Ndenge Yesu azali kokumisa boyengebene ya Nzambe
Ndenge Yesu azali kokumisa boyengebene ya Nzambe
“Nzambe akabaki [Kristo] azala likabo ya kozipa masumu na nzela ya kondima na makila na ye. Asalaki bongo mpo na kolakisa boyengebene na ye moko.”—ROM. 3:25.
1, 2. (a) Biblia elobi nini mpo na bato? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?
LISOLO ya Biblia oyo elobeli botomboki oyo ebimaki na Edene eyebani malamu. Mpasi oyo euti na lisumu ya Adama ekómelaka biso nyonso ndenge emonisami na maloba oyo: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Rom. 5:12) Ata soki tobundi ndenge nini mpo tósala oyo ezali malamu, tosalaka mabunga, mpe tozalaka na mposa Nzambe alimbisa biso. Ata ntoma Paulo amilelaki boye: “Malamu oyo nalingi nasalaka yango te, kasi mabe oyo nalingi te yango nde nasalaka. Ngai moto ya mawa!”—Rom. 7:19, 24.
2 Kozanga kokoka na biso ebimisi mituna oyo ya ntina mingi: Ndenge nini ekokaki kosalema ete Yesu moto ya Nazarete asangola lisumu te ntango abotamaki, mpe mpo na nini azwaki batisimo? Ndenge nini bomoi ya Yesu ekumisaki boyengebene ya Yehova? Oyo eleki ntina, liwa ya Kristo ekokisaki makambo nini?
Babɛteli boyengebene ya Nzambe ntembe
3. Ndenge nini Satana akosaki Eva?
3 Na bozoba nyonso, baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, baboyaki boyangeli ya Nzambe mpe bandimaki koyangelama na “nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana.” (Em. 12:9) Tótala ndenge makambo elekaki. Satana alobaki ete ndenge ya koyangela ya Yehova Nzambe ezali na boyengebene te. Amonisaki yango ntango atunaki Eva boye: “Ezali mpenza solo ete Nzambe alobaki na bino ete bosengeli te kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga?” Eva azongelaki mobeko ya polele oyo Nzambe apesaki bango: basengeli te kosimba nzete moko boye, noki bákufa. Na nsima, Satana Zabolo afundaki Nzambe ete azali lokuta. Alobaki boye: “Bokokufa soki moke te.” Akosaki lisusu Eva; atindaki ye andima ete Nzambe azalaki kopimela bango eloko moko ya malamu mpe ete soki alei mbuma ya nzete yango, akokóma lokola Nzambe, akozala na bonsomi ya kopona ye moko malamu ná mabe.—Eba. 3:1-5.
4. Ndenge nini bato bakómaki na nse ya bokonzi ya Satana?
4 Satana alingaki mpenzampenza koloba ete bato bakozala na esengo koleka soki bapesi Nzambe mokɔngɔ. Na esika akɔtela Nzambe mpe amonisa ete boyangeli na ye ezali ya boyengebene, Adama ayokaki mwasi na ye mpe alyaki elongo na ye mbuma oyo epekisamaki. Na ndenge yango, Adama abebisaki boyokani ya kokoka oyo azalaki na yango na Yehova mpe akɔtisaki biso na boombo mabe ya lisumu mpe ya liwa. Kaka na ntango yango, bato bakómaki na nse ya bokonzi mosusu oyo ekómaki kowelana ná bokonzi ya Nzambe: bokonzi ya Satana, “nzambe na mokili oyo.”—2 Ko. 4:4, haut fleuve; Rom. 7:14.
5. (a) Ndenge nini Yehova atosaki liloba na ye? (b) Elikya nini Nzambe apesaki bana ya Adama ná Eva?
