‘Soki moto azwi yo na makasi mpo osala mosala’
‘Soki moto azwi yo na makasi mpo osala mosala’
“EE YO! Tiká naino mosala wana mpe yaká awa omemela ngai mokumba oyo.” Soki soda moko ya Loma alobaki na Moyuda moko ndenge wana na ekeke ya liboso, okanisi ete Moyuda yango alingaki kosala nini? Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu apesaki toli oyo: “Soki moto moko oyo azali na bokonzi azwi yo na makasi mpo osala kilomɛtɛlɛ moko, kende na ye kilomɛtɛlɛ mibale.” (Matai 5:41) Ndenge nini bato oyo bazalaki koyoka Yesu batalelaki toli yango? Mpe ndenge nini tokoki kosalela toli yango lelo?
Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tosengeli naino koyeba ndenge oyo bazalaki kosalisa bato misala na makasi na ntango ya kala. Bayisalaele ya ntango ya Yesu bayebaki likambo yango malamu.
Mosala oyo batindi moto na makasi
Na Moyen-Orient, likambo ya kosalisa bato mosala na makasi ebandaki na ekeke ya 18 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Mikanda ya Leta ya engumba Alalakh, na ekólo Silia ya kala, elobeli bato oyo guvɛrnema azalaki kozwa na makasi mpo na kosalisa bango misala. Na engumba Ougarit, oyo ezali na bokula ya Silia, bazalaki mpe kosalisa basali bilanga oyo bazalaki kofutela mabelé ya bato mosusu misala na makasi, longola kaka baoyo mokonzi apekisaki básalisa bango misala na makasi.
Mbala mingi, bazalaki kosalisa bato oyo balongi bango na etumba misala na makasi. Bakapita ya mosala ya Ezipito bazalaki kosalisa Bayisalaele oyo bakómisaki baombo mosala ya kobɛta babiliki na makasi. Na nsima, Bayisalaele bakómisaki Bakanana oyo bazalaki kofanda na Mokili ya Ndaka baombo mpe bazalaki kosalisa bango misala na makasi; Davidi ná Salomo basalisaki mpe bato misala na makasi.—Exode 1:13, 14; 2 Samwele 12:31; 1 Mikonzi 9:20, 21.
Ntango Bayisalaele basɛngaki bazala na mokonzi, Samwele ayebisaki bango makambo oyo mokonzi akobanda kosɛnga bango. Akobanda kozwa bato na ye na makasi mpo na kopesa bango mosala ya kotambwisa makalo mpe ya kotambwisa mpunda, mosala ya kotimola mabelé mpe ya kobuka biloko na bilanga, ya kosala bibundeli mpe bongo na bongo. (1 Samwele 8:4-17) Nzokande, ntango tempelo ya Yehova ezalaki kotongama, bapaya nde bazalaki kosala misala makasi lokola baombo, kasi “kati na bana nyonso ya Yisalaele, Salomo atyaki bango baombo te; bazalaki basoda na ye mpe basali na ye mpe mikóló na ye mpe bakapitɛnɛ na ye mpe batambolisi ya makalo na ye mpe bato ya mbalata na ye.”—1 Mikonzi 9:22.
Mpo na Bayisalaele oyo bazalaki kosala mosala ya kotonga, 1 Bakonzi 5:13, 14 (Bible na lingala ya lelo oyo) elobi boye: “Na kati ya mabota nyonso ya Israel, mokonzi Salomon akamataki bato na makasi, po na kosalela ye mosala ezangá lifuta. Na kati na bango aponaki bato 30 000, oyo azalaki kotinda na bangomba ya Liban. Sanza na sanza bato 10 000 bazalaki kokende, bazalaki kosala sanza moko na Liban, pe kopema basanza mibale epai na bango.” Moto moko ya mayele alobi boye: “Na ntembe te bakonzi ya Yisalaele mpe ya Yuda bazalaki kosalisa bato misala na makasi mpo babungisa mbongo te na ntango bazalaki kosala misala ya kotonga mpe misala oyo ezalaki kosalema na mabelé ya mokonzi.”
