Mpo na nini kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso?
Mpo na nini kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso?
“Monɔkɔ na ngai ekoyebisa boyengebene na yo, mokolo mobimba, lobiko na yo.”—NZ. 71:15.
OKOPESA EYANO NINI?
Mpo na nini Noa, Moize, Yirimia, mpe Paulo batyaki mosala ya Yehova na esika ya liboso?
Osengeli kotalela nini mpo oyeba makambo oyo okosala na bomoi na yo?
Mpo na nini ozali na ekateli ya kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso?
1, 2. (a) Moto amonisaka nini ntango amipesi na Yehova? (b) Kotalela bikateli oyo Noa, Moize, Yirimia, mpe Paulo bazwaki ekoki kosalisa biso na nini?
NTANGO moto amipesi na Nzambe mpe akómi moyekoli ya Yesu oyo azwi batisimo, ezalaka ekateli moko monene. Komipesa na Nzambe ezali ekateli eleki monene oyo moto akoki kozwa. Ezali lokola nde azali koloba ete: ‘Yehova, nalingi ozala Nkolo ya bomoi na ngai mobimba. Nazali mosaleli na yo. Nalingi oyebisa ngai ndenge oyo nasengeli kosalela ntango na ngai, makambo oyo nasengeli kotya na esika ya liboso, mpe ndenge oyo nasengeli kosalela mayele mpe bozwi na ngai.’
2 Soki ozali mokristo oyo azwá batisimo, ezali makambo yango nde olakaki Yehova. Ebongi ozwa longonya mpo na ekateli na yo; ezalaki likambo ya malamu mpe ya bwanya. Kasi, lokola ondimá Yehova azala Nkolo na yo, ndenge nini osengeli kosalela ntango na yo? Ndakisa ya Noa, ya Moize, ya Yirimia, mpe ya ntoma Paulo ekoki kosalisa biso tózwa eyano na motuna yango. Mokomoko na bango amipesaki mobimba na mosala ya Yehova. Biso mpe tozali lokola bango. Bikateli oyo bazwaki na oyo etali makambo oyo basengeli kotya na esika ya liboso ekoki kolendisa biso tótalela ndenge oyo tosalelaka ntango na biso.—Mat. 28:19, 20; 2 Tim. 3:1.
LIBOSO YA MPELA
3. Na ndenge nini mikolo na biso ekokani na mikolo ya Noa?
3 Yesu akokanisaki ntango ya Noa na ntango na biso. Alobaki boye: “Ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo. . . . Bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.” (Mat. 24:37-39) Lelo oyo, bato mingi bazali kosala makambo na bango kozanga kokipe ete mikolo etikali ya kotánga. Bazali kotya likebi te na makebisi oyo basaleli ya Nzambe bazali kosakola. Kutu, ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, bato mingi lelo oyo bazali kondima te ete Nzambe akoboma bato mabe. (2 Pe. 3:3-7) Kasi, ndenge nini Noa asalelaki ntango na ye atako azalaki na kati ya bato oyo bazalaki kosepela na nsango na ye te?
4. Noa asalaki nini nsima ya kozwa mokumba epai ya Nzambe, mpe mpo na nini?
4 Nzambe ayebisaki Noa ete akani koboma bato nyonso ya mabe, mpe apesaki Noa mokumba atonga masuwa mpo na kobatela bato mpe banyama. (Eba. 6:13, 14, 22) Noa azalaki mpe kosakola mpo na koyebisa bato etumbu oyo Yehova akopesa. Ntoma Petro abengi ye “mosakoli ya boyengebene” mpe yango emonisi ete Noa asalaki makasi mpo na kosalisa bazalani na ye báyeba ete bomoi na bango ezali na likama. (Tángá 2 Petro 2:5.) Okanisi ete Noa ná libota na ye balingaki komonisa bwanya soki basalelaki ntango na bango mpo na komipesa na mombongo, koluka kokóma bato minene, to mpe kozala na bomoi ya bisengo? Te! Lokola bayebaki likambo oyo ezalaki koya, baboyaki kotya makanisi na makambo ya ndenge wana.
BIKATELI YA MOTO MOKO YA LIBOTA YA MOKONZI YA EZIPITO
5, 6. (a) Bakelasi oyo Moize atángaki na Ezipito ezalaki kobongisa ye mpo na nini? (b) Mpo na nini Moize aboyaki makambo malamu oyo akokaki kozwa na Ezipito?