5 Mpo na kotosa liloba na ye oyo ezangaka kokokisama te, Yehova akatelaki Adama ná Eva etumbu ya liwa. (Eba. 3:16-19) Kasi yango elimbolaki nde ete mokano ya Nzambe ekolonga te? Soki moke te! Ntango azalaki kokatela Adama ná Eva etumbu, Yehova apesaki bana na bango oyo basengelaki koya na nsima elikya moko kitoko. Ayebisaki mokano na ye ya kobimisa “momboto” oyo Satana asengelaki kozokisa na litindi. Kasi, mpota ya Momboto yango oyo alakamaki esengelaki kosila mpe ye asengelaki ‘kopanza motó ya [Satana].’ (Eba. 3:15) Biblia emonisaki likambo yango malamu ntango elobaki mpo na Yesu Kristo ete: “Ezali mpo na ntina oyo nde Mwana ya Nzambe amonisamaki polele, elingi koloba, mpo na kobukabuka misala ya Zabolo.” (1 Yoa. 3:8) Kasi, ndenge nini etamboli mpe liwa ya Yesu emonisaki boyengebene ya Nzambe?
Ndimbola ya batisimo ya Yesu
6. Ndenge nini toyebi ete Yesu asangolaki lisumu ya Adama ná Eva te?
6 Na mokóló, Yesu asengelaki kozala mpenza ndenge Adama azalaki, ntango azalaki naino moto ya kokoka. (Rom. 5:14; 1 Ko. 15:45) Yango elimboli ete Yesu asengelaki kobotama moto ya kokoka. Ekokaki kosalema ndenge nini? Anzelu Gabriele alimbwelaki Maria, mama ya Yesu, polele ete: “Elimo santu ekoyela yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mpe mwana oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.” (Luka 1:35) Emonani ete ntango Yesu azalaki mwana moke, Maria ayebisaki ye makambo mosusu oyo etali kobotama na ye. Yango wana mokolo moko ntango Maria ná Yozefe, tata-mobɔkɔli ya elenge Yesu bamonaki ye na tempelo ya Nzambe, ye atunaki bango boye: “Boyebaki te ete nasengeli kozala na ndako ya Tata na ngai?” (Luka 2:49) Ezali polele ete banda bomwana mpenza, Yesu ayebaki ete azalaki Mwana ya Nzambe. Na yango, komonisa boyengebene ya Nzambe ezalaki likambo oyo elekaki ntina mpo na ye.
7. Biloko nini ya motuya mingi Yesu azalaki na yango?
7 Yesu amonisaki ete azali mpenza kosepela na makambo ya elimo na ndenge azalaki kozanga te na makita ya losambo. Lokola azalaki na bɔɔngɔ ya kokoka, na ntembe te azalaki kokanga ntina ya likambo nyonso oyo azalaki koyoka mpe kotánga na Makomami ya Ebre. (Luka 4:16) Azalaki mpe na eloko mosusu ya motuya mingi—nzoto ya kokoka oyo ekokaki kopesama mbeka mpo na bolamu ya bato. Na batisimo na ye, Yesu azalaki kobondela mpe mbala mosusu azalaki kokanisa maloba ya esakweli oyo ezali na Nzembo 40:6-8.—Luka 3:21; tángá Baebre 10:5-10. *
8. Mpo nini Yoane Mobatisi alukaki kopekisa Yesu abatisama?
8 Na ebandeli, Yoane Mobatisi Mat. 3:15.
alingaki kopekisa Yesu azwa batisimo. Mpo na nini? Mpo Yoane azalaki kopesa Bayuda batisimo oyo ezalaki komonisa ete babongoli motema mpo babukaki Mibeko. Lokola bazalaki bandeko, na ntembe te Yoane ayebaki ete Yesu azalaki moyengebene mpe mpo na yango azalaki na mposa ya kobongola motema te. Yesu andimisaki Yoane ete ebongaki abatisama. Yesu alobaki boye: “Na ndenge wana nde tokokokisa mpenza makambo nyonso ya boyengebene.”—9. Batisimo ya Yesu ezalaki elembo ya nini?
