Yango nde libula na biso ya elimo
“Yango nde libula ya basaleli ya Yehova.”—YIS. 54:17.
1. Lokola Yehova alingaka bato, abatelaki nini mpo na bolamu na bango?
YEHOVA, “Nzambe ya bomoi mpe ya libela,” abatelaki nsango na ye oyo epesaka bomoi mpo na bato. Ntembe ezali te ete nsango yango ekoumela, mpo “Liloba ya Yehova ezali koumela libela na libela.” (1 Pe. 1:23-25) Tozali na botɔndi mingi ndenge Yehova, na bolingo na ye, abatelaki nsango wana ya ntina mingi na kati ya Liloba na ye, Biblia!
2. Nzambe abatelaki nini na kati ya Liloba na ye mpo bato na ye básalelaka yango?
2 Na kati ya Liloba na ye, Nzambe abatelaki nkombo oyo ye moko amipesaki mpo bato na ye básalelaka yango. Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli “Yehova Nzambe” ezali na “lisolo ya makambo etali likoló mpe mabele.” (Eba. 2:4) Na ndenge ya likamwisi, nkombo ya Nzambe ekomamaki mbala ebele likoló ya bitanda ya mabanga oyo ezalaki na Mibeko Zomi. Na ndakisa, mobeko ya liboso ebandaki boye: “Ngai nazali Yehova Nzambe na yo.” (Kob. 20:1-17) Soki nkombo ya Nzambe eyebani tii lelo oyo, ezali mpo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso abatelaki Liloba na ye mpe nkombo na ye atako Satana asalaki nyonso mpo na kolimwisa yango.—Nz. 73:28.
3. Atako mangomba etondi na mateya ya lokuta, Nzambe abatelaki nini?
3 Yehova abatelaki mpe mateya ya solo na kati ya Liloba na ye. Atako na mokili mobimba mangomba etondi na mateya ya lokuta, tozali na botɔndi mingi ndenge Nzambe apesá biso pole ya elimo mpe solo! (Tángá Nzembo 43:3, 4.) Na ntango oyo bato mingi bazali kotambola na molili, biso tozali kokoba kotambola na esengo na kati ya pole ya elimo oyo Nzambe apesá biso.—1 Yoa. 1:6, 7.
TOSENGELI KOZWA LIBULA NA BISO NA MOTUYA
4, 5. Lokumu nini tozali na yango kobanda na mobu 1931?
4 Biso bakristo tozali na libula moko ya motuya mingi. Diksionɛrɛ moko (Collins Cobuild English Dictionary) elobi ete: “Libula ya ekólo ezali bizaleli, bonkɔkɔ, to mimeseno ya bomoi oyo bato bazalaka na yango banda
bambula mingi mpe oyo batikelaka bana mpe bankɔkɔ na bango.” Libula na biso ya elimo esangisi lipamboli ya kozala na boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe mpe likoki ya kososola malamumalamu mateya ya solo oyo etali Nzambe mpe mikano na ye. Esangisi mpe lokumu monene oyo tozali na yango ya komema nkombo ya Nzambe.5 Tozwaki lokumu yango na liyangani na biso oyo esalemaki na Columbus, na etúká ya Ohio, na États-Unis, na 1931. Balɛtrɛ “JW” ezalaki likoló ya lokasa ya programɛ ya liyangani yango. Ndeko mwasi moko alobaki ete: “Bandeko bazalaki na makanisi ndenge na ndenge mpo na ndimbola ya balɛtrɛ wana (JW). Basusu bazalaki koloba ete elimboli ‘Just Wait’ (Zelá kaka), basusu ‘Just Watch’ (Talá kaka), mpe basusu bazalaki kopesa ndimbola ya malamu.” Liboso, tozalaki kobengama Bayekoli ya Biblia, kasi na diskur moko oyo esalemaki mokolo ya lomingo 26, sanza ya nsambo 1931, tondimaki kobengama Batatoli ya Yehova. Tosepelaki mingi kozwa nkombo wana oyo euti na Makomami. (Tángá Yisaya 43:12.) Ndeko mobali moko alobi boye: “Nakobosana ata moke te ndenge oyo bato bazalaki koganga na esengo mpe kobɛta mabɔkɔ mokolo wana.” Bandimi ya mangomba mosusu balingaki nkombo wana te, kasi Nzambe apamboli biso na ndenge oyo tozali kosalela nkombo yango esali sikoyo bambula koleka 80. Ya solo, kozala Batatoli ya Yehova ezali mpenza lokumu monene!
