LISOLO YA BOYEKOLI 49
LOYEMBO 147 Nzambe alaki biso bomoi ya seko
Osengeli kosala nini mpo ozwa bomoi ya seko?
“Moto nyonso oyo andimi Mwana mpe azali komonisa kondima epai na ye [akozwa] bomoi ya seko.”—YOA. 6:40.
NA MOKUSE
Ndenge oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu bakoki kozwa matomba na mbeka ya Yesu Kristo.
1. Bato mosusu bakoki kokanisa nini na likambo ya kozala na bomoi libela na libela?
BATO mingi balandelaka biloko na bango ya kolya mpe basalaka ngalasisi mbala na mbala mpo na kobatela kolɔngɔnɔ ya nzoto na bango. Atako bongo, bayebi ete ekosalisa bango te bázala na bomoi libela na libela. Bakoki kolikya to kokanisa bongo te mpo bobange eyaka na mikakatano ebele. Nzokande, Yesu amonisaki ete bato bakoki kozala na “bomoi ya seko,” ndenge emonisami na Yoane 3:16 mpe 5:24.
2. Yoane mokapo 6 elobi nini mpo na bomoi ya seko? (Yoane 6:39, 40)
2 Mokolo moko, Yesu asalaki likamwisi ya kokómisa mampa ná mbisi ebele mpo na koleisa bankóto ya bato. a Ezalaki likambo ya kokamwa, kasi makambo oyo alobaki mokolo oyo elandaki ekamwisaki mingi koleka. Ebele ya bato balandaki ye na Kapernaume, pene ya Mbu ya Galile, mpe kuna Yesu ayebisaki bango ete bato bakoki kosekwa mpe kozala na bomoi ya seko. (Tángá Yoane 6:39, 40.) Na yango, kanisá baninga mpe bandeko na yo oyo bakufá. Maloba ya Yesu emonisi ete bato mingi oyo bakufá bakoki kosekwa mpe ete yo ná bato oyo olingaka bokoki kozala na bomoi libela na libela! Kasi, makambo mosusu oyo Yesu alobaki na Yoane mokapo 6, bato mosusu bakangaki mpenza ntina na yango te. Tótalela maloba yango na likebi.
3. Na kotalela Yoane 6:51, Yesu alobaki nini mpo na ye moko?
3 Ebele ya bato oyo bazalaki na Kapernaume bamonaki boyokani oyo ezalaki kati na mampa oyo Yesu aleisaki bango mokolo eleki mpe mana oyo Yehova apesaki bankɔkɔ na bango. Makomami mpe ebengi mana “limpa oyo eutaki na likoló.” (Nz. 105:40; Yoa. 6:31) Na yango Yesu asalelaki ndakisa ya mana mpo na koteya bango likambo moko ya ntina. Atako mana ezalaki bilei ya likamwisi oyo eutaki na Nzambe, baoyo balyaki yango nsukansuka bakufaki. (Yoa. 6:49) Kasi Yesu amibengaki “limpa ya solosolo oyo euti na likoló,” “limpa ya Nzambe,” mpe “limpa ya bomoi.” (Yoa. 6:32, 33, 35) Yesu amonisaki bokeseni monene oyo ezalaki kati na mana mpe ye moko. Alobaki: “Ngai nazali limpa ya bomoi oyo euti na likoló. Soki moto alei limpa yango, akozala na bomoi libela na libela.” (Tángá Yoane 6:51.) Bayuda yango babulunganaki. Ndenge nini Yesu akokaki koloba ete auti na likoló lokola “limpa” oyo eleki mana ya likamwisi oyo Nzambe apesaki bankɔkɔ na bango? Yesu asalisaki bango bázwa eyano ntango alobaki: “Limpa oyo nakopesa ezali mosuni na ngai.” Alingaki koloba nini? Tosengeli koluka kokanga ntina ya maloba yango mpo eyano na yango emonisi oyo biso ná bato oyo tolingaka tosengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko. Tótala soki Yesu alingaki koloba nini.
LIMPA YA BOMOI MPE MOSUNI NA YE
4. Mpo na nini bato mosusu bamiyokaki mabe?
4 Bato mosusu oyo bazalaki koyoka Yesu bamiyokaki mabe ntango alobaki ete akopesa “mosuni na [ye] mpo na bomoi ya mokili.” Mbala mosusu bakanisaki ete akopesa bango mpenza mosuni ya nzoto na ye bálya! (Yoa. 6:52) Talá likambo mosusu ya kokamwa oyo Yesu abakisaki: “Soki bolei mosuni ya Mwana ya moto te mpe bomɛli makila na ye te, bozali na bomoi te na kati na bino.”—Yoa. 6:53.