9 Lokola azalaki moto ya kokoka ndenge moko na Adama, Yesu akokaki komona ete azali likoki ya kobota bana ya kokoka. Kasi, Yesu alukaki ata moke te kosala bongo, mpo mokano ya Yehova mpo na ye ezalaki bongo te. Nzambe atindaki ye na mabele mpo akokisa mokumba ya Momboto, to Masiya oyo alakamaki. Yango esɛngaki mpe Yesu apesa bomoi na ye ya moto ya kokoka lokola mbeka. (Tángá Yisaya 53:5, 6, 12.) Ya solo, batisimo ya Yesu ezalaki na ndimbola moko te ná batisimo oyo biso tozwaka. Ezalaki kosɛnga te ete amipesa na Yehova, mpo abotamaki na Yisraele, ekólo oyo esilaki komipesa na Nzambe. Batisimo ya Yesu ezalaki nde elembo ete ayei komimonisa mpo na kosala mokano ya Nzambe ndenge Makomami esakolaki yango mpo na Masiya.
10. Kosala mokano ya Nzambe elimbolaki nini mpo na Masiya, mpe ndenge nini Yesu amonaki yango?
10 Mokano ya Yehova mpo na Yesu ezalaki ete asakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, akómisa bato bayekoli, mpe abongisa bango mpo na mosala ya kokómisa bato bayekoli, oyo elingaki koya na nsima. Batisimo ya Yesu emonisaki mpe ete andimi konyokwama mpe kokufa liwa ya nsɔmɔ mpo na kokɔtela boyangeli ya Yehova Nzambe, oyo ezali ya boyengebene. Lokola Yesu alingaki mpenza Tata na ye ya likoló, asepelaki kosala mokano ya Nzambe mpe amonaki ete kopesa nzoto na ye lokola mbeka ezali esengo mingi. (Yoa. 14:31) Asepelaki mpe koyeba ete motuya ya bomoi na ye ya kokoka ekokaki kopesama lokola lisiko epai ya Nzambe mpo na kolongola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Nzambe andimaki nde komimonisa oyo Yesu amimonisaki mpo na kokokisa mikumba wana ya minene? Ɛɛ, andimaki mpenza!
11. Ndenge nini Yehova amonisaki ete andimi Yesu lokola Masiya, to Kristo oyo alakamaki?
11 Bakomi nyonso minei ya Baevanzile bamonisi ete Yehova Nzambe alobaki polele ete andimi Yesu, ntango abimaki na mai ya Ebale Yordani. Yoane apesaki litatoli ete: “Namonaki elimo ezali kokita lokola ebenga uta na likoló, mpe efandaki likoló [ya Yesu] . . . Mpe namoni yango, mpe napesi litatoli ete oyo azali Mwana ya Nzambe.” (Yoa. 1:32-34) Kaka na libaku yango, Yehova alobaki boye: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.”—Mat. 3:17; Mrk. 1:11; Luka 3:22.
Atikalaki sembo tii na liwa
12. Mosala nini Yesu asalaki na mbula misato ná ndambo nsima ya batisimo na ye?
12 Na mbula misato ná ndambo oyo elandaki, Yesu amipesaki na koteya bato makambo ya Tata na ye mpe boyengebene ya boyangeli ya Nzambe. Kosala mibembo na makolo na Mokili ya Ndaka mobimba ezalaki kolɛmbisa ye mingi, kasi eloko moko te epekisaki ye apesa litatoli malamumalamu mpo na solo. (Yoa. 4:6, 34; 18:37) Yesu ateyaki bato Bokonzi ya Nzambe. Na nzela ya makamwisi oyo azalaki kosala mpo na kobikisa bato ya maladi, koleisa bato ya nzala, ata mpe kosekwisa bakufi, Yesu amonisaki makambo oyo Bokonzi ekosala mpo na bato.—Mat. 11:4, 5.