6. Mateya nini ya solo ezali mpe na kati ya libula na biso ya elimo?
6 Libula na biso ya elimo esangisi mpe mateya ya ntina mingi mpe ya solo oyo euti na masolo ya bato mosusu ya ntango ya kala. Tózwa ndakisa ya Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo. Na ntembe te, bato yango bazalaki kosolola elongo na mabota na bango na oyo etali ndenge ya kosepelisa Yehova. Yango wana tokoki kokamwa te soki Yozefe, moto ya sembo, aboyaki kosala pite mpo na ‘kosalela Nzambe lisumu’ te. (Eba. 39:7-9) Bakristo bazalaki mpe koyebisana bango na bango mimeseno oyo etali losambo na bango. Na ndakisa, ntoma Paulo apesaki bandeko ya masangá malako oyo etali Bilei ya mpokwa ya Nkolo. (1 Ko. 11:2, 23) Lelo oyo, makambo mosusu oyo tozali na mposa na yango mpo na kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo” ezali na kati ya Liloba na ye. (Tángá Yoane 4:23, 24.) Biblia ekoki kosalisa bato nyonso, kasi biso basaleli ya Yehova tozwaka yango na motuya mingi koleka.
7. Libula na biso esangisi mpe elaka nini ya kolendisa mpenza?
7 Libula na biso ya elimo esangisi mpe masolo ya bandeko oyo ezali kobima mikolo oyo na mikanda na biso, oyo emonisi ete ‘Yehova azali na biso.’ (Nz. 118:7) Yango esalisaka biso tóbanga eloko te ata ntango bazali konyokola biso. Likambo mosusu oyo ezali na kati ya libula na biso ya elimo ezali elaka oyo: “Ebundeli nyonso oyo ekosalema mpo na kobunda na yo ekolonga te, mpe okokweisa lolemo nyonso oyo ekotɛlɛmɛla yo na lisambisi. Yango nde libula ya basaleli ya Yehova, mpe boyengebene na bango euti na ngai, yango nde liloba ya Yehova.” (Yis. 54:17) Ɛɛ, ebundeli moko te ya Satana ekoki kosala biso mabe mpo na libela.
8. Makambo nini tokotalela na lisolo oyo mpe oyo elandi?
8 Satana alukaki kolimwisa Liloba ya Nzambe, kopekisa bato báyeba nkombo ya Yehova mpe mateya ya solo. Kasi alongi te mpamba te Yehova atikaki te ete akokisa mokano na ye. Na lisolo oyo mpe oyo elandi, tokotalela (1) ndenge oyo Nzambe abatelaki Liloba na ye; (2) ndenge oyo Yehova abatelaki nkombo na ye; mpe (3) ndenge oyo Tata na biso ya likoló azali Liziba mpe Mobateli ya mateya ya solo oyo tozali na yango.
YEHOVA ABATELAKI LILOBA NA YE
9-11. Bandakisa nini emonisi ete banguna mingi balukaki kolimwisa Biblia?
9 Yehova abatelaki Liloba na ye atako banguna bazalaki koluka kolimwisa yango. Buku moko (Catholic Encyclopedia) elobi ete: “Na mobu 1229, likita babengi Concile de Toulouse epekisaki bandimi kosalela Biblia na minɔkɔ oyo bato mingi bayebi, mpo na kolɛngɛla bitumba na Ba-Albigeois mpe Ba-Vaudois . . . Na likita oyo esalemaki na mobu 1234 na engumba Tarragone, na Espagne, oyo mokonzi Jacques Ier akambaki, babimisaki mpe mobeko ya ndenge wana. . . . Biro ya lingomba na Roma ekɔtaki na likambo yango mpo na mbala ya liboso na mobu 1559, ntango Index ya Paul IV epekisaki konyata mpe kozala na Biblia ya minɔkɔ oyo bato mingi bayebi, kozanga ndingisa ya Biro Mosantu.”
