“Bayengebene bakongɛnga makasi lokola moi”
“Bayengebene bakongɛnga makasi lokola moi”
“Na ntango yango bayengebene bakongɛnga makasi lokola moi na kati ya bokonzi ya Tata na bango.”—MAT. 13:43.
1. Yesu asalelaki bandakisa mpo na kolimbola makambo nini ya ndenge na ndenge oyo etali Bokonzi?
YESU KRISTO asalelaki bandakisa to masese mingi, mpo na kolimbola makambo ndenge na ndenge oyo etali Bokonzi. ‘Alobelaki ebele ya bato na bandakisa. Kutu, azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa.’ (Mat. 13:34) Na bandakisa oyo apesaki mpo na kolobela kolona mboto ya solo ya Bokonzi, Yesu amonisaki mokumba oyo motema ya moto ezali na yango mpo na kondima nsango, mpe alobelaki mokumba ya Yehova na oyo etali kokola na elimo. (Mrk. 4:3-9, 26-29) Yesu alobelaki mpe bokoli monene ya matomba ya Bokonzi awa na mabele atako na ebandeli, bokoli yango ezalaki komonana polelepolele te. (Mat. 13:31-33) Lisusu, amonisaki ete moto nyonso te oyo andimi nsango ya Bokonzi nde abongi kozala moto ya Bokonzi yango.—Mat. 13:47-50. *
2. Na ndakisa oyo Yesu apesaki ya blé ná matiti mabe, mboto ya malamu emonisi nini?
2 Nzokande, moko ya bandakisa oyo Yesu apesaki elobelaki koyanganisama ya baoyo bakoyangela elongo na Yesu na Bokonzi na ye. Mbala mingi, yango ebengamaka ndakisa ya blé mpe matiti mabe mpe ndakisa yango ezwami na Matai 13. Kasi, na ndakisa mosusu, Yesu ayebisi ete mboto oyo ekonami ezali “liloba ya bokonzi,” na ndakisa yango, alobi ete mboto ya malamu ezali elilingi ya likambo mosusu—“bana ya bokonzi.” (Mat. 13:19, 38) Bango bazali te bato oyo bakoyangelama na Bokonzi yango, kasi bazali nde “bana,” to bazwi ya libula ya Bokonzi.—Rom. 8:14-17; tángá Bagalatia 4:6, 7.
Ndakisa ya blé ná matiti mabe
3. Limbolá likambo oyo moto ya ndakisa yango akutanaki na yango mpe ekateli oyo azwaki mpo na kosilisa mokakatano yango.
3 Ndakisa yango oyo: “Bokonzi ya likoló ezali lokola moto moko oyo alonaki mboto ya malamu na elanga na ye. Ntango bato balalaki mpɔngi, monguna na ye ayaki kolona matiti mabe na katikati ya blé, mpe akendaki. Ntango milona yango ebimaki mpe ebotaki mbuma, matiti mabe mpe ebimaki. Bongo baombo ya nkolo-ndako bayaki mpe balobaki na ye ete: ‘Nkolo, olonaki mboto ya malamu na elanga, boye te? Bongo ndenge nini matiti mabe ezali na kati?’ Alobaki na bango: ‘Monguna, moto moko, asali bongo.’ Balobaki na ye: ‘Olingi tókende kopikola yango?’ Alobaki ete: ‘Te; noki ntango bozali kopikola matiti mabe, bópikola mpe blé elongo na yango. Bótika yango nyonso mibale ekola esika moko tii na ntango ya kobuka mbuma; mpe na eleko ya kobuka mbuma nakoyebisa babuki-mbuma ete, Liboso bópikola matiti mabe mpe bókangisa yango mabokemaboke mpo na kotumba yango, na nsima bóbanda koyanganisa blé na kati ya ndako na ngai ya kobomba biloko.’”—Mat. 13:24-30.
4. (a) Moto oyo balobeli na ndakisa wana ezali nani? (b) Ntango mpe ndenge nini Yesu abandaki mosala ya kolona mboto yango?
