1919—Eleki sikoyo mbula nkama
NA 1919, Etumba Monene (oyo na nsima ekómaki kobengama Etumba ya Liboso ya mokili mobimba), oyo eumelaki mbula koleka 4, esilaki. Na nsuka ya 1918, bikólo etikaki kobunda mpe na mokolo ya 18/01/1919, babandaki kosala likita moko na Paris mpo na kimya. (Conference de paix de Paris) Nsima ya likita yango, basalaki mpe boyokani ya kimya oyo babengaki Traité de Versailles, mpe yango esukisaki etumba kati na bikólo oyo esanganaki ná Allemagne. Batyaki sinyatire na mokanda yango na mokolo ya 28/06/1919.
Mokanda yango elobaki mpe ete básala ebongiseli moko ya sika na nkombo Société des Nations. Mokano na yango ezalaki “ya kolendisa bikólo nyonso ezala na bomoko mpe bakanaki kotya kimya na mokili.” Mangomba mingi ya bokristo epesaki mabɔkɔ na ebongiseli yango. Lisangani ya mangomba ya bokristo na Amerika elobaki ete ebongiseli yango ezali “komonisama ya Bokonzi ya Nzambe awa na mabele na nzela ya politiki.” Mpo na kopesa Société des Nations mabɔkɔ polelepolele, lisangani yango etindaki bandimi na yango na likita oyo esalemaki na Paris. Moko ya bandimi yango alobaki ete likita yango “ezalaki ebandeli ya eleko ya sika na lisolo ya bato awa na mabele.”
Eleko ya sika ebandaki, kasi ebandaki te mpo bato basalaki likita wana ya kotya kimya na mokili. Na 1919, eleko ya sika mpo na mosala ya kosakola ebandaki ntango Yehova apesaki basaleli na ye makasi ya kosakola na ndenge oyo basalaki naino liboso te. Kasi, liboso esalema bongo, mbongwana moko monene esengelaki kosalema mpo na Bayekoli ya Biblia.
BAZWI EKATELI MOKO MONENE
Maponami oyo Bayekoli ya Biblia bazalaki kosala mbula na mbula mpo na kotya bakambi ya la Société Watch Tower esengelaki kosalema na mokolo ya pɔsɔ, 04/01/1919. Na ntango yango, Joseph Rutherford, oyo azalaki kokamba mosala ya basaleli ya Yehova, azalaki na bolɔkɔ ya Atlanta, na Géorgie, (États-Unis) elongo na bandeko mosusu nsambo. Bandeko bazalaki komituna boye: Esengeli kopona lisusu bandeko yango oyo bazalaki na bolɔkɔ? To esengeli kotya bato mosusu na esika na bango?
Na ndako ya bolɔkɔ oyo azalaki, Ndeko Rutherford azalaki komituna soki ebongiseli ya Nzambe ekosuka ndenge nini. Ayebaki ete bandeko mibali mosusu bazalaki komona ete ekoleka malamu soki batye moto mosusu prezida ya la Société. Lokola ayebaki bongo, akomelaki bandeko oyo bakosala likita ete bátya Ndeko Evander Coward azala prezida. Ndeko Rutherford alobaki ete Ndeko Coward azali moto moko ya “boboto,” “azali na mayele,” mpe “azali sembo epai ya Nkolo.” Kasi, bandeko mingi bazalaki na likanisi mosusu; balingaki
ete maponami esalema nsima ya sanza motoba. Bandeko oyo basambaki mpo na bandeko oyo bazalaki na bolɔkɔ bandimaki likanisi yango. Ntango bazalaki kolobela likambo yango, bandeko mosusu bakómaki kosilika.Na nsima, likambo moko esalemaki. Bambula na nsima, Ndeko Richard Barber alobaki ete likambo yango ‘ebomaki mɔtɔ.’ Moko ya bandeko oyo bazalaki wana azwaki maloba mpe alobaki ete: “Nazali moto ya mibeko te, kasi soki totaleli likambo oyo na kolanda mibeko, nayebi mwa moke mobeko oyo elobeli bosembo. Nzambe asɛngi biso tózala sembo. Mpo na ngai, lolenge eleki malamu ya komonisa bosembo epai ya Nzambe ezali ya kosala maponami mpe kopona lisusu Ndeko Rutherford azala prezida ya la Société.”—Nz. 18:25.
