Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tósɛnzɛla lokola bantoma ya Yesu

Tósɛnzɛla lokola bantoma ya Yesu

“Bósɛnzɛla elongo na ngai.”​—MAT. 26:38.

1-3. Ndenge nini bantoma balongaki te kosɛnzɛla na butu ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele, mpe nini emonisi ete bazwaki liteya na libunga na bango?

 TALÁ likambo oyo esalemaki na butu ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele. Yesu akómaki na elanga ya Getesemane, moko ya bisika oyo azalaki kolinga mingi; ezalaki na ɛsti ya Yerusaleme. Azalaki ná bantoma na ye ya sembo. Lokola azalaki na makambo mingi ya kokanisa, Yesu azalaki na mposa ya kozwa esika oyo akozala ye moko mpo abondela.​—Mat. 26:36; Yoa. 18:1, 2.

2 Bantoma misato​—Petro, Yakobo mpe Yoane​—bakɔtaki ná Yesu na kati ya elanga. Yesu alobaki na bango boye: “Bótikala awa mpe bósɛnzɛla elongo na ngai,” mpe na nsima akendaki kobondela. Ntango azongaki, akutaki baninga na ye yango balali. Ayebisaki bango lisusu ete: “Bósɛnzɛlaka.” Kasi, balalaki lisusu mbala mibale! Na nsima, kaka na butu yango, bantoma nyonso balongaki te kosɛnzɛla na elimo. Kutu, basundolaki Yesu mpe bakimaki!​—Mat. 26:38, 41, 56.

3 Na ntembe te, bantoma bayokaki mawa ndenge balongaki kosɛnzɛla te. Eumelaki te, mibali yango ya sembo bazwaki liteya na libunga na bango. Mokanda ya Misala emonisi ete bakómaki bandakisa malamu na likambo etali kosɛnzɛla. Na ntembe te, ndakisa na bango elendisaki baninga na bango bakristo básala lokola bango. Lelo oyo, tosengeli kosɛnzɛla mingi koleka. (Mat. 24:42) Tólobela mateya misato oyo tokoki kozwa na mokanda ya Misala na likambo etali kosɛnzɛla.

BASƐNZƐLAKI MPO NA KOYEBA EPAI WAPI BASENGELI KOSAKOLA

4, 5. Ndenge nini Paulo ná baninga na ye ya mobembo bamonaki litambwisi ya elimo santu?

4 Ya liboso, bantoma basɛnzɛlaki mpo na koyeba epai wapi basengeli kosakola. Biblia emonisi ndenge Yesu asalelaki elimo santu ya Yehova mpo na kotambwisa ntoma Paulo ná baninga na ye na mobembo moko oyo bakutanaki na makambo mingi. (Mis. 2:33) Tótala ndenge esalemaki.​—Tángá Misala 16:6-10.

5 Paulo, Silasi mpe Timote balongwaki na engumba Listra, na sudi ya Galatia. Mwa mikolo na nsima, bakómaki na nzela moko monene ya Roma oyo ekomema bango na wɛsti tii na esika oyo ezalaki na bato mingi koleka bisika mosusu na etúká ya Azia. Balingaki kozwa nzela yango mpo bákende na bingumba oyo bato ebele bazalaki na mposa ya koyoka nsango etali Kristo. Kasi eloko moko epekisaki bango. Vɛrsɛ 6 elobi boye: “Bakatisaki Frigia mpe mokili ya Galatia, mpo elimo santu epekisaki bango báloba liloba na etúká ya Azia.” Na ndenge moko oyo Biblia eyebisi te, elimo santu epekisaki bato wana ya mobembo básakola na etúká ya Azia. Emonani ete Yesu, na nzela ya elimo ya Nzambe, alingaki kotambwisa Paulo ná baninga na ye mpo bákende kosakola epai mosusu.

6, 7. (a) Nini ekómelaki Paulo mpe baninga na ye ya mobembo pene ya Bitinia? (b) Ekateli nini bayekoli yango bazwaki, mpe esukaki ndenge nini?

