Ozalaka mpenza na botɔndi mpo na likabo ya libala?
Ozalaka mpenza na botɔndi mpo na likabo ya libala?
“Tiká Yehova apesa bino likabo, mpe bózwa esika ya kopema moto na moto na ndako ya mobali na ye.”—RUTA 1:9.
LUKÁ BIYANO NA MITUNA OYO:
Mpo na nini tokoki koloba ete basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala bazalaki na botɔndi mpo na likabo ya libala?
Ndenge nini toyebi ete kopona malamu molongani ezali na ntina mingi na miso ya Yehova?
Toli nini ya Biblia oyo etali libala omoni ete okosalela na bomoi na yo?
1. Adama alobaki nini ntango amonaki mwasi oyo Nzambe apesaki ye?
“SIKOYO, oyo nde mokuwa ya mikuwa na ngai mpe mosuni ya mosuni na ngai. Ye akobengama Mwasi, mpo auti na mobali.” (Eba. 2:23) Adama, moto ya liboso, alobaki maloba wana mpo azalaki na esengo mingi ntango Nzambe apesaki ye mwasi. Yehova alalisaki Adama mpɔngi makasi, azwaki mokuwa moko na mopanzi na ye mpe asalaki mwasi moko kitoko. Adama abengaki mwasi yango Eva. Nzambe abalisaki bango. Lokola Yehova azwaki mokuwa ya mopanzi ya Adama mpo na kosala Eva, bango mibale bazalaki na boyokani makasi koleka babalani nyonso lelo oyo!
2. Mpo na nini mobali abendamaka epai ya mwasi mpe mwasi epai ya mobali?
2 Bwanya monene ya Yehova etindaki ye atya na mitema ya bato likoki ya kolingana. Likoki yango nde ebendaka mobali epai ya mwasi mpe mwasi epai ya mobali. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Mwasi ná mobali babalanaka na elikya ete bakobanda kosangisa nzoto mpe moto na moto akolinga moninga mpo na libela.” Mbala mingi esalemaka bongo epai ya basaleli ya Yehova.
BAZALAKI NA BOTƆNDI MPO NA LIKABO YA LIBALA
3. Ndenge nini Yisaka azwaki mwasi?
3 Abrahama, moto ya sembo, azalaki kozwa libala na valɛrɛ mingi. Yango wana atindaki moto oyo alekaki mokóló na kati ya basaleli na ye nyonso ete akende kolukela Yisaka mwasi na Mezopotamia. Nzambe ayokaki libondeli oyo mosaleli yango asalaki mpo na komona mwasi oyo abongi; akutanaki na Rebeka, mwasi oyo azalaki kobanga Nzambe. Rebeka akómaki mwasi ya Yisaka mpe akɔtaki na molɔngɔ ya bato oyo Yehova asalelaki mpo na kokokisa elaka na ye ya kobatela momboto ya Abrahama. (Eba. 22:18; 24:12-14, 67) Kasi, likambo oyo mosaleli ya Abrahama asalaki emonisi te ete ndeko moko, ata soki alingi kosalisa basusu, asengeli komipesa mosala ya kokutanisaka bato mpo bálingana mpe bábalana. Lelo oyo, na bisika mingi, moto ye moko nde aponaka moto oyo akobalana na ye. Nzambe aponelaka moto molongani te, kasi asalisaka mokristo na likambo ya libala mpe na makambo mosusu ya bomoi, soki mokristo yango abondeli ye mpe atiki ete elimo santu etambwisa ye.—Gal. 5:18, 25.
4, 5. Nini endimisi yo ete elenge mwasi Moshulame mpe mobateli ya mpate balinganaki makasi mpenza?
4 Na Yisraele ya kala, elenge mwasi Moshulame alingaki te ete bato mosusu bátya ye mbamba mpo akóma mwasi ya Mokonzi Salomo, moto oyo azalaki na basi ebele. Alobaki boye: “Nalapisi bino ndai, Ee bana basi ya Yerusaleme, ete bómeka te kolamwisa to kotumola bolingo kati na ngai tii ntango yango moko ekolinga.” (Loy. 8:4) Elenge mwasi yango alinganaki makasi ná mobali moko oyo azalaki mobateli ya mpate. Na komikitisa nyonso, alobaki boye: “Nazali na ngai fololo safra mpamba ya mokili patatalu ya bokula, fololo lísi ya mabwaku ya patatalu.” Mobateli ya mpate yango mpe azongisaki ete: “Lokola fololo lísi na kati ya matiti ya nzubɛnzubɛ, moninga na ngai ya mwasi azali mpe bongo na kati ya bana basi.” (Loy. 2:1, 2) Bango mibale balinganaki mpenza!