Na nsima, Ndeko Alexander Macmillan oyo azalaki mpe na bolɔkɔ, alobaki ete mokolo oyo elandaki, Ndeko Rutherford ayaki kotala ye na bolɔkɔ oyo azalaki, mpe alobaki na ye: “Pesá ngai lobɔkɔ na yo.” Na nsima, Ndeko Rutherford apesaki ye telegrame moko. Ndeko Macmillan amonaki mwa maloba ya mokuse mpe ayebaki mbala moko ndimbola na yango. Maloba yango ezalaki: “RUTHERFORD WISE VAN BARBER ANDERSON BULLY MPE SPILL YA LIBOSO MOKAMBI BAKONZI MISATO TOLINGI BINO NYONSO.” Yango elimbolaki ete basalaki maponami mpe baponaki bakambi nyonso oyo bazalaki liboso mpe Joseph Rutherford, ná William Van Amburgh bazalaki kaka bakonzi. Na yango, Ndeko Rutherford akokoba kozala prezida ya la Société.
BABIMI NA BOLƆKƆ!
Wana bandeko mwambe bazalaki na bolɔkɔ, Bayekoli ya Biblia ya sembo batambolaki mpo na kosɛnga bato bátya sinyatire na mokanda oyo esɛngaki guvɛrnema ebimisa bango na bolɔkɔ. Bandeko yango ya mpiko bazwaki sinyatire ya bato koleka 700 000. Na mokolo ya misato, 26/03/1919, liboso bandeko bákɔtisa mokanda yango, babimisaki Ndeko Rutherford ná bakambi mosusu wana na bolɔkɔ.
Na lisolo oyo asalaki mpo na kopesa matɔndi na bandeko oyo bayambaki ye ntango abimaki na bolɔkɔ, Ndeko Rutherford alobaki boye: “Nandimi mpenza ete likambo oyo ekómelaki biso nyonso ezali kaka mpo na kobongisa biso mpo na eleko mosusu ya mpasi. . . . Etumba oyo bobundaki ezalaki te mpo na kobimisa bandeko na bino na bolɔkɔ. Ezalaki mpo na ntina mosusu. . . . Bobundaki etumba yango nde mpo na kopesa Yehova nkembo, mpe baoyo basali yango bazwi mapamboli ya kokamwa.”
Ndenge oyo makambo elekaki na ntango ya komekama wana oyo bandeko bakutanaki na yango emonisaki ete mbala mosusu Yehova nde alingaki makambo esalema bongo. Na mokolo ya 14/05/1919, tribinale monene ezwaki ekateli oyo: ‘Basambisaki te na ndenge oyo ebongi likambo ya bato oyo bafundamaki, mpe mpo na yango tolongoli etumbu oyo bakatelaki bango.’ Bafundaki bandeko ete basalaki makambo ya mabe mpenza, mpe bitumbu oyo bakatelaki bango esengelaki kotikala na dosye na bango soki balimbisaki bango kaka to soki balɛmbisaki kaka bitumbu yango. Kasi sikoyo, balongolaki bifundeli nyonso oyo bafundaki
bango. Na yango, na kolanda mibeko, Zuzi Rutherford azalaki kaka na lotomo ya kosamba makambo ya basaleli ya Yehova liboso ya Tribinale monene ya États-Unis, mpe asalaki yango mbala mingi nsima ya kobima na bolɔkɔ.BAKOBI KOSAKOLA
Ndeko Macmillan alobaki boye: “Tomonaki ete tosengelaki te kozala gɔigɔi mpe kokanga mabɔkɔ mpo na kozela Nkolo aya kozwa biso mpo tókende na likoló. Tosengelaki koluka koyeba soki mokano ya Nkolo ezalaki mpenza nini.”
Kasi, elekaki bambula ebele, bandeko oyo bazalaki kosala na biro monene bazongelaki kaka mosala na bango te. Mpo na nini? Mpo ntango bakambi ya la Société bakɔtaki bolɔkɔ, biloko mpe bamasini nyonso oyo bazalaki kosalela na imprimeri ebebisamaki. Likambo yango elɛmbisaki bandeko nzoto, mpe bamosusu bazalaki komituna soki mosala ya kosakola esuki.