6 Bato yango ya molende bakendeki wapi? Vɛrsɛ 7 elobi boye: “Lisusu, ntango bakómaki na Misia basalaki makasi mpo na kokɔta na Bitinia, kasi elimo ya Yesu epesaki bango nzela te.” Lokola elimo ya Nzambe epekisaki bango básakola na Azia, Paulo ná baninga na ye babalukaki na ngámbo ya nɔrdi, balingaki kokende kosakola na bingumba ya Bitinia. Nzokande, ntango bakómaki pene ya Bitinia, Yesu asalelaki lisusu elimo santu mpo na kopekisa bango. Na ntembe te, mibali yango bamitunaki mituna. Bayebaki nsango oyo basengeli kosakola mpe ndenge ya kosakola yango, kasi bayebaki te epai wapi basengeli kosakola. Na maloba mosusu, babɛtaki porte mpo na kokɔta na Azia, esimbaki te. Babɛtaki porte mpo na kokɔta na Bitinia, esimbaki mpe te. Batikaki nde kobɛta? Te, batikaki te!

7 Na mbala oyo, mibali yango bazwaki ekateli moko oyo ekokaki kokamwisa. Vɛrsɛ 8 elobi boye: “Balekaki pene na Misia mpe bakitaki na Troase.” Mibali yango babalukaki na ngámbo ya wɛsti mpe batambolaki soki kilomɛtrɛ 550, balekaki bingumba mingi tii bakómaki na libongo ya Troase, esika ya kozwa masuwa mpo na kokende na Masedonia. Kuna, mpo na mbala ya misato, Paulo ná baninga na ye babɛtaki porte moko, mpe na mbala yango, porte efungwamaki polele! Vɛrsɛ 9 emonisi oyo esalemaki na nsima: “Na butu, Paulo amonaki emonaneli moko: moto moko ya Masedonia atɛlɛmaki mpe azalaki kobondela ye mpe koloba ete: ‘Leká na Masedonia kosalisa biso.’” Nsukansuka, Paulo ayebaki epai wapi asengeli kosakola. Kozanga koumela, mibali yango bazwaki masuwa mpe bakendeki na Masedonia.

8, 9. Liteya nini tokoki kozwa na lisolo oyo elobeli mobembo ya Paulo?

8 Liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango? Tósimba ete ezali se nsima ya kobanda mobembo mpo na kokende na Azia nde elimo ya Nzambe elakisaki Paulo nzela. Lisusu, ezali se nsima ya kokóma pene na Bitinia nde Yesu alakisaki Paulo nzela. Mpe ezali se nsima ya kokóma na Troase nde Yesu alakisaki ye ete asengeli kokende na Masedonia. Yesu, Mokonzi ya lisangá, akoki mpe kosala bongo epai na biso. (Kol. 1:18) Na ndakisa, ekoki kozala ete ozali na mposa ya kokóma mobongisi-nzela to kokende epai oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te. Nzokande, ekoki kozala kaka nsima ya kobanda kosala oyo esengeli mpo na kokokisa mokano yango nde, na nzela ya elimo ya Nzambe, Yesu akolakisa yo nzela. Tózwa ndakisa: Sofɛlɛ akoki kobalola motuka na lobɔkɔ ya mwasi to ya mobali kaka soki motuka ezali kotambola. Ndenge moko mpe, mbala mosusu Yesu akolakisa biso nzela mpo tómipesa mingi na mosala ya kosakola kaka soki tozali kotambola, elingi koloba tozali mpenza kosala milende mpo na kokokisa mokano na biso.

9 Bongo soki milende na yo eboti mbuma na mbala moko te? Osengeli nde kolɛmba nzoto mpe komona ete elimo ya Nzambe ezali kotambwisa yo te? Te, kobosana te ete Paulo mpe akutanaki na mikakatano. Kasi, akobaki koluka mpe kobɛta kɔkɔkɔ tii ntango amonaki porte oyo efungwamaki. Ndenge moko mpe, soki ozali kokoba koluka “porte monene, oyo ezali kopesa nzela na mosala,” yo mpe okoki kozwa mbano.​​—1 Ko. 16:9.

BAZALAKI NA BOKƐNGI MPE BAZALAKI KOBONDELA MPENZA

10. Nini emonisi ete mpo na kosɛnzɛla, tosengeli kotingama na mabondeli?

10 Tótalela sikoyo liteya ya mibale oyo tokoki kozwa epai ya bandeko na biso ya ekeke ya liboso na likambo etali kosɛnzɛla: Bazalaki na bokɛngi mpe bazalaki kobondela mpenza. (1 Pe. 4:7) Mpo tósɛnzɛla, tosengeli kotingama na mabondeli. Tóbosana te ete na elanga ya Getesemane, mwa moke liboso bákanga ye, Yesu ayebisaki bantoma na ye misato ete: “Bósɛnzɛlaka mpe bóbondelaka ntango nyonso.”​—Mat. 26:41.