5 Sikoyo, tótalela ndakisa ya Moize. Moize akolaki na ndako ya mokonzi ya Ezipito lokola mwana ya mwana mwasi ya Farao. Lokola akolaki na libota ya mokonzi, Moize ateyamaki “na bwanya nyonso ya Baezipito.” (Mis. 7:22; Kob. 2:9, 10) Na ntembe te bakelasi yango ezalaki kobongisa ye mpo na mokumba moko monene na ndako ya Farao. Akokaki kokóma moto monene na guvɛrnema oyo elekaki na nguya na ntango wana, kozwa biloko mingi ya kitoko, lokumu, mpe bisengo. Kasi, makanisi ya Moize ezalaki na makambo wana?
6 Lokola baboti ya Moize bateyaki ye ntango azalaki naino mwana moke, na ntembe te ayebaki bilaka oyo Yehova apesaki bankɔkɔ na ye Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo. Moize azalaki kondima bilaka yango. Na ntembe te akanisaki malamu avenire na ye mpe ndenge oyo akoki kotikala sembo epai ya Yehova. Na yango, Moize azwaki ekateli nini ntango esɛngaki apona kati na kotikala moto ya libota ya mokonzi ya Ezipito to kozala moombo Moyuda? Moize aponaki “konyokwama elongo na bato ya Nzambe na esika ya kozwa esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu.” (Tángá Baebre 11:24-26.) Na nsima, alandaki litambwisi ya Yehova mpo na ndenge oyo asengeli kosalela bomoi na ye. (Kob. 3:2, 6-10) Mpo na nini Moize asalaki bongo? Mpamba te azalaki kondima bilaka ya Nzambe. Amonaki ete avenire na ye ezalaki na Ezipito te. Kutu, nsima ya mwa ntango, Nzambe atindaki malɔzi zomi oyo ebebisaki ekólo yango. Omoni liteya oyo bato oyo bamipesi na Yehova lelo bakoki kozwa na lisolo yango? Na esika ya kotya makanisi nyonso na koluka kozwa mosala ya lokumu to bisengo ya mokili oyo, tótya nde makanisi na biso epai ya Yehova mpe na mosala na ye.
YIRIMIA AYEBAKI MAKAMBO OYO EZALAKI KOYA
7. Na ndenge nini bomoi ya Yirimia ekokani na oyo ya biso?
7 Moto mosusu oyo atyaki mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye ezali mosakoli Yirimia. Yehova atindaki Yirimia asakola bitumbu oyo akopesa Yerusaleme mpe Yuda mpo bazalaki kosambela bikeko. Na yango, ndenge moko na biso, Yirimia azalaki na bomoi “na eleko ya nsuka ya mikolo.” (Yir. 23:19, 20) Ayebaki malamu ete mokili na bango ekoumela lisusu te.
8, 9. (a) Mpo nini esengelaki kosembola makanisi ya Baruke? (b) Makambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali komityela mikano?
8 Makambo oyo Yirimia azalaki kondima etindaki ye asala nini? Alukaki te kobongisa bomoi na ye na mokili wana oyo etikalaki moke ebomama. Kosala yango elingaki kozala na ntina moko te. Nzokande, Baruke, sɛkrɛtɛrɛ ya Yirimia, akómaki na makanisi mosusu. Yango wana, Nzambe atindaki Yirimia aloba na sɛkrɛtɛrɛ na ye boye: “Talá! Oyo natongá nazali kobuka yango, mpe oyo naloná nazali kopikola yango, ɛɛ, mokili mobimba. Kasi yo ozali kokoba koluka makambo minene mpo na yo. Kokoba koluka yango te. Mpo talá nazali komema mpasi na ekelamu nyonso ya mosuni, . . . mpe nakopesa yo molimo na yo lokola eloko oyo epunzami na bisika nyonso oyo okokende.”—Yir. 45:4, 5.
9 Toyebi te soki “makambo minene” oyo Baruke azalaki koluka ezalaki nini. a Kasi, toyebi ete ezalaki makambo oyo ekokaki koumela te, makambo oyo ebebaki ntango bato ya Babilone bakweisaki Yerusaleme na mobu 607 L.T.B. Omoni liteya oyo tokoki kozwa na lisolo yango? Mpo tózwa biloko ya kobikela, esɛngaka tómityela mwa mikano. (Mas. 6:6-11) Kasi, tokomonisa mpenza bwanya soki topesi ntango mpe makasi na biso mingi mpo na koluka biloko oyo ekoumela te? Ya solo, ebongiseli ya Yehova ezali kokoba kotonga Bandako ya Bokonzi, babiro ya filiale, mpe kobongisa misala mosusu. Nzokande, makambo wana nyonso ekeseni na mikano ya bato mpamba te ezali kosalema mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso. Ebongi ete bato nyonso oyo bamipesá na Yehova bátalela makambo ndenge wana ntango bazali komityela mikano. Ondimaka mpenza ete ‘olukaka liboso bokonzi mpe boyengebene ya Yehova’?—Mat. 6:33.