5. Ndenge nini toyebi ete Yesu alingaki koloba te ete bato bámɛla mpenza makila ya nzoto na ye?
5 Banda na ntango ya Noa, Nzambe apekisaki bato kolya makila. (Eba. 9:3, 4) Yehova azongelaki epekiseli yango na Mobeko oyo apesaki Yisraele. Moto nyonso oyo alei makila asengelaki “kobomama.” (Lev. 7:27) Yesu azalaki koteya bato bátosa Mobeko. (Mat. 5:17-19) Na yango, tokoki kokanisa ata moke te ete akokaki kosɛnga ebele ya Bayuda wana bálya mpenza mosuni ya nzoto na ye to bámɛla makila oyo euti na misisa na ye. Atako bongo, na maloba yango oyo ekamwisaki bato, Yesu azalaki nde koteya bato ndenge ya kozwa bomoi, “bomoi ya seko.”—Yoa. 6:54.
6. Ndenge nini toyebi ete maloba ya Yesu na oyo etali kolya mosuni na ye mpe komɛla makila na ye ezalaki ya elilingi?
6 Yesu alingaki koloba nini? Ezali polele ete Yesu azalaki koloba na ndenge ya elilingi, ndenge kaka asalaki yango ntango alobaki na mwasi moko Mosamaria ete: “Moto oyo akomɛla mai oyo ngai nakopesa ye akoyoka lisusu mposa ya mai ata moke te, kasi mai oyo nakopesa ye ekokóma na kati na ye liziba ya mai oyo ezali kobimabima mpo na kopesa bomoi ya seko.” (Yoa. 4:7, 14) b Yesu alingaki te koloba na mwasi Mosamaria ete akozwa bomoi ya seko kaka soki amɛli mai moko boye. Ndenge moko mpe, alingaki koloba te ete ebele ya bato oyo bazalaki na ye na Kapernaume bakozala na bomoi libela na libela soki balei mosuni ya nzoto na ye mpe bamɛli makila na ye.
LIBAKU MOSUSU OYO YESU ALOBELAKI MOSUNI MPE MAKILA NA YE
7. Bato mosusu balobaka nini mpo na maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 6:53?
7 Bato mosusu ya mangomba balobaka ete maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 6:53, oyo elobeli kolya mosuni na ye mpe komɛla makila na ye ezalaki ndakisa mpo na Bilei ya Mpokwa ya Nkolo, mpamba te na molulu yango oyo esalemaki na nsima, Yesu alobaki mpe maloba ya ndenge wana. (Mat. 26:26-28) Bato yango balobaka ete moto nyonso oyo ayangani na Bilei ya Mpokwa ya Nkolo asengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo oyo balekisaka epai ya bato oyo bayangani. Ezali bongo? Ezali na ntina tóluka koyeba soki maloba na bango ezali solo mpamba te mbula na mbula, bamilio ya bato na mokili mobimba bayanganaka elongo na biso na molulu ya Bilei ya Mpokwa ya Nkolo. Tokomona mwa bokeseni oyo ezali kati na maloba oyo ezali na Yoane 6:53 mpe makambo oyo Yesu alobaki na Bilei ya Mpokwa ya Nkolo.