10 Biblia ebatelamaki, atako banguna basalaki nyonso mpo na kolimwisa yango. Na mobu soki 1382, John Wycliffe ná baninga na ye babimisaki libongoli ya liboso ya Biblia na Lingelesi. William Tyndale, mobongoli mosusu ya Biblia, abomamaki na mobu 1536. Balobaka ete ntango bakakisaki ye na nzete, agangaki ete: “Nkolo, fungolá miso ya mokonzi ya Angleterre.” Na nsima, bakamolaki ye nkingo mpe batumbaki ye.
11 Atako banguna balukaki kolimwisa yango, Biblia ezali tii lelo. Na ndakisa, na mobu 1535, Miles Coverdale abimisaki libongoli ya Biblia na Lingelesi. Coverdale asalelaki libongoli ya Tyndale ya “Kondimana ya Sika” mpe ya “Kondimana ya Kala” kobanda na mokanda ya Ebandeli tii na mokanda ya Ntango. Abongolaki mpe mikanda mosusu ya Makomami uta na Latin; asalelaki mpe Biblia ya Allemand, ya Martin Luther. Lelo oyo, bato mingi basepelaka na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika mpo ezali na elobeli ya polele, eyokani mpenza na makomi ya ebandeli ya Biblia, mpe esalisaka mingi na mosala na biso ya kosakola. Tosepelaka mingi na ndenge oyo, ezala bademo to bato mosusu ya nguya, balongaki te kolimwisa Liloba ya Nzambe.
YEHOVA ABATELAKI NKOMBO NA YE
12. Ndenge nini Libongoli ya Mokili ya Sika esalisi mingi mpo nkombo ya Nzambe ebatelama?
12 Yehova Nzambe asɛnzɛlaki ete nkombo na ye ebatelama na kati ya Liloba na
ye. Libongoli ya Mokili ya Sika esalisi mingi na likambo yango. Na maloba na yango ya ebandeli, komite ya babongoli na yango ekomaki ete: “Libongoli ya Biblia oyo ekeseni na mabongoli mosusu libosoliboso mpo ezongisi nkombo ya Nzambe na esika oyo yango esengeli kozala na kati ya Biblia. Yango wana, esaleli ebengeli oyo endimami na Lingala ‘Yehova,’ mbala 6 973 na Makomami ya Ebre mpe mbala 237 na Makomami ya Grɛki ya bokristo.” Lelo oyo, Libongoli ya Mokili ya Sika esili kobimisama, na mobimba to na ndambo, na minɔkɔ koleka 116, mpe Babilia koleka 178 545 862 esili konyatama.13. Mpo na nini tokoki koloba ete nkombo ya Nzambe eyebanaki banda ntango moto akelamaki?
13 Nkombo ya Nzambe eyebanaki banda ntango moto akelamaki. Adama ná Eva bayebaki yango, mpe bayebaki malamu ndenge ya kobenga yango. Nsima ya Mpela, ntango Kame azangaki botosi epai ya tata na ye, Noa alobaki ete: “Yehova, Nzambe ya Seme, apambolama, mpe tiká Kanana [mwana ya Kame] akóma moombo na ye.” (Eba. 4:1; 9:26) Nzambe ye moko alobaki ete: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai; mpe nakopesa nkembo na ngai na mosusu te.” Alobaki mpe ete: “Nazali Yehova, mpe mosusu azali te. Longola ngai, Nzambe mosusu azali te.” (Yis. 42:8; 45:5) Yehova asɛnzɛlaki ete nkombo na ye ebatelama mpe bato nyonso awa na mabele báyeba yango. Kosalela nkombo ya Yehova mpe kozala Batatoli na ye ezali lokumu monene! Yango nde ndimbola ya vɛrsɛ oyo elobi ete: “Na nkombo ya Nzambe na biso tokotombola babɛndɛlɛ na biso.”—Nz. 20:5.