5 Lokola mokomoko na bango alingaki libosoliboso Nzambe, na ntembe te libala na bango ezalaki malamu. Kutu, mwasi Moshulame alobaki na mobateli ya mpate boye: “Tyá ngai lokola kashɛ na motema na yo, lokola kashɛ na lobɔkɔ na yo; mpo bolingo ezali makasi lokola liwa, kosɛnga oyo moto asɛngaka bákangama kaka na ye ezali makasi lokola Nkunda. Kopela na yango ezali kopela ya mɔtɔ, lolemo ya mɔtɔ ya Yah [mpo eutaka epai na ye]. Mai mingi ekoki kozimisa bolingo te, bibale mpe ekoki komema yango te. Soki moto ameki kopesa biloko nyonso ya motuya ya ndako na ye mpo na bolingo, bato bakotyola yango mpenza.” (Loy. 8:6, 7) Ebongi mpenza ete mosaleli nyonso ya Nzambe oyo alingi kobala alikya ete molongani na ye akolinga ye makasi ndenge wana!
LIPONI OYO EZALI NA NTINA NA MISO YA NZAMBE
6, 7. Ndenge nini toyebi ete kopona malamu molongani ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe?
6 Kopona malamu molongani ezali na ntina mingi na miso ya Yehova. Nzambe alobaki na Bayisraele boye: “Osengeli kosala kondimana ata moko te ya libala ná bango [Bakanana]. Osengeli te kopesa mwana na yo ya mwasi na mwana na ye ya mobali, mpe osengeli te kozwa mwana na ye ya mwasi mpo na mwana na yo ya mobali. Mpo ye akopɛngwisa mwana na yo ya mobali mpo atika kolanda ngai, mpe bakosalela mpenza banzambe mosusu; mpe nkanda ya Yehova ekongalela mpenza bino, mpe akoumela te koboma yo.” (Mib. 7:3, 4) Bankama ya bambula na nsima, nganga-nzambe Ezera alobaki boye: “Bino bozali sembo te mpo botyaki basi bapaya na ndako mpo na kobakisa ngambo ya Yisraele.” (Ezr. 10:10) Lisusu, ntoma Paulo alobaki na baninga na ye bakristo ete: “Mwasi akangami ntango nyonso oyo mobali na ye azali na bomoi. Kasi soki esalemi ete mobali na ye alali na kati ya liwa, azali na bonsomi ya kobalana na mobali oyo ye alingi, nde na kati ya Nkolo kaka.”—1 Ko. 7:39.
7 Soki mosaleli ya Yehova abali moto oyo azali Motatoli te, akomonisa ete azangi botosi epai ya Nzambe. Bayisraele ya ntango ya Ezera bazangaki bosembo na ndenge batyaki “basi bapaya na ndako.” Biblia emonisi nani oyo mokristo asengeli kobala mpe ebongi te kokakola maloba yango ya polele. (Ezr. 10:10; 2 Ko. 6:14, 15) Mokristo oyo abalani na moto oyo azwá batisimo te azali ndakisa malamu te mpe azali na botɔndi te mpo na likabo ya libala. Mokristo ya ndenge wana akoki kozanga mikumba mosusu na lisangá. Lisusu, ezali likambo oyo elongobani te tólikya mapamboli ya Yehova ntango biso moko tozali koloba na libondeli ete: ‘Yehova, natosi yo te na nko, kasi nasɛngi yo opambola ngai kaka.’
TATA NA BISO YA LIKOLÓ AYEBI OYO ELEKI MALAMU MPO NA BISO
8. Limbolá ntina oyo tosengeli kolanda malako ya Nzambe mpo na libala.
8 Moto oyo asali aparɛyi to masini moko ayebaka malamu ndenge esalaka. Soki esɛngi kokangisa biteni ndenge na ndenge ya masini yango, akoki kopesa malako oyo ebongi. Nini ekosalema soki tolandi malako yango te mpe tosali makambo na ndenge na biso? Na ntembe te, masini to aparɛyi yango ekosala malamu te, mbala mosusu mpe ekosala te. Na yango, mpo tózala na libala ya esengo, tosengeli kolanda malako ya Yehova, Mobandisi ya libala.
9. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova amonaka mabe te moto azala na mposa ya kozala na molongani, mpe ayebaka ete libala ekoki komemela moto esengo?