4 Moto oyo alonaki mboto ya malamu na elanga na ye ezali nani? Yesu apesaki eyano na nsima ntango alimbolaki yango epai ya Mat. 13:37) Yesu “Mwana ya moto,” abongisaki elanga mpo na kolona na boumeli ya mbula misato na ndambo ya mosala na ye awa na mabele. (Mat. 8:20; 25:31; 26:64) Na yango banda na Pantekote ya mobu 33 T.B., abandaki kolona mboto ya malamu—“bana ya bokonzi.” Emonani ete mosala yango ya kolona ebandaki ntango Yesu, oyo azalaki momonisi ya Yehova, abandaki kosopa elimo santu likoló ya bayekoli na ye, na ndenge yango atyaki bango mafuta na elimo mpe bakómaki bana ya Nzambe. * (Mis. 2:33) Mboto ya malamu ekolaki mpe ekómaki blé oyo ekɔmeli. Na yango, mokano ya kolona mboto ya malamu ezalaki mpo nsukansuka báyanganisa motángo mobimba ya baoyo bakokóma bazwi ya libula mpe bakozala bakonzi elongo na Yesu na Bokonzi na ye.
bayekoli na ye: “Moloni ya mboto ya malamu ezali Mwana ya moto.” (5. Monguna oyo balobeli na ndakisa yango ezali nani, mpe matiti mabe ezali elilingi ya banani?
5 Monguna ezali nani, mpe matiti mabe ezali banani? Yesu alobi ete monguna “ezali Zabolo.” Biblia emonisi ete matiti mabe ezali “bana ya moto mabe.” (Mat. 13:25, 38, 39) Na ndenge ya solo, matiti mabe oyo Yesu alobelaki ekoki kozala matiti moko oyo ekokanaka na blé. Matiti mabe yango ekokanaka mpenza na blé ntango ezali naino mike, liboso ete ekɔmela. Oyo nde elilingi ebongi mpo na komonisa bakristo ya nkombo mpamba, oyo balobaka ete bazali bana ya Bokonzi, kasi bazali te kobimisa mbuma ya malamu! Bakristo wana ya lokuta oyo balobaka ete balandaka Kristo bazali mpenza na kati ya “momboto” ya Satana Zabolo.—Eba. 3:15.
6. Ntango nini matiti mabe ebandaki kobima, mpe ndenge nini bato “balalaki mpɔngi” na ntango wana?
6 Ntango nini bakristo wana oyo bakokani na matiti mabe babimaki? Yesu alobaki ete: “Ntango bato balalaki mpɔngi.” (Mat. 13:25) Ntango nini yango esalemaki? Tozwi eyano na maloba oyo Paulo alobaki epai ya bankulutu ya Efese ete: “Nayebi ete nsima ya kokende na ngai, bambwa mabe ya zamba bakokɔta na kati na bino mpe bakosalela etonga makambo na boboto te, mpe na kati na bino mpenza, mibali bakobima mpe bakoloba makambo ya mbilingambilinga mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Mis. 20:29, 30) Alendisaki bankulutu yango bálala mpɔngi na elimo te. Ntango bantoma oyo bazalaki “kokanga nzela” ete lipɛngwi ekɔta te, babandaki kokufa, bakristo mingi balalaki mpɔngi na elimo. (Tángá 2 Batesaloniki 2:3, 6-8.) Na ntango wana nde lipɛngwi monene ebandaki.
7. Blé mosusu ebongwanaki matiti mabe? Limbolá.
7 Yesu alobaki te ete blé ekokóma matiti mabe, kasi nde ete matiti mabe elonamaki na kati ya blé. Na yango, ndakisa yango ezali te elilingi ya bakristo oyo bazali kotika solo. Kasi, emonisi nde milende oyo Satana azali kosala mpo na kobebisa lisangá ya bokristo na ndenge azali kokɔtisa bato mabe na kati na yango. Na ntango oyo Yoane, ntoma ya nsuka oyo atikalaki na bomoi akómaki mobange, lipɛngwi yango emonanaki polele.—2 Pe. 2:1-3; 1 Yoa. 2:18.