13. Yesu ateyaki nini na ntina etali libondeli?
13 Na esika amikumisa mpo na mateya na ye mpe makamwisi ya kobikisa bato, Yesu apesaki ndakisa monene na ndenge amikitisaki mpe apesaki nkembo nyonso epai ya Yehova. (Yoa. 5:19; 11:41-44) Yesu ateyaki mpe makambo eleki ntina oyo tosengeli kosɛnga na libondeli. Na ndakisa, na mabondeli na biso, tosengeli kosɛnga ete nkombo ya Nzambe, Yehova, “esantisama” mpe ete boyangeli na ye ya sembo elongola boyangeli mabe ya Satana mpo “mokano na [Ye] esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Mat. 6:9, 10) Yesu alendisaki mpe biso ‘tóluka liboso bokonzi [ya Nzambe] mpe boyengebene na ye’ mpo tósala na boyokani na mabondeli yango.—Mat. 6:33.
14. Atako Yesu azalaki moto ya kokoka, mpo na nini esɛngaki asala milende mpo akokisa mokumba na ye na mokano ya Nzambe?
14 Ntango akómaki pene ya kokufa lokola mbeka, Yesu akómaki kokanisa mingi mpo na mokumba monene oyo azalaki na yango. Mpo mokano ya Tata na ye ekokisama mpe lokumu na Ye ebatelama, Yesu asengelaki kondima lisambisi moko oyo ezangi bosembo mpe liwa ya nsɔmɔ. Mikolo mitano liboso ya liwa na ye, Yesu abondelaki boye: “Sikoyo molimo na ngai etungisami, mpe nakoloba nini? Tata, bikisá ngai naleka ngonga oyo. Atako bongo, ezali mpo na yango nde nakómi na ngonga oyo.” Nsima ya kobimisa mayoki wana oyo moto nyonso akoki kobimisa, Yesu atikaki kokanisa kaka makambo na ye mpe atyaki makanisi na likambo eleki ntina mpe abondelaki boye: “Tata, pesá nkombo na yo nkembo.” Na mbala moko Yehova azongisaki ete: “Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango nkembo lisusu.” (Yoa. 12:27, 28) Ya solo, Yesu andimaki bosembo na ye emekama makasi, na ndenge oyo ekómelá ata moto moko te. Kasi, na ntembe te koyoka maloba wana ya Tata na ye ya likoló endimisaki mpenza Yesu ete akolonga kokumisa mpe kolongisa boyangeli ya Yehova. Mpe alongaki!
Makambo oyo liwa ya Yesu ekokisaki
15. Liboso akata motema, mpo na nini Yesu alobaki ete: “Ekokisami”?
15 Ntango Yesu azalaki konyokwama na nzete ya mpasi liboso akata motema, alobaki boye: “Ekokisami!” (Yoa. 19:30) Yesu akokisaki makambo ya minene mpenza na lisalisi ya Nzambe na boumeli ya mbula misato ná ndambo banda na batisimo tii na liwa na ye! Ntango Yesu akufaki, mabele eninganaki makasi, mpe etindaki mokonzi ya basoda ya Baroma oyo batyaki mpo na koboma ye aloba ete: “Ya solo oyo azalaki Mwana ya Nzambe.” (Mat. 27:54) Mbala mosusu mokonzi yango ya basoda amonaki ndenge bazalaki kosɛka Yesu mpo alobaki ete azali Mwana ya Nzambe. Atako anyokwamaki mingi, Yesu abatelaki bosembo na ye mpe amonisaki ete Satana azali mobuki monene ya lokuta. Mpo na bato nyonso oyo bazali na ngámbo ya boyangeli ya Nzambe, Satana alobaki boye: “Moto akopɛsa yɔnsɔ ezali na ye mpɔ na bomɔi na ye.” (Yobo 2:4, haut fleuve) Lokola atikalaki sembo, Yesu amonisaki ete Adama ná Eva bakokaki kotikala sembo na komekama wana oyo ezalaki kutu pɛtɛɛ. Likambo eleki ntina, bomoi mpe liwa ya Yesu esimbaki mpe ekumisaki boyangeli ya boyengebene ya Yehova. (Tángá Masese 27:11.) Longola yango, liwa ya Yesu ekokisaki mpe likambo nini?