9 Yehova ayebi makambo nyonso oyo etali bato mpe libala. Akelá bato na mposa ya kosangisa nzoto mpo ‘bábota mpe bákóma mingi.’ (Eba. 1:28) Nzambe amonaka mabe te ete moto azala na mposa ya kozala na molongani, mpo liboso akela Eva, alobaki boye: “Ezali malamu te moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi, oyo abongi na ye.” (Eba. 2:18) Yehova ayebaka mpe ete libala ekoki komemela moto esengo.—Tángá Masese 5:15-18.
10. Ndenge nini babalani bakoki kosepelisa Yehova na likambo etali kosangisa nzoto?
10 Lokola Adama atikelá bato nyonso lisumu mpe kozanga kokoka, libala moko te ezali libala ya kokoka lelo oyo. Atako bongo, basaleli ya Yehova bakoki kozala na libala ya esengo mpenza soki bazali kolanda batoli ya Liloba ya Nzambe. Na ndakisa, tótalela toli ya polele oyo Paulo apesaki na likambo etali kosangisa nzoto na kati ya libala. (Tángá 1 Bakorinti 7:1-5.) Biblia elobi te ete bato oyo babalani basengeli kosangisa nzoto kaka mpo na kobota. Ekoki mpe kozala mpo moto na moto asepelisa moninga mpe bákokisa mposa ya nzoto. Kasi, Nzambe asepelaka te ete bato básangisa nzoto na ndenge ya mbindo. Na likambo wana ya ntina na kati ya libala, mobali ná mwasi oyo bazali bakristo basengeli kosalelana makambo na boboto mpe komoniselana bolingo ya solosolo. Basengeli mpe koboya likambo nyonso oyo ekosepelisa Yehova te.
11. Ndenge nini Yehova apambolaki Ruta mpo akangamaki na Ye?
11 Libala esengeli kopesa moto esengo, kasi te kokómisa ye mawamawa to moto ya komilelalela. Libota ya bakristo esengeli mpenza kozala esika ya kimya. Tótalela likambo moko oyo esalemaki eleki sikoyo mbula soki 3 000. Ntango Naomi, mobange mwasi oyo mobali akufá, alongwaki na Moaba mpo na kozonga na Yuda, abondelaki babokilo na ye Orpa ná Ruta, oyo bazalaki mpe basi oyo mibali bakufá, ete bázonga na mboka na bango. Ruta akangamaki na Naomi mpe aboyaki kozonga na Moabe. Akangamaki na Nzambe ya solo, mpe na nsima azwaki ‘lifuti ya kokoka uta na Yehova, oyo na nse ya mapapu na ye alukaki esika ya komibomba.’ (Ruta 1:9; 2:12) Lokola Ruta azalaki na botɔndi mingi mpo na likabo ya libala, andimaki kokóma mwasi ya Boaze, moto oyo azalaki mokóló mingi, kasi azalaki mosambeli ya solo ya Yehova. Ntango Ruta akosekwa na mokili ya sika, akosepela mingi koyoka ete akómaki nkɔkɔ ya Yesu Kristo. (Mat. 1:1, 5, 6; Luka 3:23, 32) Yehova apambolaki ye mpenza mpo akangamaki na Ye!
TOLI YA MALAMU MPO NA KOZALA NA LIBALA YA ESENGO
12. Epai wapi moto akoki kozwa toli ya malamu mpo na libala?
12 Mobandisi ya libala ayebisi biso oyo tosengeli koyeba mpo tózala na libala ya esengo. Moto moko te ayebi makambo lokola ye. Biblia elobaka ntango nyonso solo, mpe toli ya malamu oyo moto akoki kopesa na likambo etali libala esengeli kaka kolanda mitinda ya Biblia. Na ndakisa, na litambwisi ya elimo santu, ntoma Paulo akomaki ete: “Mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo ndenge amilingaka ye moko; mpe mwasi, asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” (Ef. 5:33) Toli wana ya Biblia ezali polele mpo na mokristo nyonso oyo akɔmɛli na elimo. Kasi, motuna yango oyo: Akotosa Liloba ya Yehova? Akosala yango soki azali mpenza na botɔndi mpo na likabo ya libala. a
13. Nini ekoki kosalema soki mobali atosi te toli oyo ezali na 1 Petro 3:7?
13 Mobali mokristo asengeli komonisa ete alingaka mwasi na ye. Ntoma Petro akomaki boye: “Bino mibali, bókoba kofanda na bango na boyebi, bópesaka bango lokumu mpo bazali mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ, oyo ya bomwasi, mpo bozali mpe bazwi-ya-libula ya boboto monene ya bomoi elongo na bango, mpo mabondeli na bino ekangisama nzela te.” (1 Pe. 3:7) Yehova akoki koboya koyoka mabondeli ya mobali oyo azali kolanda toli na ye te. Boyokani na ye ná Yehova mpe boyokani ya mwasi na ye ná Yehova ekoki kobeba, mpe yango ekoki kobimisa mitungisi makasi, koswana, mpe kozokisana na maloba.