8. Pesá mwa bokeseni oyo ezali kati na mabaku mibale oyo Yesu alobaki? (Talá mpe bililingi.)
8 Tótala bokeseni mibale kati na mabaku yango. Ya liboso, ntango nini mpe esika nini Yesu alobaki maloba oyo ezali na Yoane 6:53-56? Alobaki yango epai ya ebele ya Bayuda na Galile na mobu 32 T.B. Yango ezalaki pene na mbula mobimba liboso abandisa Bilei ya Mpokwa ya Nkolo, na Yerusaleme. Ya mibale, azalaki koloba na banani? Bato mingi oyo bazalaki koyoka Yesu na Galile bazalaki koluka kaka kokokisa mposa na bango ya kolya na ntango wana, na esika ya kokokisa mposa na bango ya elimo. (Yoa. 6:26) Kutu, ntango Yesu alobaki likambo oyo bamonaki ete ezali mpasi mpo na kokanga ntina, batikaki mbala moko kondimela ye. Ata bayekoli mosusu ya Yesu batikaki kolanda ye. (Yoa. 6:14, 36, 42, 60, 64, 66) Likambo yango ekeseni na oyo esalemaki pene na mbula mobimba na nsima, na mobu 33 T.B., ntango abandisaki Bilei ya Mpokwa ya Nkolo. Na libaku wana, bantoma na ye 11 ya sembo bazalaki elongo na ye atako bango mpe bakangaki mpenza ntina ya makambo nyonso te oyo azalaki koteya bango. Kasi, na bokeseni na bato mingi oyo bazalaki na Galile, bantoma na ye ya sembo bandimaki ete Yesu azalaki Mwana ya Nzambe oyo autaki na likoló. (Mat. 16:16) Yesu apesaki bango longonya; alobaki: “Bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi na komekama na ngai.” (Luka 22:28) Bokeseni wana mibale kaka, elingi koloba esika mpe bato oyo bazalaki wana, emonisi ete maloba ya Yesu na Yoane 6:53 ezalaki ndakisa te mpo na Bilei ya Mpokwa ya Nkolo. Bokeseni mosusu mpe ezali.
MALOBA YA YESU ETALI MPE YO
9. Maloba oyo Yesu alobaki na Bilei ya Mpokwa ya Nkolo etali banani?
9 Na ntango ya Bilei ya Mpokwa ya Nkolo, Yesu apesaki bantoma na ye mampa oyo ezangá levire mpe ayebisaki bango ete elakisi nzoto na ye. Na nsima apesaki bango vinyo mpe alobaki ete ezali komonisa “makila ya kondimana.” (Mrk. 14:22-25; Luka 22:20; 1 Ko. 11:24) Yango ezali na ntina mingi. Kondimana ya sika esalemi elongo na “bato ya Yisraele [ya elimo]” oyo bakozala “na Bokonzi ya Nzambe”; esalemi na bato nyonso te. (Ebr. 8:6, 10; 9:15) Bantoma bakangaki ntina ya likambo yango te na ntango wana. Kasi, bakangaki ntina na yango mwa moke na nsima ntango batyamaki mafuta na elimo santu mpe bakɔtaki na kondimana yango ya sika mpo na kozwa esika elongo na Yesu na likoló.—Yoa. 14:2, 3.
10. Na ndenge nini makambo oyo Yesu alobaki na Galile ekeseni na makambo oyo alobaki na Bilei ya Mpokwa ya Nkolo? (Talá mpe elilingi.)
10 Tóbosana te ete na ntango ya Bilei ya Mpokwa ya Nkolo, Yesu azalaki koloba kaka na “etonga moke.” Mwa etuluku yango ya bato ebandaki na bantoma ya Yesu ya sembo oyo bazalaki elongo na ye mokolo wana na ndako. (Luka 12:32) Bango ná bato oyo bakɔtaki nsima na etuluku yango bazalaki na ndingisa ya kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli. Bango nde bakozwa esika na likoló elongo na Yesu. Makambo Yesu alobaki na bantoma na ye na libaku yango ekeseni na makambo oyo alobaki na ebele ya bato na Galile. Na Bilei ya Mpokwa ya Nkolo, Yesu alobaki mpo na etuluku ya bato moke. Maloba na ye na Galile etalaki bato ebele.
11. Likambo nini oyo Yesu alobaki na Galile emonisi ete azalaki kolobela kaka bato moke te?
11 Ntango Yesu azalaki na Galile na mobu 32 T.B., azalaki kolobela libosoliboso Bayuda oyo balukaki ye mpo apesa bango mampa. Kasi, abendaki likebi na bango na eloko oyo ezalaki na motuya koleka bilei ya mosuni. Alobelaki ebongiseli oyo ekokaki kopesa bango bomoi ya seko. Mpe Yesu alobaki ete baoyo bakufá bakokaki kosekwa na mokolo ya nsuka mpe kozala na bomoi libela na libela. Azalaki kolobela te kaka bato moke oyo baponamá, ndenge asalaki yango na nsima na Bilei ya Mpokwa ya Nkolo. Na Galile, azalaki kolobela nde lipamboli oyo bato nyonso bakokaki kozwa. Kutu alobaki: “Soki moto alei limpa yango, akozala na bomoi libela na libela . . . Limpa oyo nakopesa ezali mosuni na ngai mpo na bomoi ya mokili.”—Yoa. 6:51. c