Ezalaki nde na bato oyo bazalaki naino kosepela na nsango ya Bokonzi oyo Bayekoli ya Biblia bazalaki kosakola? Mpo na kopesa eyano na motuna yango, Ndeko Rutherford amonaki malamu asala diskur. Babengisaki mpe bato mosusu. Ndeko Macmillan alobaki boye: “Soki moto moko te ayei na likita yango, tokoyeba ete mosala na biso esuki.”
Na yango, na mokolo ya lomingo 04/05/1919, na Los Angeles (Californie), Ndeko Rutherford, atako azalaki kobɛla makasi, asalaki diskur oyo elobaki “Elikya mpo na mokili oyo ya mpasi.” Bayangani bazalaki soki 3500 na diskur yango, mpe bazongisaki bato mosusu mpo bisika ya kofanda ekokaki te. Na mokolo oyo elandaki, bayangani mosusu 1500 balandaki diskur yango. Eyano ezalaki polele ete bato bazalaki kosepela na nsango malamu!
Makambo oyo bandeko basalaki na nsima ezali ndakisa oyo Batatoli ya Yehova balandaka tii lelo na oyo etali ndenge ya kosakola.
BAMIBONGISI MPO NA MOSALA MONENE OYO EZALAKI LIBOSO
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/1919 eyebisaki ete na ebandeli ya sanza ya libwa, liyangani moko monene
ekosalema na Cedar Point, na Ohio. Ndeko Clarence Beaty oyo azalaki kofanda na Missouri, mpe azalaki elenge na ntango wana, alobaki boye: “Moto nyonso azalaki kaka komona ete asengeli kozala na liyangani yango. Bandeko koleka 6 000 bayanganaki, mpe motángo yango elekaki mosika oyo bazalaki kozela. Esengo ebakisamaki lisusu na liyangani yango mpo bato koleka 200 bazwaki batisimo na Laki Erie, oyo ezalaki mosika te.Na mokolo ya 05/09/1919, mokolo ya mitano ya liyangani yango, na diskur na ye oyo elobaki “Diskur mpo na baninga ya mosala,” Ndeko Rutherford ayebisaki ete zulunalo ya sika na nkombo L’Âge d’Or a ekobanda kobima. Zulunalo yango ekobanda “kopesa bansango ya ntina, mpo na komonisa ndenge makambo minene oyo ezalaki kosalema na mokili eyokani na makambo oyo Biblia elobi.”
Balendisaki Bayekoli ya Biblia nyonso básakola na mpiko mpe básalela zulunalo yango ya sika. Mokanda moko oyo elimbolaki ndenge mosala yango ekosalema elobaki boye: “Moto nyonso oyo azwá batisimo ayeba ete kosalela Nzambe ezali lokumu monene, mpe asimba libaku oyo epesami sikoyo mpe apesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola na mokili mobimba.” Bandeko ebele bamipesaki! Na sanza ya 12, bato koleka 5 0000 bakomisaki nkombo mpo bázwaka zulunalo yango ya sika.
Na nsuka ya 1919, basaleli ya Yehova bakómaki bato oyo babongisami mpe bazwaki makasi. Lisusu, bisakweli mosusu ebele oyo elobeli mikolo ya nsuka ekokisamaki. Komekama mpe kopɛtolama ya basaleli ya Yehova, oyo Malaki 3:1-4 esakolaki esilaki. Basaleli ya Yehova balongwaki na boombo ya elimo na “Babilone monene,” mpe Yesu atyaki “moombo ya sembo mpe ya mayele.” b (Em. 18:2, 4; Mat. 24:45) Na yango, Bayekoli ya Biblia bakokaki sikoyo kosala mosala oyo Yehova alingaki ete básala.
a Na 1937, L’Âge d’Or ekómaki kobengama Consolation mpe na 1946 ekómaki kobengama Lamuká!
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013, nk. 10, 12, 21-23; mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 03/2016, nk. 29-31.