Misala ezalaki makasi na ntango ya Salomo. Yango wana, ntango Lehobama alobaki ete akobakisa lisusu misala yango, Bayisalaele nyonso batombokaki mpe babomaki na mabanga moto oyo batyaki mokɛngɛli ya misala likoló ya bato oyo bazalaki kosala misala na makasi. (1 Mikonzi 12:12-18) Atako bongo, likambo yango ya kosalisa bato misala na makasi esilaki te. Asa, nkɔkɔ ya Lehobama, asɛngisaki bato ya Yuda bátonga bingumba Geba mpe Misipa, mpe “ata moto moko té atikalaki.”—1 Bakonzi 15:22, Bible na lingala ya lelo oyo.
Boyangeli ya Baloma
Lisolo Likoló ya Ngomba ezali komonisa ete Bayuda ya ekeke ya liboso bayebaki ete bakokaki ntango nyonso ‘kozwa bango mpo básala mosala na makasi.’ Maloba yango euti na liloba ya Grɛki ag·ga·reuʹo oyo bazalaki kosalela mpo na kolobela mosala ya bakumbi-ya-mikanda ya Perse. Bazalaki na lotomo ya kozwa na makasi bato, bampunda, bamasuwa, to eloko mosusu nyonso oyo esengeli mpo misala ya Leta etambola nokinoki.
Na ntango ya Yesu, Baloma oyo bazwaki momeseno wana ya Baperse, nde bazalaki koyangela Yisalaele. Na bitúká ya Azia, longola mpako oyo bazalaki kofutisa bato, bazalaki mpe na momesano ya kozwa bato na makasi mpo básala mosala moko boye, ata na mbalakaka. Na ntembe te, bato bazalaki kosepela na misala ya ndenge wana ata moke te. Longola yango, bazalaki mbala mingi kozwa kozanga ndingisa banyama, batambwisi ya makalo, to makalo mpo na komema biloko ya Leta. Michael Rostovtzeff, mokomi moko ya masolo ya kala, alobi ete bakonzi “bamekaki kotya mibeko mpo na kobongisa likambo yango kasi balongaki te, mpamba te ntango nyonso oyo likambo yango ezalaki kosalema, ezalaki kaka kobimisa makambo ya mabe. Bazuzi-bakambi babimisaki mibeko ebele mpo bazalaki mpenza na mposa ya kosukisa momesano wana ya kosalisa bato misala na makasi mpe ya konyokola bango . . . Kasi, bato bazalaki kaka konyokwama.”
Moto moko ya mayele na Grèce alobi ete “bakokaki kozwa ata nani mpo na komema mikumba ya basoda na ntaka oyo bakokatela ye mpe bakokaki kozwa moto nyonso mpo na kosala ata mosala nini oyo Baloma bakosepela kopesa ye.” Yango Matai 27:32.
ekómelaki Simona, moto ya Kilene, oyo basoda ya Loma ‘bazwaki na makasi’ mpo akumba nzete ya Yesu ya mpasi.—Makomi ya Balabi ezali mpe kolobela momesano yango oyo bato nyonso bazalaki kosepela na yango te. Na ndakisa, bazwaki Molabi moko mpo amema mbuma babengi myrte na esika moko. Bakokaki kozwa bato ya mosala epai ya bankóló na bango mpo na kosalisa bango misala mosusu, kasi kaka bankóló na bango nde basengelaki kofuta bango. Bakokaki kozwa na makasi banyama oyo ememaka mikumba to mpe bangɔmbɛ. Soki bazongisi banyama yango, ezalaki kokoka kosala lisusu mosala te. Yango wana, soki bazwi banyama na bango mpo na kosalela yango na boumeli ya mwa ntango, bato bazalaki kotalela yango lokola nde babɔtɔli bango yango. Lisese moko ya Bayuda ezalaki koloba boye: “Angareia ezali lokola liwa.” Moto moko ya mayele na makambo ya kala alobi boye: “Mboka mobimba ekokaki kokóma na bobola makasi mpo babɔtɔli na makasi bangɔmbɛ oyo bato basalaka na yango bilanga mpo na angareia na esika ya kozwa banyama oyo emesaná komema mikumba.”
Omoni ntina oyo bato nyonso bazalaki kolinga misala wana te, mingimingi lokola bazalaki kosalisa bango yango na nko mpe na kozanga bosembo. Lokola Bayuda bazalaki koyina mpenza bikólo ya bapakano oyo ezalaki koyangela bango, bazalaki komona misala oyo bazalaki kosalisa bango na makasi lokola nde ezali kosilisa bango mpenza lokumu mpe yango ezalaki koyokisa bango mpasi mpe nsɔni. Ezali ata na mobeko moko te lelo oyo ezali komonisa biso polele ntaka oyo mwana mboka akokaki kosala soki bazwi ye na makasi amema mokumba moko. Emonani mpenza ete bato mingi bakokaki kosepela te kolekisa ntaka oyo mobeko esɛngaki.