“Bótika yango nyonso mibale ekola esika moko tii na ntango ya kobuka mbuma”
8, 9. (a) Mpo na nini malako oyo Nkolo apesaki baombo na ye ezalaki na ntina mpo na baoyo bazalaki koyoka Yesu? (b) Na kokokisama ya ndakisa yango, ndenge nini blé mpe matiti mabe ekolaki esika moko?
8 Baombo ya Nkolo bayebisaki ye likambo yango mpe batunaki boye: “Olingi tókende kopikola yango [matiti mabe]?” (Mat. 13:27, 28) Eyano na ye ekoki kokamwisa. Ayebisaki bango bátika blé mpe matiti mabe ekola esika moko tii na ntango ya kobuka mbuma. Etinda yango elingaki kosalisa bayekoli ya Yesu bákanga ntina ya likambo moko. Basengelaki komona ete ezali mpasi kokesenisa blé na matiti mabe. Bato oyo bayebaki malamu mosala ya bilanga balingaki mpe koyeba ete mbala mingi misisa ya matiti yango mabe ekanganaka na oyo ya blé. * Yango wana tokoki kokamwa te ete Nkolo ayebisaki bango bázela!
9 Ndenge moko na boumeli ya bikeke, mwa mangomba ndenge na ndenge ya bokristo ebimisaki ebele ya matiti mabe—libosoliboso na kati ya Lingomba ya Katolike mpe ya Ɔrtɔdɔkse mpe na nsima na bituluku mingi ya Protesta oyo ebimaki. Kaka na ntango yango, mwa mboto ya blé ya malamu ezalaki kolonama na mokili. Nkolo oyo balobeli na ndakisa yango azelaki mpenza na boumeli ya ntango molai oyo mboto yango esengelaki kokola tii na ntango oyo eleko mokuse ya kobuka mbuma esengelaki kokóma.
Eleko ya kobuka mbuma oyo bazalaki kozela
10, 11. (a) Eleko ya kobuka mbuma ekobanda ntango nini? (b) Ndenge nini blé ya elilingi ezali komemama na ndako ya kobomba biloko ya Yehova?
10 Yesu alobi ete: “Ntango ya kobuka mbuma ezali bosukisi ya makambo ya ntango moko boye, mpe babuki-mbuma ezali baanzelu.” (Mat. 13:39) Na mikolo ya nsuka ya mokili oyo mabe, kokabolama ezali kosalema—bana ya Bokonzi basengeli koyanganisama mpe kokabolama na baoyo nyonso bakokani na matiti mabe. Na ntina yango, ntoma Petro alobi ete: “Oyo nde ntango oyo etyamá mpo lisambisi ebanda na ndako ya Nzambe. Nzokande soki ebandi libosoliboso na biso, bongo baoyo batosaka nsango malamu ya Nzambe te bakosuka ndenge nini?”—1 Pe. 4:17.
Mat. 13:30) Kasi, ndenge nini blé ya elilingi ezali sikoyo komemama na ndako ya kobomba biloko ya Yehova? Bato yango oyo bazali koyanganisama bazali komemama na lisangá ya bokristo oyo ezongisamaki, epai Nzambe asengelaki kondima mpe kobatela bango, to bazwaki libula na bango na likoló.
11 Mwa moke nsima ya kobanda ya mikolo ya nsuka, to “bosukisi ya makambo ya ntango moko boye,” kosambisama ebandaki mpo na baoyo balobaka ete bazali bakristo ya solo—ezala bazali mpenza “bana ya bokonzi” to “bana ya moto mabe.” “Liboso,” Babilone monene ekokwea, mpe “nsima” bana ya Bokonzi bakoyanganisama esika moko na ebandeli ya mosala ya kobuka mbuma. (12. Mosala ya kobuka mbuma ekoumela tii ntango nini?
12 Kosambisama yango ekoumela ntango boni? Yesu alobelaki mosala ya kobuka mbuma lokola “eleko” moko, na yango ezali kokoba na boumeli ya eleko moko boye ya ntango. (Em. 14:15, 16) Kosambisama ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo ezali kokoba tii na ntango ya nsuka. Ekoumela tii ntango bango nyonso bakosila kotyama elembo.—Em. 7:1-4.
