moko na nkombo Jason alobi boye: “Soki tolingi kopesa makabo na Ndako ya Bokonzi, topesaka bana na biso mbongo yango bákende kotya na kɛsi. Basepelaka kosala bongo mpamba te, ndenge bango moko balobaka, ‘bakendaka kokabela Yehova.’” Soki bana bazali komona ete kokabela Yehova ezali kopesa bango esengo, bakokoba kosala yango ata ntango bakokóma mikóló.​—Mas. 22:6.

YEHOVA AZALI MAKAMBO MAKASIMAKASI TE

12. Kozala makambo makasimakasi te elimboli nini?

12 Ezaleli mosusu ya Yehova oyo tokoki kosepela na yango ezali ete azali makambo makasimakasi te. Yango elimboli nini? Mbala mingi, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “makambo makasimakasi te” na Libongoli ya Mokili ya Sika elimbolaka mpenzampenza “kotikela moto mosusu.” (Tito 3:1, 2) Moto oyo azali makambo makasimakasi te atingamaka te ete makambo esalemaka kaka ndenge mobeko elobi; azalaka mindɔndɔ te, matata mpe te. Asalaka nde makasi asalela basusu makambo na boboto mpe amityaka mpenza na esika na bango. Ayokelaka basusu mpe soki esengeli, atikaka bango básala ndenge balingi mpe abongolaka makanisi na ye.

13, 14. (a) Ndenge nini Yehova amonisaka ete azali makambo makasimakasi te? (b) Likambo oyo Nzambe asalelaki Lota eteyi biso nini na oyo etali kozala makambo makasimakasi te?

13 Ndenge nini Yehova amonisaka ete azali makambo makasimakasi te? Na boboto nyonso, atalelaka mayoki ya basaleli na ye, mpe mbala mingi asalaka makambo oyo basɛngi ye. Na ndakisa, kanisá makambo oyo Yehova asalelaki moyengebene Lota. Ntango Yehova azwaki ekateli ya koboma bingumba Sodoma mpe Gomora, ayebisaki Lota polele ete akima na bangomba. Kasi, mpo na bantina mosusu, Lota asɛngaki ete akima na esika mosusu. Kanisá naino: Lota azalaki nde kosɛnga Yehova abongola malako na ye!​—Tángá Ebandeli 19:17-20.

14 Ezali mpasi te koloba ete Lota azalaki na kondima moke to azangaki botosi epai ya Yehova. Kutu, Yehova azalaki na likoki ya kobatela Lota ata na esika nini, mpe Lota azalaki na ntina ya kobanga te. Nzokande, Lota azalaki kaka kobanga, mpe Yehova atikaki ye asala oyo asɛngaki. Atikaki ye akima na engumba mosusu, atako liboso akanaki mpe koboma engumba yango. (Tángá Ebandeli 19:21, 22.) Emonani polele ete Yehova azali mindɔndɔ te mpe makambo makasimakasi te. Soki likoki ezali, andimaka kotika moto asala ndenge alingi.

15, 16. Ndenge nini Mibeko ya Moize emonisaki ete Yehova azali makambo makasimakasi te? (Talá elilingi na ebandeli ya lisolo.)

15 Ndakisa mosusu oyo emonisi ete Yehova azali makambo makasimakasi te ezali na Mibeko ya Moize. Mibeko elobaki ete soki Moyisraele azali mobola mpe akokoka te kopesa mbeka ya mwana-mpate to ntaba, akokaki kopesa bipopo mibale to bibenga mibale. Bongo soki Moyisraele yango azalaki mobola makasi mpe akokaki ata kopesa bibenga mibale te? Na ntango wana, Yehova azalaki kondima ete moto yango apesa ata mwa farini moke. Kasi, simbá ete esengelaki te kozala farini ya ndenge nyonso, kasi “farini ya malamu mpenza,” lokola oyo bazalaki koyamba na yango bapaya ya lokumu. (Eba. 18:6) Yango emonisi nini mpo na Yehova?​—Tángá Balevi 5:7, 11.

16 Kanisá ete ozali Moyisraele ya mobola mpenza. Ntango okómi na tabernakle ná mwa farini na yo oyo olingi kopesa mbeka, omoni Bayisraele oyo bazali na bozwi bayei na banyama. Okoki koyoka nsɔni mpo na mbeka na yo ya farini, oyo ezali komonana lokola ezali na valɛrɛ te. Kasi na ntango yango, omikundoli ete na miso ya Yehova, mbeka na yo ezali na motuya. Mpo na nini? Mpo Yehova asɛngaki ete omema farini oyo eleki malamu. Ezalaki lokola nde Yehova azalaki koloba na Bayisraele oyo bazalaki babola ete: ‘Nayebi ete bozali na makoki te ya kopesa mingi ndenge bato mosusu bazali kopesa, kasi nayebi ete oyo bozali kopesa ngai, yango nde eloko na bino oyo eleki malamu.’ Ya solo, Yehova amonisaka ete azali makambo makasimakasi te na ndenge atalelaka makoki mpe makambo ya bomoi ya basaleli na ye.​—Nz. 103:14.