Yango nde mobeko oyo Yesu azalaki na yango na makanisi ntango alobaki ete: “Soki moto moko oyo azali na bokonzi azwi yo na makasi mpo osala kilomɛtɛlɛ moko, kende na ye kilomɛtɛlɛ mibale.” (Matai 5:41) Na ntembe te, ntango bato mosusu bayokaki bongo, bakanisaki ete Yesu azali kokanisa malamu te. Yesu alingaki mpenza koloba nini?
Oyo baklisto basengeli kosala
Likambo Yesu alingaki koyebisa bato oyo bazalaki koyoka ye ezalaki kaka ete soki moto moko oyo azali na bokonzi azwi bango na makasi mpo básala misala oyo mobeko ezalaki kosɛnga, basengelaki koboya te mpe kosala yango na nkanda te. Yango elingi koloba ete basengelaki ‘kozongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala’ kasi basengelaki te kobosana kopesa ‘biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.’—Malako 12:17. a
Lisusu, ntoma Paulo alendisaki baklisto na maloba oyo: “Tiká molimo nyonso etosaka bakonzi oyo bazali liboso, mpo ezali na bokonzi te soki na nzela ya Nzambe te; bakonzi oyo bazali batyami na bibonga na bango oyo elandaná na nzela ya Nzambe. Na yango moto oyo azali kotɛmɛla bokonzi atɛmɛli ebongiseli ya Nzambe . . . Soki ozali kosala oyo ezali mabe, zalá na kobanga: mpo yango ememaka mopanga kaka mpamba te.”—Baloma 13:1-4.
Na yango, Yesu ná Paulo bamonisaki ete bakonzi bazali na lotomo ya kopesa moto oyo aboyi kotosa mibeko etumbu. Etumbu ya ndenge nini?
Épictète, filozofe moko ya Grèce ya ekeke ya liboso mpe ya mibale ya ntango na biso (T.B.) apesi biso eyano: “Soki bakweiseli yo mitindo na mbalakaka mpe soda moko azwi mwana na yo ya mpunda, tiká ye akende na yango. Kosala matata te, koimaima te, noki te, longola kobɔtɔla mpunda na yo, bakobɛta yo lisusu.”Kasi, ezala na ntango ya kala to na ntango na biso, lisosoli ya baklisto epekisaka bango kosala makambo mosusu oyo guvɛrnema esɛngi. Yango ebendelaka bango na bantango mosusu mindɔndɔ mpenza. Bakatelaki baklisto mosusu etumbu ya liwa. Bamosusu balekisaki bambula ebele na bolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. (Yisaya 2:4; Yoane 17:16; 18:36) Na bantango mosusu, baklisto bamonaki ete bakoki kosala makambo oyo basɛngi bango. Na ndakisa, baklisto mosusu bamonaka mabe te kosala misala oyo Leta esɛngi bango mpo na bolamu ya bato nyonso. Ekoki kozala misala lokola kosalisa mibange to bibɔsɔnɔ, kopesa mabɔkɔ na koboma mɔtɔ, kosala salongo, kobongisa baparke, bazamba, kosala na bibliotɛkɛ, mpe bongo na bongo.
Mboka na mboka ezalaka na makambo na yango. Yango wana, mpo na koyeba soki asengeli kondima to koboya kosala makambo oyo basɛngi ye, moklisto mokomoko asengeli kosalela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia.
Kokende kilomɛtrɛ mibale
Toli oyo Yesu apesaki, ya kondima kosala makambo oyo basɛngi biso, etaleli kaka te makambo oyo bakonzi ya Leta basɛngi, kasi etaleli mpe makambo oyo tokutanaka na yango na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Na ndakisa, ekoki kozala ete moto moko oyo azali na bokonzi likoló na yo asɛngi yo osala mosala moko oyo osepeli na yango te, kasi mosala yango ezali kobuka mobeko ya Nzambe te. Okosala nini? Okoki kokanisa ete bazali kosɛnga yo makambo oyo ozali na ntango mpe makasi ya kosala yango te; kasi, okoki kotalela yango na ndenge ebongi te. Kosala bongo ekoki kobimisa kozanga koyokana kati na yo ná moto yango. Kasi, soki mpe ondimi kosala misala yango na mitema mibale, okoki kobungisa esengo na yo. Ebongi osala nini? Salá ndenge Yesu alobaki, kende kilomɛtrɛ mibale. Kosuka kaka te na kosala oyo asɛngi yo, kasi salá koleka oyo asɛngi yo. Salá yango na motema moko. Soki ozali na elimo ya ndenge wana, okoyoka te ete bazali komonela yo, kasi okomona nde ete ozali kosala kaka oyo yo moko olingi.