11, 12. Mpo na nini mpe ndenge nini Erode azalaki konyokola bakristo, ata mpe Petro?

11 Na nsima, Petro, oyo ayokaki maloba wana ya Yesu na elanga ya Getesemane, ayaki komona ntina ya kobondela na etingya. (Tángá Misala 12:1-6.) Na bavɛrsɛ ya ebandeli, tomoni ete Erode azalaki konyokola bakristo mpo Bayuda bándima ye. Mbala mosusu ayebaki ete Yakobo azalaki ntoma oyo azalaki na boyokani makasi na Yesu. Na yango, Erode abomisaki Yakobo “na mopanga.” (Vɛrsɛ 2) Na bongo, lisangá ebungisaki ntoma oyo balingaki mingi. Ezalaki komekama monene mpo na bandeko!

12 Erode asalaki nini na nsima? Vɛrsɛ 3 elobi boye: “Lokola amonaki ete yango esepelisi Bayuda, akendeki tii kokanga mpe Petro.” Kasi, liboso na yango, ntango batyaki bantoma, ata mpe Petro na bolɔkɔ, babimaki. (Mis. 5:17-20) Mbala mosusu Erode ayebaki yango malamu. Mokonzi yango ya mayele mabe azwaki bibongiseli mpo Petro akima te. Apesaki Petro na mabɔkɔ ya “bituluku minei ya basoda mineiminei oyo bazalaki kokɛngɛla ye, etuluku mokomoko na ngala na yango, mpo akanaki kobimisa ye liboso ya bato nsima ya elekeli.” (Vɛrsɛ 4) Kanisá naino! Erode akangisaki Petro na minyɔlɔlɔ mpe atyelaki ye bakɛngɛli mibale. Bazalaki bakɛngɛli 16 oyo bazalaki kosala butu moi, bato na bato na ngala na bango, mpo ntoma yango akima te. Erode akanaki kobimisa Petro liboso ya bato nsima ya Elekeli, kokatela ye etumbu ya liwa mpo na kosepelisa bato. Na ntango wana ya mpasi, bandeko ya lisangá bakokaki kosala nini?

13, 14. (a) Lisangá esalaki nini ntango Petro atyamaki na bolɔkɔ? (b) Ndakisa ya bandeko ya lisangá yango eteyi biso nini na oyo etali kobondela?

13 Lisangá eyebaki malamu likambo oyo esengeli kosala. Vɛrsɛ 5 elobi boye: “Na yango Petro akangamaki kaka na bolɔkɔ; kasi lisangá ekobaki kobondela Nzambe makasi mpo na ye.” Ya solo, babondelaki makasi mpo na ndeko na bango oyo balingaki mingi, basalaki malɔmbɔ oyo euti na motema. Yango emonisi ete liwa ya Yakobo elongolaki bango elikya te; etindaki bango mpe te bámona lokola ete libondeli esalaka te. Kutu, bayebaki nde ete mabondeli ya bato ya sembo ezalaka na ntina mingi na miso ya Yehova. Soki mabondeli ya ndenge wana eyokani na mokano na ye, Yehova ayanolaka yango.​—Ebr. 13:18, 19; Yak. 5:16.

14 Ndenge bandeko ya lisangá basalaki mpo na Petro ekoki koteya biso nini? Mpo tósɛnzɛla, tosengeli kobondelaka kaka mpo na biso moko te, kasi mpe mpo na bandeko na biso. (Ef. 6:18) Oyebi bandeko oyo bazali konyokwama mpo na komekama? Basusu bazali na kati ya minyoko, bipekiseli, to makama minene esalemi bisika bafandi. Mpo na nini te kotya bango na mabondeli na yo oyo euti na motema? Mbala mosusu mpe oyebi bandeko oyo bazali na mikakatano oyo emonanaka polele te. Ekoki kozala ete bazali na mikakatano na libota na bango, balɛmbi nzoto, to mpe bazali kobɛla. Mpo na nini te kokanisa bandeko mosusu oyo okoki kotánga nkombo na bango ntango ozali kobondela Yehova, “Moyoki ya libondeli”?​—Nz. 65:2.