13. Na ndenge nini matiti mabe ezali kobɛtisa libaku, mpe ndenge nini ezali kobuka mibeko?
13 Banani bakolongolama na Bokonzi, mpe ndenge nini bazali kobɛtisa libaku mpe kobuka mibeko? (Mat. 13:41) Bakonzi ya mangomba ya bokristo oyo bakokani na matiti mabe babungisi ebele ya bato nzela na boumeli ya bikeke mingi. Basali yango na nzela ya mateya oyo ezali kobebisa lokumu ya Nzambe, ‘biloko oyo ebɛtisaka libaku,’ na ndakisa liteya ya konyokola bato seko na seko na lifelo mpe liteya ya Bosato oyo ebulunganisaka bato. Bakonzi mingi ya mangomba bapesi ndakisa mabe epai ya bandimi na bango na ndenge bazali kosala boninga mabe na mokili oyo mpe mbala mingi na etamboli na bango ya mbindo. (Yak. 4:4) Lisusu, mangomba ya bokristo ezali mpenza kokanga miso na misala ya mbindo oyo bandimi na bango basalaka. (Tángá Yuda 4.) Longola yango, bazali kokoba komonisa lokola nde bazali kokangama na Nzambe. Ezali mpenza likambo ya esengo ndenge bana ya Bokonzi bazali kosangana te na makambo ya bato wana oyo bakokani na matiti mabe mpe mateya na bango ya lokuta oyo ebɛtisaka libaku!
14. Ndenge nini bato oyo bakokani na matiti mabe bazali kolela mpe kolya mino?
14 Ndenge nini bato oyo bakokani na matiti mabe bazali kolela mpe kolya mino? (Mat. 13:42) “Bana ya moto mabe” bazali kotungisama na ndenge “bana ya bokonzi” bazali kotɔndɔla etamboli mabe mpe mateya ya lokuta ya bato yango oyo bakokani na matiti mabe. Bazali mpe kolelalela mpo bandimi na bango bazali kosimba bango lisusu mpenza te, mpe bazali kokoka mpenza lisusu te kotambwisa bandimi yango.—Tángá Yisaya 65:13, 14.
15. Na ndenge nini baoyo bakokani na matiti mabe bakotumbama na mɔtɔ?
15 Na ndenge nini matiti mabe epikolami mpe etumbami na mɔtɔ? (Mat. 13:40) Yango ezali ekateli ya nsuka oyo ekokómela matiti mabe yango. Kobwakama na bango na mɔtɔ na ndenge ya elilingi emonisi ete bato yango babongisami mpo na kobebisama ya seko. (Em. 20:14; 21:8) Bakristo oyo bakokani na matiti mabe, bakosi, bakolongolama na “bolɔzi monene.”—Mat. 24:21.
“Bakongɛnga makasi lokola moi”
16, 17. Likambo nini Malaki asakolaki mpo na tempelo ya Nzambe, mpe ndenge nini yango ebandaki kokokisama?
16 Na ntango nini baoyo bakokani na blé “bakongɛnga makasi lokola moi”? (Mat. 13:43) Mpo na kopɛtolama ya tempelo ya Nzambe, Malaki asakolaki boye: “Nkolo ya solosolo oyo bino bozali koluka akoya pwasa na tempelo na Ye ná momemi-nsango ya kondimana oyo bino bozali kosepela na ye. Talá! Ye akoya mpenza,” Yehova ya mampinga alobi bongo. “Kasi nani akokoka na mokolo ya koya na ye, mpe nani akotɛlɛma ntango ye akomonana? Mpo ye akozala lokola mɔtɔ ya monyangwisi-bibende mpe lokola sabuni ya basukoli-bilamba. Mpe ye akofanda mpenza lokola moto oyo anyangwisaka mpe apɛtolaka palata mpe akopɛtola bana ya Levi; mpe akokómisa bango pɛɛ lokola wolo mpe lokola palata, mpe bakokóma mpenza na miso ya Yehova bato oyo bazali kopesa likabo na boyengebene.”—Mal. 3:1-3.