16, 17. (a) Mpo na nini basaleli ya Yehova oyo bazalaki na bomoi liboso Kristo aya na mabele bakokaki kotángama bayengebene na miso ya Nzambe? (b) Mbano nini Yehova apesaki Mwana na ye mpo na bosembo na ye, mpe Nkolo Yesu Kristo azali kokoba kosala nini?
16 Bato mingi basalelaki Yehova liboso Yesu aya awa na mabele. Nzambe atángaki bango bayengebene mpe apesaki bango elikya ya lisekwa. (Yis. 25:8; Dan. 12:13) Kasi, na kolanda mobeko nini Yehova, Nzambe mosantu, akokaki kopambola bato ya masumu malamu ndenge wana? Biblia elobi boye: “Nzambe akabaki [Yesu Kristo] azala likabo ya kozipa masumu na nzela ya kondima na makila na ye. Asalaki bongo mpo na kolakisa boyengebene na ye moko, mpo azalaki kolimbisa masumu oyo esalemaki kala ntango Nzambe azalaki kokanga motema; mpo na kolakisa boyengebene na ye moko na eleko oyo, mpo azala moyengebene ata ntango azali kotánga moto oyo andimelaka Yesu ete azali moyengebene.”—Rom. 3:25, 26. *
17 Yehova apesaki Yesu mbano: asekwisaki ye mpe atyaki ye na esika ya lokumu koleka oyo azalaki na yango liboso aya na mabele. Lelo, Yesu azali ekelamu ya elimo oyo ekoki kokufa te mpe atondi na nkembo. (Ebr. 1:3) Lokola azali Nganga-nzambe monene mpe Mokonzi, Nkolo Yesu Kristo azali kokoba kosalisa bayekoli na ye bámonisa boyengebene ya Nzambe. Tozali mpenza na botɔndi epai ya Tata na biso ya likoló, Yehova, ye oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka boyengebene mpe bazali kosalela ye na bosembo, na ndakisa ya Mwana na ye!—Tángá Nzembo 34:3; Baebre 11:6.
18. Lisolo oyo elandi ekolobela nini?
18 Bato ya sembo banda Abele bazalaki na boyokani malamu na Yehova mpo bamonisaki kondima mpe batyaki motema na Momboto oyo alakamaki. Yehova ayebaki ete Mwana na ye akobatela bosembo na ye mpe ete liwa na ye ekozipa mpenza “lisumu ya mokili.” (Yoa. 1:29) Ata lelo, bato bazali kozwa litomba na liwa ya Yesu. (Rom. 3:26) Na yango, mapamboli nini lisiko ya Kristo ekoki kopesa yo? Lisolo oyo elandi ekolobela likambo yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 7 Na mokapo yango, ntoma Paulo azongelaki Nzembo 40:6-8 ndenge ezalaki na libongoli ya Grɛki ya Septante, oyo ekɔtisaki maloba “obongiselaki ngai nzoto.” Fraze yango ezalaka te na bamaniskri ya Makomami ya kala ya Ebre oyo tozali na yango.
^ par. 16 Talá “Mituna ya batángi” na nkasa 6 mpe 7.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini babɛtelaki boyengebene ya Nzambe ntembe?
• Batisimo ya Yesu emonisaki nini?
• Liwa ya Yesu ekokisaki makambo nini?
[Mituna ya boyekoli]
[Elilingi na lokasa 9]
Oyebi soki batisimo ya Yesu emonisaki nini?