15, 16. (a) Lobelá ndenge anzelu ya Yehova abimisaki Petro na bolɔkɔ. (Talá elilingi awa na nse.) (b) Mpo na nini kokanisa ndenge Yehova abikisaki Petro ekoki kobɔndisa biso?

15 Kasi, makambo esukaki ndenge nini mpo na Petro? Na butu na ye ya nsuka na bolɔkɔ, wana alalaki mpɔngi makasi na katikati ya bakɛngɛli mibale, Petro akutanaki na makambo ya nsɔmɔ. (Tángá Misala 12:7-11.) Kanisá naino: Pole moko boye engɛngaki na pwasa na ndako oyo azalaki. Anzelu moko atɛlɛmaki wana mpe na ntembe te, bakɛngɛli bazalaki komona ye te, mpe alamusaki Petro nokinoki. Minyɔlɔlɔ oyo ekangaki mabɔkɔ na ye ekweaki yango moko! Na nsima, anzelu yango abimisaki Petro na ndako yango; balekaki bakɛngɛli oyo batɛlɛmaki libándá, mpe babimaki na porte monene ya ebende, oyo efungwamaki “kaka yango moko.” Ntango kaka babimaki libándá ya bolɔkɔ, anzelu yango alimwaki. Petro akómaki na bonsomi!

16 Kokanisa ndenge Yehova asalelaka nguya na ye mpo na kobikisa basaleli na ye elendisaka mpenza kondima. Ya solo, lelo oyo tolikyaka te ete Yehova abikisa biso na ndenge ya likamwisi. Kasi, tozali na kondima makasi ete asalelaka nguya na ye mpo na bolamu ya basaleli na ye lelo. (2 Nt. 16:9) Na nzela ya elimo santu na ye ya nguya, akoki kosalisa biso tóyika mpiko na mokakatano nyonso oyo tokoki kokutana na yango. (2 Ko. 4:7; 2 Pe. 2:9) Mpe mosika te, Yehova akopesa Mwana na ye nguya mpo abimisa bamilio ya bato na bolɔkɔ oyo ekangamá makasi koleka, elingi koloba, liwa. (Yoa. 5:28, 29) Kondima na biso na bilaka ya Nzambe ekoki kopesa biso mpiko mingi ntango tokutani na mikakatano lelo.

MIKAKATANO EPEKISAKI BANGO TE BÁPESA LITATOLI MALAMUMALAMU

17. Na ndenge nini Paulo azali ndakisa monene na oyo etali kosakola na molende mpe kobosana te ete mikolo etikali ya kotánga?

17 Liteya ya misato oyo tokoki kozwa epai ya bantoma na likambo etaleli kosɛnzɛla yango oyo: Mikakatano epekisaki bango te bápesa litatoli malamumalamu. Mpo tósɛnzɛla, tosengeli kosakola na molende mpe kobatela na makanisi ete mikolo etikali ya kotánga. Ntoma Paulo azali ndakisa monene na likambo yango. Amipesaki na molende; asalaki mibembo mingi mpe afungolaki masangá ebele. Ayikaki mpiko na mikakatano ndenge na ndenge, kasi molende na ye esilaki te mpe abosanaki te ete mikolo etikali ya kotánga.​—2 Ko. 11:23-29.

18. Ndenge nini Paulo akobaki kopesa litatoli ntango azalaki mokangami na Roma?

18 Tótalela makambo ya nsuka oyo mokanda ya Misala elobi mpo na Paulo, na Misala mokapo 28. Paulo akómaki na Roma, epai asengelaki kosamba liboso ya Amperɛrɛ Néron. Azalaki mokangami mpe bakangaki ye minyɔlɔlɔ, mbala mosusu bakangisaki yango na mokɛngɛli na ye. Atako bongo, minyɔlɔlɔ elongaki te kokanga ntoma yango ya molende monɔkɔ! Paulo akobaki kozwa mabaku ya kopesa litatoli. (Tángá Misala 28:17, 23, 24.) Nsima ya mikolo misato, Paulo abengaki bato minene na kati ya Bayuda mpo apesa bango litatoli. Na nsima, na mokolo oyo bayokanaki, apesaki litatoli malamu koleka. Vɛrsɛ 23 elobi boye: “Bango [Bayuda ya Roma] ná ye bayokanaki mokolo, mpe bayaki ebele mpenza epai na ye na esika oyo azalaki kofanda. Mpe alimbwelaki bango likambo yango na kopesáká litatoli malamumalamu mpo na bokonzi ya Nzambe mpe na kosaleláká mayele ya kondimisa bango na oyo etali Yesu na mibeko ya Moize mpe na Basakoli, banda ntɔngɔ tii mpokwa.”