17 Emonani polele ete na ntango na biso, esakweli yango ebandaki kokokisama na 1918, ntango Yehova elongo na Yesu Kristo, “momemi-nsango ya kondimana” bayaki kotala tempelo ya elimo. Malaki ayebisi biso likambo oyo esalemaki ntango kopɛtolama yango esilaki: “Bokomona lisusu bokeseni kati na moyengebene ná moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe ná moto oyo asaleli ye te.” (Mal. 3:18) Bokoli ya mosala epai ya bakristo ya solo oyo bazwaki lisusu makasi, emonisi ebandeli ya eleko wana ya kobuka mbuma.
18. Likambo nini Danyele asakolaki oyo esengelaki kosalema na mikolo na biso?
18 Mosakoli Danyele alobaki mpo na mikolo na biso ntango asakolaki ete: “Baoyo bazali na mayele ya kososola bakongɛnga lokola kongɛnga ya etando; mpe baoyo bazali komema ebele epai ya boyengebene, bakongɛnga lokola minzoto mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.” (Dan. 12:3) Bato yango oyo bazali mpenza kongɛnga makasi ezali banani? Ezali bato mosusu te kaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo, blé ya solosolo oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye ya blé mpe matiti mabe! ‘Kopikolama’ ya bakristo oyo bakokani na matiti mabe, emonani polele na motángo ya ebele ya bato oyo bakokani na bampate oyo ezali se kobakisama. Lokola bazali kokangama na bato ya Yisraele ya elimo oyo bazali naino awa na mabele, bato yango oyo bakoyangelama na Bokonzi bazali kongɛnga makasi na kati ya mokili oyo ya molili tuu.—Zek. 8:23; Mat. 5:14-16; Flp. 2:15.
19, 20. “Bana ya bokonzi” bazali kozela nini na motema likoló, mpe tokolobela nini na lisolo oyo ekolanda?
19 Lelo, “bana ya bokonzi” bazali kozela na motema likoló nkembo na bango, elingi koloba libula na bango na likoló. (Rom. 8:18, 19; 1 Ko. 15:53; Flp. 1:21-24) Kasi, tii ntango wana ekoka, basengeli kotikala sembo, kokoba kongɛnga makasi, kokesana mpenza na “bana ya moto mabe.” (Mat. 13:38; Em. 2:10) Oyo nde esengo biso nyonso tosengeli kozala na yango na ndenge tozali na libaku ya komona ndenge matiti mabe ezali ‘kopikolama’ na ndenge ya elilingi na mikolo na biso!
20 Kasi, boyokani nini ezali kati na bana ya Bokonzi mpe ebele ya bato oyo bazali se kobakisama, baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabele, baoyo bakoyangelama na Bokonzi? Lisolo oyo elandi ekoyanola na motuna yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 1 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali bandakisa yango, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 2008, nkasa 12-21.
^ par. 4 Na ndakisa yango, kolona ezali te mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, oyo ekoki komema bato ya sika oyo bakokóma bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Mpo na mboto ya malamu oyo elonamaki na elanga, Yesu alobaki: “Baoyo bazali [kasi te “bakokóma”] bana ya bokonzi.” Kolona yango ezali nde kotyama mafuta na elimo ya bana yango ya Bokonzi na mokili mobimba.
^ par. 8 Misisa ya matiti mabe yango ekanganaka mpenza na oyo ya blé na boye ete kopikola yango liboso ya ntango ya kobuka mbuma ekoki kobebisa blé.—Talá Étude Perspicace des Écritures, Volimi 1, lokasa 835.
Ozali koyeba lisusu?
Na ndakisa ya blé mpe matiti mabe oyo Yesu apesaki, makambo oyo elandi elimboli nini?
• Mboto ya malamu
• Moto oyo alonaki mboto
• Kolona mboto
• Monguna
• Matiti mabe
• Eleko ya kobuka mbuma
• Ndako ya kobomba biloko
• Kolela mpe kolya mino
• Mɔtɔ makasi
[Mituna mpo na boyekoli]
[Elilingi na lokasa 20]
Mboto ya malamu ebandaki kolonama na Pantekote ya mobu 33 T.B.
[Elilingi na lokasa 23]
Blé ya elilingi ezali sikoyo komemama na ndako ya kobomba biloko ya Yehova
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.