Mokomi moko alobaki boye: “Bato mingi, bomoi na bango mobimba, basalaka kaka makambo oyo bazali kosɛnga bango. Mpo na bango bomoi ezali mpasi mpe balɛmbaka ntango nyonso. Bato mosusu basalaka mingi koleka oyo basɛngi bango mpe basepelaka mpenza kosalisa bato mosusu.” Ya solo, makambo mingi oyo batindaka biso tósala na makasi esɛngaka tókende kaka kilomɛtrɛ moko to mibale. Soki esengeli asala kilomɛtrɛ moko, moto akoki kosuka kaka na oyo mobeko esɛngi. Soki asali kilomɛtrɛ mibale, akoki kosala makambo oyo ekoki komemela ye mapamboli mpenza. Yo ozali moto ya ndenge nini kati ya bato mibale oyo tolobeli? Okozala na esengo mingi mpe okosala makambo ebele ya malamu soki ozali kotalela misala na yo kaka te lokola mikumba oyo osengeli kokokisa, kasi lokola mikumba oyo osepeli kosala.
Ezali boni soki yo nde mokonzi? Ezali kozanga bolingo mpe ebongi te na moklisto asalela bokonzi na ye mpo na kosalisa bato misala na makasi. Yesu alobaki boye: “Bayangeli ya bikólo mosusu bamityaka bankolo likoló na bango.” Kasi, yango esengeli kozala bongo te mpo na baklisto. (Matai 20:25, 26) Kosalela bokonzi na ndenge ya mabe ekoki kobota mbuma, nzokande boyokani ekozala malamu kati na ye ná bato azali kokamba soki azali kosɛnga bango makambo na boboto mpe na ndenge ebongi mpe bato yango bazali kotosa ye na esengo! Ya solo, kondima kokende kilomɛtrɛ mibale na esika ya kosuka kaka na kilomɛtrɛ moko ekoki mpenza kobakisela yo esengo na bomoi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba malamumalamu oyo elimboli “kozongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala, kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe,” Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1996, nkasa 15-20.
[Etanda na lokasa 25]
NDENGE OYO BAZALAKI KOSALISA BATO MISALA NA MAKASI NA NTANGO YA KALA
Mibeko oyo ebimisamaki mpo na kopekisa bato oyo bazali na bokonzi básalisa bato misala na makasi ezali komonisa ete mbala mingi bazalaki kosalisa bato misala na makasi mpenza. Na mobu 118 L.T.B., Ptolemée Euergetes II, mokonzi ya Ezipito, abimisaki mobeko ete bakonzi ya Leta na mboka na ye “basengelaki te kozwa ata mwana-mboka moko na makasi mpo na kosalisa ye misala na bango moko, basengelaki mpe te kobɔtɔla (aggareuein) ngɔmbɛ na ye ata mpo na mosala nini ya bango moko.” Lisusu: “Moto moko te azali na lotomo ya kozwa na makasi . . . babwato mpo na mosala na ye moko, ata mpo na ntina nini.” Na makomi moko ya mobu 49 T.B., oyo ezali na Tempelo ya Oasis Monene, na Ezipito, Vergilius Capito, momonisi ya Leta ya Loma, alobaki ete basoda bazalaki kozwa bato na makasi na ndenge oyo ebongi te, mpe apesaki mitindo ete “moto moko te asengeli kozwa to kobɔtɔla . . . eloko moko soki azali na mokanda te oyo euti epai na ngai, oyo ezali kopesa ye ndingisa ya kosala yango.”
[Elilingi na lokasa 24]
Basalisaki Simona moto ya kilene mosala na makasi
[Elilingi na lokasa 26]
Batatoli ebele balekisaki ntango mingi na bolɔkɔ mpo balingaki kotosa mitinda ya boklisto