14. Mwasi ya malamu akoki kosala nini mpo na libota na ye?
14 Mwasi oyo atikaka ete Liloba ya Nzambe mpe elimo santu etambwisa ye akoki kosala ete ndako na ye ezala esika ya kimya mpe ya esengo. Mobali oyo abangaka Nzambe alingaka mwasi na ye mpe abatelaka ye. Mwasi azalaka na mposa ya bolingo wana, mpe esɛngaka ete azala na bizaleli oyo ekotinda mobali na ye alinga ye. Masese 14:1 elobi boye: “Mwasi ya bwanya mpenza atongi ndako na ye, kasi oyo ya zoba abukaka yango na mabɔkɔ na ye moko.” Mwasi ya bwanya mpe ya malamu asalaka mingi mpo libota na ye ezala malamu mpe na esengo. Amonisaka mpe ete azali mpenza na botɔndi mpo na likabo ya libala.
15. Toli nini ezali na Baefese 5:22-25?
15 Mibali ná basi oyo bamekolaka ndenge oyo Yesu azalaki kosalela lisangá makambo bamonisaka ete bazali na botɔndi mpo na likabo ya libala. (Tángá Baefese 5:22-25.) Mobali ná mwasi na ye bazwaka mapamboli mingi soki balinganaka mpenza mpe batikaka te ete lolendo, koboya kolobisa moninga, to bizaleli mosusu ya mabe ebebisa libala na bango!
MOTO AKABOLA BANGO TE
16. Mpo na nini bakristo mosusu batikalaka monzemba?
16 Atako bato mingi bazalaka na makanisi ya kobala, basaleli mosusu ya Yehova batikalaka monzemba mpo bazali kozwa te molongani oyo abongi na bango mpe oyo akosepelisa Yehova. Bato mosusu bazali na likabo ya kotikala monzemba; yango esalisaka bango bámipesa mingi na mosala ya Yehova kozanga kotya makanisi na makambo ya libala. Kasi, moto oyo andimi kotikala monzemba asengeli kotosa mibeko ya Yehova.—Mat. 19:10-12; 1 Ko. 7:1, 6, 7, 17.
17. (a) Maloba nini oyo Yesu alobaki mpo na libala tosengeli kobosana te? (b) Mokristo asengeli kosala nini soki abandi kolula molongani ya moninga?
17 Biso nyonso, ezala minzemba to bato oyo babalá, tosengeli kobosana te maloba ya Yesu oyo: “Botángá te ete [Nzambe] moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali ná mwasi mpe alobaki ete: ‘Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko’? Bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko. Yango wana, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Mat. 19:4-6) Kolula molongani ya moninga ezali lisumu. (Mib. 5:21) Soki mokristo akómi kolula molongani ya moninga, asengeli kobengana nokinoki makanisi wana ya mbindo, ata soki ekozala mpasi mingi mpo atikaki mposa wana ya mabe ekola. (Mat. 5:27-30) Lokola motema ezali na bokosi, ezali na ntina mingi moto abengana makanisi wana mpe bamposa ya mabe oyo ebandi kokola kuna.—Yir. 17:9.
18. Ndenge nini tosengeli kotalela likabo ya libala?
18 Ata bato oyo bayebi makambo mingi te to mpe bayebi eloko te mpo na Yehova Nzambe mpe likabo ya libala oyo apesá bato, bazalaka na mwa botɔndi mpo na yango. Yango wana, esengeli mpenza ete biso baoyo tomipesá na Yehova “Nzambe ya esengo,” tósepela na makabo na ye nyonso mpe tómonisa ete tozali mpenza na botɔndi mpo na likabo ya libala!—1 Tim. 1:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina etali libala, talá mokapo 10 mpe 11 ya buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.”
[Mituna ya boyekoli]
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Libala ya malamu ekumisaka Yehova mpe ekoki kopesa libota mobimba esengo
[Elilingi na lokasa 5]
Ruta azalaki na botɔndi mpo na likabo ya libala
[Elilingi na lokasa 7]
Ozalaka mpenza na botɔndi mpo na likabo ya libala?