12. Esengeli kosala nini mpo na kozwa mapamboli oyo Yesu alobelaki?
12 Yesu alobaki te na Bayuda na Galile ete lipamboli yango ekozala mpo na moto nyonso oyo azalaki na bomoi to oyo akobotama. Kaka baoyo ‘balei limpa yango,’ elingi koloba baoyo bamonisi kondima, nde bakozwa lipamboli yango. Bakristo mingi ya nkombo mpamba bamonaka ete bakozwa lobiko kaka soki bandimeli Yesu lokola mobikisi na bango. (Yoa. 6:29) Nzokande na kati ya ebele ya bato na Galile, bato mosusu oyo liboso bandimelaki Yesu basundolaki ye.
13. Esengeli kosala nini mpo na kozala moyekoli ya solosolo ya Yesu?
13 Bato mingi na kati ya ebele ya bato oyo Yesu aleisaki basepelaki kolanda ye kaka soki azali kopesa bango oyo bazalaki koluka. Bazalaki kosepela na makamwisi ya kobikisa bango, bilei ya ofele, to mateya oyo eyokanaki na makanisi na bango. Kasi, Yesu amonisaki ete esɛngaki kosala likambo mosusu mpo na kozala moyekoli na ye ya solosolo. Ayaki na mabele kaka mpo na kokokisa bamposa ya bato ya mosuni te. Bato basengelaki kondima libyangi na ye ya ‘koya epai na ye,’ elingi koloba kondima mpe kotosa makambo nyonso oyo ateyaki.—Yoa. 5:40; 6:44.
14. Tosengeli kosala nini mpo tózwa litomba na mosuni mpe makila ya Yesu?
14 Yesu ayebisaki ebele ya bato ete basengeli komonisa kondima. Na nini? Na nguya ya kosikola oyo ezali na mosuni na ye mpe makila na ye, oyo akopesa mbeka na nsima. Kondima ya ndenge wana ezalaki na ntina mpo na Bayuda wana, ezali mpe na ntina mpo na biso lelo. (Yoa. 6:40) Ya solo, mpo tózwa litomba na mosuni mpe makila ya Yesu, ndenge Yoane 6:53 emonisi yango, tosengeli komonisa kondima na lisiko. Libaku yango epesami na bato mingi.—Ef. 1:7.
15-16. Makambo nini ya ntina toyekoli na Yoane mokapo 6 ?
15 Yoane mokapo 6 elobeli makambo oyo ezali na motuya mingi mpo na biso mpe bato oyo tolingaka. Emonisi polele ete Yesu atyelaka bato likebi mingi. Ntango azalaki na Galile, abikisaki bato ya maladi, ateyaki makambo etali Bokonzi, mpe apesaki bato biloko ya kolya. (Luka 9:11; Yoa. 6:2, 11, 12) Oyo eleki ntina, ateyaki ete azali “limpa ya bomoi.”—Yoa. 6:35, 48.
16 Bato oyo abengaki “bampate mosusu” balyaka te mpe basengeli kolya te limpa mpe komɛla vinyo na Bilei ya Mpokwa ya Nkolo ya mbula na mbula. (Yoa. 10:16) Atako bongo, bazwaka matomba na mosuni mpe makila ya Yesu Kristo. Basalaka yango na ndenge bamonisaka kondima na mbeka na ye ya lisiko. (Yoa. 6:53) Kasi, baoyo basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo bamonisaka ete bazali na kati ya kondimana ya sika mpe bazali na elikya ya koyangela na Bokonzi ya likoló. Na yango, tózala bakristo oyo batyami mafuta na elimo to bampate mosusu, lisolo ya Yoane mokapo 6 ezali na ntina mingi mpo na biso. Emonisi ete mpo na kozwa bomoi ya seko, tosengeli komonisa kondima na mbeka ya Yesu.
LOYEMBO 150 Bóluka Nzambe mpo bóbika
a Totalelaki bavɛrsɛ ya Yoane 6:5-35 na lisolo oyo eleki.
b Mai oyo Yesu alobelaki ezali bibongiseli oyo Yehova azwá mpo na kopesa bato bomoi ya seko.
c Yoane mokapo 6 esaleli maloba oyo ekoki kobongolama na “moto nyonso” mpo na kolobela baoyo bakoki kozwa bomoi ya seko.—Yoa. 6:35, 40, 47, 54, 56-58.