19, 20. (a) Mpo na nini Paulo ayebaki malamu mpenza kopesa litatoli? (b) Paulo asalaki nini atako bato mosusu bandimaki nsango malamu te?

19 Mpo na nini Paulo ayebaki malamu mpenza kopesa litatoli? Vɛrsɛ 23 epesi biso mwa bantina mosusu. (1) Alobelaki mingi Bokonzi ya Nzambe mpe Yesu Kristo. (2) Alukaki kosimba mitema ya bayoki na ye “na kosaleláká mayele ya kondimisa.” (3) Asalelaki Makomami mpo na kosolola na bato. (4) Amipimelaki makambo mosusu na ndenge apesaki litatoli “banda ntɔngɔ tii mpokwa.” Paulo apesaki litatoli malamumalamu, kasi bato nyonso te nde bandimaki. Vɛrsɛ 24 elobi boye: “Bamosusu babandaki kondima makambo oyo elobamaki; bamosusu bazalaki kondima te.” Bokabwani ekɔtaki mpe bato bapanzanaki.

20 Paulo alɛmbaki nde nzoto lokola bato mosusu bandimaki nsango malamu te? Ata moke te! Misala 28:30, 31 eyebisi biso boye: “Afandaki mbula mibale mobimba na ndako na ye moko ya kofutela, mpe azalaki koyamba na boboto mpenza baoyo nyonso bazalaki koya epai na ye, azalaki kosakwela bango bokonzi ya Nzambe mpe koteya makambo etali Nkolo Yesu Kristo polele mpenza mpe na bosembo, kozanga kopekisama.” Mokanda ya Misala esuki na maloba wana ya kolendisa.

21. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Paulo ntango azalaki mokangami?

21 Ndakisa ya Paulo ekoki koteya biso nini? Wana azalaki na bolɔkɔ, Paulo akokaki kopesa litatoli ndako na ndako te. Atako bongo, alɛmbaki nzoto te, azalaki kopesa litatoli na baoyo nyonso bazalaki koya kotala ye. Ndenge moko mpe, basaleli mingi ya Nzambe lelo oyo bazali kobatela esengo na bango mpe kokoba kosakola atako batyami na babolɔkɔ kaka mpo na bindimeli na bango. Bandeko na biso mosusu ya basi mpe ya mibali bakɔtá ndako, bamosusu kutu bafandaka na bandako ya mibange mpo na bobange to maladi. Soki likoki ezwami, bateyaka minganga, bato mosusu oyo basalaka wana, bato oyo bayei kotala bango mpe bongo na bongo. Mposa na bango ezalaka ete bápesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe. Ndakisa na bango esepelisaka biso mingi mpenza!

22. (a) Buku nini ebimisamá mpo na kosalisa biso tóyeba mokanda ya Misala malamu koleka? (Talá etanda wana na likoló.) (b) Ekateli na yo ezali nini wana ozali kozela nsuka ya ebongiseli oyo mabe?

22 Ya solo, tokoki kozwa mateya mingi na likambo etali kosɛnzɛla epai ya bantoma mpe bakristo mosusu ya ekeke ya liboso oyo mokanda ya Misala elobeli. Wana tozali kozela nsuka ya ebongiseli oyo mabe, tózala na ekateli ya komekola bango na kopesáká litatoli na mpiko mpe na molende. Ezali na lokumu mosusu te oyo ekokani na lokumu ya ‘kopesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe!​—Mis. 28:23.

[Mituna ya boyekoli]

[Etanda na lokasa 13]

“BANDA LELO, NAKÓMI KOTALELA MOKANDA YA MISALA NDENGE MOSUSU”

Nsima ya kotánga buku ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe, mokɛngɛli-motamboli moko abimisaki makanisi na ye na maloba oyo: “Banda lelo, nakómi kotalela mokanda ya Misala ndenge mosusu. Natángá mokanda ya Misala na mabaku mingi, kasi nazalaki lokola moto asimbi buji, alati manɛti ya salite mpe azali kotambola na molili. Sikoyo, nayoki lokola pole ya moi engɛngɛli ngai mpo namona malamu.”

[Elilingi na lokasa 12]

Anzelu moko abimisaki Petro na porte monene ya ebende