17. Yehova andimaka mosala ya ndenge nini?

 17 Koyeba ete Yehova azali makambo makasimakasi te mpe andimaka mosala oyo tosaleli ye na molimo na biso mobimba ekoki kobɔndisa biso. (Kol. 3:23) Constance, ndeko mwasi moko ya mobange oyo afandaka na Italie, alobaki boye: “Nasepelaka mingi koyebisa basusu makambo etali Mozalisi na biso. Yango wana nazali kokoba kosakola mpe koyekola Biblia na bato. Ntango mosusu nayokaka mawa mpo nakoki kosala mingi te mpo nzoto ezali lisusu makasi te. Kasi, nayebi ete Yehova ayebi esika makasi na ngai esuki, ete alingaka ngai mpe andimaka mwa moke oyo nasalaka.”

TÓMEKOLA YEHOVA: TÓZALA MAKAMBO MAKASIMAKASI TE

18. Wapi lolenge moko oyo baboti bakoki komekola Yehova?

18 Ndenge nini tokoki komekola Yehova na oyo etali kozala makambo makasimakasi te? Kanisá lisusu likambo oyo Yehova asalelaki Lota. Yehova nde azalaki na bokonzi ya koyebisa Lota likambo oyo asengelaki kosala; kasi, na boboto nyonso, ayokaki Lota ntango azalaki kobimisa mayoki na ye. Mpe Nzambe atikaki ye akende esika oyo alingaki. Soki ozali moboti, omoni ndenge oyo okoki komekola Yehova? Oyokaka bana na yo ntango bazali kosɛnga yo eloko moko, mpe soki likoki ezali, otikaka bango básala ndenge balingi? Na likambo yango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/09/2007 emonisaki ete ntango baboti balingi kotya mibeko na ndako, bakoki mpe kosɛnga bana na bango bápesa makanisi. Na ndakisa, baboti bakoki kokata ngonga oyo bana basengeli kozonga na ndako; ezali mabe te mpo baboti nde bazali na lotomo ya kosala yango. Kasi, ekoki kozala malamu baboti oyo bazali bakristo báyoka makanisi ya bana na bango na oyo etali ngonga ya kozonga na ndako. Na bantango mosusu, baboti bakoki komona malamu bábongola mwa moke ngonga oyo batyaki soki likambo moko te ebuki mobeko ya Biblia. Soki baboti bazali kotalela makanisi ya bana liboso ya kotya mibeko na ndako, bana bakokanga malamu ntina ya mibeko yango mpe ekozala mpasi te bátosa yango.

19. Ndenge nini bankulutu bakoki kosala makasi bámekola Yehova na oyo etali kozala makambo makasimakasi te?

19 Bankulutu basalaka makasi bámekola Yehova na oyo etali kozala makambo makasimakasi te na ndenge batalelaka makambo ya bomoi ya bandeko na lisangá. Tóbosana te ete Yehova azalaki kondima ata mbeka ya Moyisraele ya mobola mpenza. Ndenge moko mpe, bandeko mosusu basakolaka lisusu mingi te, ntango mosusu mpo bazali kobɛla to bakómi mibange. Tokoki kosala nini soki ndeko moko ya ndenge wana alɛmbi nzoto mpo azali kokoka lisusu kosala mingi te? Na boboto nyonso, bankulutu basengeli kosalisa ye ayeba ete Yehova alingaka ye mpo azali kosala nyonso oyo akoki na mosala na ye.​—Mrk. 12:41-44.

20. Kozala makambo makasimakasi te elimboli nde kolɛmbisa mabɔkɔ na mosala ya Nzambe? Limbolá.

20 Ya solo, koboya kozala makambo makasimakasi elimboli te kosala moke na mosala ya Nzambe to koboya komitungisa. (Mat. 16:22) Tosengeli te kolɛmbisa mabɔkɔ na mosala na biso bongo na nsima tómilongisa mpe tóloba ete toboyi kozala makambo makasimakasi. Mokomoko na biso asengeli ‘kosala makasi mpenza’ mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi. (Luka 13:24) Ya solo, tosengeli kozala na bokatikati. Ya liboso, tosengeli kosala makasi mpenza mpe koboya kolɛmbisa mabɔkɔ. Epai mosusu, tosengeli kobosana te ete Yehova asɛngaka biso te tóboma nzoto na mosala na ye. Soki tozali kopesa oyo tokoki, tóyeba ete akosepela na yango. Omoni te ete ezali mpenza esengo kozala na Nkolo ya ndenge wana, oyo andimaka basaleli na ye mpe azalaka makambo makasimakasi te? Na lisolo oyo elandi, tokotalela bizaleli mosusu mibale ya Yehova oyo tokoki kosepela na yango.​—Nz. 73:28.

“Kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya.”​—Mas. 3:9 (Talá  paragrafe 11)

“Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo na bino mobimba.”​—Kol. 3:23 (Talá  paragrafe 17)