“NATALELAKA YANGO LOKOLA BOSƆTƆ MPAMBA”
10, 11. (a) Paulo amipesaki na makambo nini liboso akóma mokristo? (b) Mpo na nini Paulo abongolaki mpenza mikano na ye?
10 Mpo na kosukisa, tótalela ndakisa ya Paulo. Liboso akóma mokristo, azalaki na makambo oyo ekokaki kokómisa ye moto monene. Ayekolaki mibeko ya Bayuda epai ya moko ya balakisi oyo balekaki lokumu na ntango wana. Nganga-nzambe monene ya Bayuda apesaki ye mokumba moko monene. Azalaki mpe kokende liboso na Lingomba ya Bayuda koleka bato mingi ya ntango na ye. (Mis. 9:1, 2; 22:3; 26:10; Gal. 1:13, 14) Kasi, Paulo atikaki nyonso wana ntango asosolaki ete ekólo ya Bayuda ezalaki lisusu libota ya Nzambe te.
11 Paulo amonaki ete kokóma moto monene na ebongiseli ya Bayuda ezalaki na ntina te na miso ya Yehova; ekólo yango elingaki koumela lisusu te. (Mat. 24:2) Kutu, moto yango oyo azalaki Mofarisai alobaki ete soki ataleli boyebi ya mikano ya Nzambe oyo akómaki na yango mpe libaku malamu ya kosakola nsango ya Nzambe, nyonso oyo ezalaki liboso makambo ya ntina mpo na ye ekómaki lokola “bosɔtɔ mpamba.” Paulo atikaki Lingomba ya Bayuda mpe amipesaki mobimba na kosakola nsango malamu tii liwa na ye.—Tángá Bafilipi 3:4-8, 15; Mis. 9:15.
TALELÁ MAKAMBO OYO OTYAKA NA ESIKA YA LIBOSO
12. Yesu amipesaki na nini nsima ya kozwa batisimo?
12 Noa, Moize, Yirimia, Paulo, mpe bato mosusu lokola bango basalelaki ntango mpe makasi na bango mingi na mosala ya Nzambe. Bazali bandakisa malamu mpo na biso. Nzokande, Yesu azali ndakisa eleki monene ya basaleli nyonso oyo bamipesi na Yehova. (1 Pe. 2:21) Nsima ya kozwa batisimo, Yesu apesaki bomoi na ye mobimba na kosakola nsango malamu mpe kokumisa Yehova. Na yango, mosala ya Yehova esengeli kozala na esika ya liboso na bomoi ya mokristo nyonso oyo andimaka ete Yehova azali Nkolo. Ezali mpe bongo mpo na yo? Ndenge nini tokoki komipesa na makambo ya elimo kozanga ete tóbosana makambo mosusu ya ntina mpo na bomoi na biso?—Tángá Nzembo 71:15; 145:2.
13, 14. (a) Ebongiseli ya Yehova elendisaka bakristo nyonso bátalela likambo nini? (b) Esengo nini basaleli ya Nzambe bakoki kozwa?
13 Banda kala, ebongiseli ya Yehova elendisaka mbala na mbala bakristo bátalela malamu soki bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mpe bábondela mpo na yango. Mpo na bantina ndenge na ndenge, basaleli mosusu ya Yehova bakoki te kosakolaka ngonga 70 sanza na sanza. Esengeli te bámitungisa mpo na yango. (1 Tim. 5:8) Kasi, ezali boni mpo na yo? Ya solo mpenza okoki te kozala mobongisi-nzela?
14 Kanisá esengo oyo ebele ya basaleli ya Yehova bazalaki na yango na eleko ya Ekaniseli ya mbula oyo. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaki ekateli ete bandeko oyo bakosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi, bápona soki bakosala ngonga 30 to 50. (Nz. 110:3) Bamilio ya bandeko basɛngaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpe emonanaki ete masangá ezalaki na esengo mingi. Okoki kobongisa programɛ na yo mpo osalaka ndenge wana mbala na mbala? Na nsuka ya mokolo mokomoko, mokristo oyo amipesi na Nzambe azalaka na esengo mingi soki akoki koloba ete, “Yehova, nasali nyonso oyo nakoki na mosala na yo.”