14. Longola Biblia, na bisika nini mosusu tokoki kokuta nkombo ya Nzambe?
14 Nkombo ya Nzambe ezali kaka na Biblia te. Tózwa ndakisa ya Libanga ya Moabe, oyo bakutaki na Dhiban (Dibon), na ntaka ya kilomɛtrɛ 21, na ɛsti ya Mbu Ekufá. Libanga yango elobeli Omri, mokonzi moko ya Yisraele mpe elobeli na lolenge mosusu ndenge oyo Mesha, mokonzi ya Moabe, atombokelaki Yisraele. (1 Bak. 16:28; 2 Bak. 1:1; 3:4, 5) Kasi Libanga ya Moabe ebendi likebi na biso mingimingi mpo ezali na balɛtrɛ minei oyo esali nkombo ya Nzambe. Balɛtrɛ yango minei ezali mpe na bisika mingi na biteni ya mikanda ya Lakisi oyo bakundolaki na nse ya mabele, na Yisraele.
15. Libongoli ya Septante ezali nini, mpe ndenge nini ebimaki?
15 Babongoli ya liboso ya Biblia basalaki mpe mingi mpo nkombo ya Nzambe ebatelama. Nsima ya boombo na bango na Babilone, kobanda na mobu 607 L.T.B. tii na mobu 537 L.T.B., Bayuda mingi bazongaki te na Yuda mpe na Yisraele. Na siɛklɛ ya misato L.T.B., Bayuda mingi bakómaki kofanda na Alezandria, na Ezipito, mpe bazalaki na mposa ya libongoli moko ya Makomaki ya Ebre na Grɛki, monɔkɔ oyo ezalaki kolobama na bamboka mingi na ntango wana. Na siɛklɛ ya mibale L.T.B., basilisaki kobongola Makomami ya Ebre na monɔkɔ ya Grɛki. Babengaka yango libongoli ya Septante. Babiblia mosusu ya libongoli yango ezali na nkombo Yehova na ekomeli ya Ebre.
16. Monisá ndenge buku moko oyo ebimaki mpo na mbala ya liboso na mobu 1640 esalelaki nkombo ya Nzambe.
16 Nkombo ya Nzambe ezali mpe na buku moko ya Nzembo, buku ya liboso oyo ebimaki na bamboka ya Amerika oyo Angleterre ekonzaki. Babuku na yango ya liboso (oyo ebimaki na mobu 1640) ezali na Banzembo oyo ebongolamaki uta na Ebre na Lingelesi ya ntango wana. Ezali na nkombo ya Nzambe na mikapo lokola Nzembo 1:1, 2, oyo elobi ete “moto oyo apambwami” atambolaka na toli ya bato mabe te, “kasi azalaka na esengo na mobeko ya Iehovah.” Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali nkombo ya Nzambe, talá mwa buku Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko.
YEHOVA ABATELAKA MATEYA YA SOLO
17, 18. (a) “Solo” ezali nini? (b) “Solo ya nsango malamu” esangisi mateya nini?
17 Tosalelaka “Yehova Nzambe ya solo” na esengo nyonso. (Nz. 31:5) Diksionɛrɛ moko (Collins Cobuild English Dictionary) elobi ete: “Solo mpo na likambo moko ezali makambo nyonso oyo esalemá mpo na likambo yango, kasi te oyo bakanisá kokanisa to bakosá.” Na Ebre oyo bakomaki na yango Biblia, liloba oyo babongolaka mbala mingi na “solo” elimboli likambo oyo ezali ya lokuta te, oyo bakoki kotyela motema, oyo ezali sembo, to oyo esalemá mpenza. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “solo” elimboli likambo oyo eyokani na makambo oyo esalemá mpenza, oyo ebongi, to oyo ezali sembo.
18 Yehova abatelaki mateya ya solo mpe azali kosala ete boyebi na biso ya mateya yango ebakisama. (2 Yoa. 1, 2) Boyebi na biso ya mateya ya solo ezali se kobakisama, mpamba te “nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga, oyo ezali kongɛnga se kongɛnga kino moi ekokóma makasi”! (Mas. 4:18) Na ntembe te, tondimaka mpenza maloba oyo Yesu alobaki na libondeli moko oyo asalaki epai ya Nzambe ete: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoa. 17:17) Biblia, Liloba ya Nzambe ezali na “solo ya nsango malamu,” oyo esangisi mateya nyonso ya lisangá ya bokristo. (Gal. 2:14) Na mateya yango, tokoki kotánga makambo ya solo oyo etali nkombo ya Yehova, boyangeli na ye, mbeka ya lisiko ya Yesu, lisekwa, mpe Bokonzi. Tótalela sikoyo ndenge oyo Nzambe abatelaki mateya ya solo atako Satana alukaki kolimwisa yango.
YEHOVA ATIKAKI TE ETE SATANA ALIMWISA MATEYA YA SOLO
19, 20. Nimerode azalaki nani, mpe mwango nini elongaki te na ntango na ye?
19 Nsima ya Mpela, bato bakómaki koloba ete: “Kaka lokola Nimerode, elombe mobomi-nyama oyo azalaki kotɛmɛla Yehova.” (Eba. 10:9) Lokola Nimerode azalaki motɛmɛli ya Yehova Nzambe, yango emonisi ete azalaki nde kosambela Satana mpe azalaki lokola batɛmɛli oyo Yesu alobaki na bango ete: “Bino bouti na tata na bino Zabolo, mpe bolingi kokokisa bamposa ya tata na bino. Ye . . . akangamaki makasi te na solo, mpo solo ezali na kati na ye te.”—Yoa. 8:44.
20 Longola Babele, Nimerode azalaki mpe koyangela bingumba mosusu oyo ezalaki na katikati ya bibale Tigre mpe Efrate. (Eba. 10:10) Ekoki kozala ete ye moto apesaki mitindo mpo bábanda kotonga Babele mpe ndako molai na yango na mobu 2269 L.T.B. Na kokesana na mokano ya Yehova oyo ezalaki ete bato bápalangana na mabele mobimba, batongi wana balobaki ete: “Yaká! Tómitongela engumba mpe lisusu ndako molai oyo nsɔngɛ na yango ekei tii na likoló, mpe tómisalela nkombo ya lokumu, noki tópalangana na mabele mobimba.” Kasi, bakokisaki mokano na bango te mpo Nzambe “abulunganisaki monɔkɔ ya mabele mobimba” mpe apalanganisaki bato oyo balingaki kotonga ndako molai yango. (Eba. 11:1-4, 8, 9) Soki na ntango wana Satana azalaki na mokano ya kobandisa lingomba moko mpo bato nyonso básambela ye, mwango na ye elongaki te. Banda mokili ebanda, losambo ya Yehova elongaka kaka mpe ezali se kokende liboso mokolo na mokolo.
21, 22. (a) Mpo na nini ata mokolo moko te losambo ya lokuta elongá kolimwisa losambo ya solo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
21 Ata mokolo moko te losambo ya lokuta elongá kolimwisa losambo ya solo. Mpo na nini? Mpamba te Molakisi na biso Monene asɛnzɛlaki ete Liloba na ye ebatelama, bato báyeba nkombo na ye, mpe ye moko azali Liziba ya mateya ya solo. (Yis. 30:20, 21) Kosambela Nzambe ndenge mateya ya solo esɛngi epesaka biso esengo, kasi mpo na kosala bongo, tosengeli kosɛnzɛla na elimo, kotyela Yehova motema mobimba, mpe kolanda litambwisi ya elimo santu na ye.
22 Lisolo oyo elandi ekolimbola ndenge oyo mateya mosusu ya lokuta epalanganaki. Tokomona ete lokuta na yango emonanaki polele ntango bakokanisaki yango na Makomami. Longola yango, tokomona ndenge oyo Yehova, Mobateli monene ya mateya ya solo, apamboli biso na ndenge apesi biso mateya ya solo oyo ezali mpe na kati ya libula na biso ya elimo.