15. Elenge mokristo asengeli kozala na mokano nini na oyo etali kelasi?
15 Soki etikali moke osilisa kelasi, mbala mosusu ozali nzoto kolɔngɔnɔ mpe ozali naino na mikumba mingi te. Osilá kotalela malamumalamu soki okoki kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza? Mbala mosusu balakisi bazali mpenza komona ete kotánga bakelasi milaimilai ekosalisa yo ozwa mosala oyo bakofuta yo mbongo mingi. Kasi, bango batyaka motema na ebongiseli mpe nkita ya mokili oyo, oyo ekoumela lisusu te. Nzokande, soki omipesi na mosala ya Nzambe, okozala na mikano oyo ezali mpenza na ntina mpe oyo ekobongisa bomoi na yo. Okolanda mpe ndakisa ya kokoka ya Yesu. Ekateli wana ya bwanya ekopesa yo esengo mpe ekobatela yo. Ekomonisa mpe ete olingi mpenza kokokisa elaka oyo opesaki Yehova.—Mat. 6:19-21; 1 Tim. 6:9-12.
16, 17. Tosengeli komituna mituna nini na oyo etali mosala ya Yehova?
16 Lelo oyo, basaleli ebele ya Nzambe balekisaka ntango mingi na mosala mpo na koleisa mabota na bango. Nzokande, bamosusu basalaka lisusu nsima ya bangonga ya mosala. (1 Tim. 6:8) Bato ya mombongo bazali kosala nyonso mpo na kondimisa biso ete mpo tózala na esengo, tosengeli kozala na biloko ebele oyo bazali kobimisa mpe kosomba modɛlɛ nyonso oyo ebimi sika. Kasi, bakristo ya solo baboyaka ete mokili ya Satana eyebisa bango makambo oyo basengeli kotya na esika ya liboso. (1 Yoa. 2:15-17) Mpo na baoyo bazwá pansiɔ na mosala, kosala mosala ya mobongisi-nzela ezali ndenge eleki malamu oyo bakoki kosalela ntango na bango, mpo bátya mosala ya Yehova na esika ya liboso.
17 Basaleli nyonso ya Yehova oyo bazwá batisimo bakoki komituna boye: Eloko nini eleki ntina na bomoi na ngai? Natyaka mosala ya Yehova na esika ya liboso? Nalandaka ndakisa ya komipimela ya Yesu? Nalandaka toli ya Yesu ya kokoba kolanda ye? Nakoki kobongisa programɛ na ngai mpo namipesa mingi na mosala ya kosakola Bokonzi to na makambo mosusu na mosala ya Nzambe? Ata soki sikoyo makambo ya bomoi na ngai ezali kopesa ngai nzela te nasala mingi, nazali kokoba kolona elimo ya komipimela?
“BÓLINGA MPE BÓSALA”
18, 19. Okoki kobondela mpo na likambo nini, mpe mpo na nini libondeli ya ndenge wana ekosepelisa Yehova?
18 Ezali mpenza esengo komona ndenge basaleli ya Nzambe bazali kosalela ye na molende. Nzokande, bato mosusu bazalaka mpenza na mposa te ya kokóma babongisi-nzela to bakanisaka ete bakokoka yango te, ata soki makambo ya bomoi na bango ekoki kopesa bango nzela básala yango. (Kob. 4:10; Yir. 1:6) Soki yo mpe omonaka bongo, osengeli kosala nini? Ezali malamu kobondela mpo na yango! Paulo alobaki na baninga na ye bakristo ete Yehova, “ndenge asepeli kosala, azali kosala na kati na bino mpo bino bólinga mpe bósala.” (Flp. 2:13) Soki omonaka ete okoki te komipesa mingi na mosala ya Yehova, bondelá ye apesa yo mposa mpe makasi ya kosala yango.—2 Pe. 3:9, 11.
19 Noa, Moize, Yirimia, Paulo, mpe Yesu bazalaki bato oyo bamipesaki na mosala ya Nzambe. Basalelaki ntango mpe makasi na bango mpo na kosakola makebisi ya Yehova. Batikaki te ete makambo mosusu ebenda likebi na bango. Nsuka ya mokili oyo ekómi pene; yango wana, biso nyonso oyo tomipesi na Nzambe tosengeli komindimisa ete tozali kokoba kosala nyonso oyo tokoki mpo na kolanda ndakisa malamu ya bato wana. (Mat. 24:42; 2 Tim. 2:15) Soki tosali bongo, tokosepelisa Yehova mpe ye akopambola biso mingi.—Tángá Malaki 3:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia, nkasa 104-106.
[Mituna ya boyekoli]
[Elilingi na lokasa 21]
Bato baboyaki koyoka makebisi ya Noa
[Elilingi na lokasa 24]
Osilá mpenza kokanisa kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza?