Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 30

LOYEMBO 36 Batelá motema na yo

Mateya ya ntina oyo tokoki kozwa epai ya bakonzi ya Yisraele

Mateya ya ntina oyo tokoki kozwa epai ya bakonzi ya Yisraele

“Bokomona lisusu bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe moto oyo asalelaka ye te.”MAL. 3:18.

NA MOKUSE

Tokomona makambo oyo Yehova atalelaki epai ya bakonzi ya Yisraele mpo tóyeba eloko oyo azelaka epai na biso basaleli na ye lelo.

1-2. Biblia elobi nini mpo na bakonzi mosusu ya Yisraele?

 BIBLIA etángi mibali koleka 40 oyo bazalaki bakonzi na Yisraele. a Lisolo yango elobi na bosembo mpenza makambo oyo bakonzi yango mosusu basalaki. Na ndakisa, ata bakonzi ya malamu basalaki makambo mosusu ya mabe. Moko na bango ezali Davidi, oyo azalaki mokonzi ya malamu. Yehova alobaki: “Mosaleli na ngai Davidi . . . alandaki ngai na motema na ye mobimba mpe azalaki kosala kaka oyo ezali malamu na miso na ngai.” (1 Bak. 14:8) Kasi, toyebi ete Davidi asalaki ekobo ná mwasi ya bato mpe abongisaki makambo mpo mobali ya mwasi yango abomama na etumba.—2 Sa. 11:​4, 14, 15.

2 Nzokande, bakonzi mingi oyo bazalaki sembo te basalaki makambo mosusu ya malamu. Tózwa ndakisa ya Rehoboame. Na miso ya Yehova, Rehoboame “asalaki makambo oyo ezali mabe.” (2 Nt. 12:14) Kasi, Rehoboame asalaki makambo mosusu ya malamu: atosaki Yehova ntango ayebisaki ye abundisa mabota zomi te mpe atika bango bápona mokonzi na bango. Asalisaki mpe ekólo na ye na ndenge akómisaki makasi bingumba na yango.—1 Bak. 12:​21-24; 2 Nt. 11:​5-12.

3. Motuna nini ya ntina ebimi, mpe tokotalela nini na lisolo oyo?

3 Yango ebimisi motuna moko ya ntina mingi: Soki bakonzi ya Yisraele basalaki makambo ya malamu mpe makambo ya mabe, Yehova azalaki kotalela nini mpo na koloba ete mokonzi boye azalaki sembo na miso na Ye? Eyano na motuna yango ekosalisa biso tóyeba eloko oyo Yehova azelaka epai na biso. Tokolobela makambo misato oyo na ntembe te Yehova atalelaki mpo na koyeba bosembo ya bakonzi ya Yisraele: ndenge motema na bango ezalaki, ezaleli na bango ya kobongola motema, mpe kokangama na bango na losambo ya solo.

MOTEMA NA YO EZALA MOBIMBA EPAI YA YEHOVA

4. Wapi likambo moko oyo ekesenisaki bakonzi ya sembo mpe bakonzi oyo bazalaki sembo te?

4 Bakonzi oyo basepelisaki Yehova ezali baoyo basalelaki ye na motema b mobimba. Yehoshafate, oyo azalaki mokonzi ya malamu “alukaki Yehova na motema na ye mobimba.” (2 Nt. 22:9) Biblia elobi mpo na Yosiya ete: “Na bakonzi nyonso oyo bayangelaki liboso ya Yosiya, ata moko te azalaki lokola ye, oyo azongelaki Yehova na motema na ye mobimba.” (2 Bak. 23:25) Bongo Salomo, oyo asalaki makambo ya mabe ntango akómaki mobange? Biblia elobi: “Motema na ye ezalaki mobimba te.” (1 Bak. 11:4) Mokonzi mosusu oyo azalaki sembo te ezalaki Abiyame; Biblia elobi mpo na ye ete: “Motema na ye ezalaki mobimba te epai ya Yehova.”—1 Bak. 15:3.

5. Kosalela Yehova na motema mobimba elimboli nini?

5 Boye, kosalela Yehova na motema mobimba elimboli nini? Moto oyo azali na motema mobimba asalaka makambo ya losambo te kaka tiká asala. Kasi, asalelaka Yehova mpo alingi ye makasi mpe akangami na ye. Kutu, akobaka kolinga ye mpe kokangama na ye bomoi na ye mobimba.

6. Ndenge nini tokoki kobatela motema na biso mobimba? (Masese 4:23; Matai 5:​29, 30)

6 Ndenge nini tokoki komekola bakonzi ya sembo mpe kosalela Yehova na motema mobimba? Soki toboyi makambo oyo ekoki kobebisa biso. Na ndakisa, kominanola ya mabe, baninga mabe, mpe makanisi ya konduka biloko ya mokili ekoki kokabola motema na biso. Soki tomoni ete eloko moko ebandi kokitisa bolingo na biso epai ya Yehova, tózwa bibongiseli mpo na kolongola yango mbala moko.—Tángá Masese 4:23; Matai 5:​29, 30.

7. Mpo na nini ezali na ntina tóboya makambo ya mabe?

7 Tosengeli te kotika ete motema na biso ekabwana. Soki tozali ekɛngɛ te, tokoki komikosa mpe kokanisa ete soki tozali kosala makambo mingi ya elimo, makambo ya mabe ekobebisa biso te. Kasi, tótalela ndakisa oyo: Kanisá ete moi ezali makasi mpenza. Mpo na komibatela, ozwi ekateli ya komɛla mai mingi. Kasi nini ekosalema soki ofandi kaka na nse ya moi na esika oluka esika ya malili? Mai ekobanda kaka kosila na nzoto mpo moi ezali makasi. Ndakisa yango emonisi nini? Tosengeli kosuka kaka te na kosala makambo ya malamu oyo ekosala ete tópusana penepene na Yehova. Kaka ndenge tokolinga te kotikala na nse ya moi, tosengeli komibatela na makambo nyonso ya mokili, oyo ekoki kokabola motema na biso, mpe kokitisa bolingo na biso mpo na Yehova.—Ef. 2:2.

SOKI OSALI LISUMU BONGOLÁ MOTEMA

8-9. Mokonzi Davidi ná Mokonzi Ezekiasi basalaki nini nsima ya kozwa mpamela? (Talá elilingi ya ezipeli.)

8 Ndenge tomonaki yango liboso, Mokonzi Davidi asalaki mabunga minene. Kasi ntango mosakoli Natane amonisaki ye lisumu na ye polele, Davidi amikitisaki mpe abongolaki motema. (2 Sa. 12:13) Maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 51 emonisi ete abongolaki motema solo. Davidi akosanaki kaka koyoka mawa te mpo na kobuba Natane to kokima etumbu.—Nz. 51:​3, 4, 17, maloba oyo ezali likoló.

9 Mokonzi Ezekiasi mpe asalelaki Yehova lisumu. Lisolo ya Biblia elobi: “Motema na ye ekómaki na lolendo; yango wana Nzambe ayokelaki ye ná Yuda mpe Yerusaleme nkanda.” (2 Nt. 32:25) Mpo na nini Ezekiasi akómaki na lolendo? Mbala mosusu akómaki komona ete aleki basusu mpo azalaki na bozwi, alongaki bato ya Asiri, to abikaki na maladi na ndenge ya likamwisi. Ekoki kozala ete lolendo nde etindaki ye alakisa bomɛngo na ye nyonso epai ya bato ya Babilone; mpe mosakoli Yisaya apamelaki ye mpo na yango. (2 Bak. 20:​12-18) Kasi, ndenge moko na Davidi, Ezekiasi amikitisaki mpe abongolaki motema. (2 Nt. 32:26) Nsima ya kotalela bomoi ya Ezekiasi, Yehova atalelaki ye lokola mokonzi ya sembo oyo “azalaki kosala makambo oyo ezali malamu.”—2 Bak. 18:3.

Mokonzi Davidi mpe Mokonzi Ezekiasi bamikitisi mpe babongoli motema ntango bamonisi bango masumu na bango polele (Talá paragrafe 8-9)


10. Mokonzi Amazia asalaki nini ntango bapamelaki ye?

10 Amazia, mokonzi ya Yuda, asalaki makambo oyo ezali malamu “kasi na motema mobimba te.” (2 Nt. 25:2) Mabe na ye ezalaki wapi? Yehova asalisaki ye alonga Baedome, kasi na nsima Amazia afukamelaki banzambe ya bato yango. c Mpe ntango mosakoli ya Yehova alobaki na ye mpo na likambo yango, Mokonzi Amazia atyaki motó makasi.—2 Nt. 25:​14-16.

11. Na kotalela 2 Bakorinti 7:​9, 11, tosengeli kosala nini mpo Yehova alimbisa biso? (Talá mpe bililingi.)

11 Bandakisa yango eteyi biso nini? Soki tosali masumu, tosengeli kobongola motema mpe kosala nyonso mpo na kozongela yango te. Bongo soki bankulutu bapesi biso toli, ata na likambo oyo ezali komonana moke? Tosengeli te kokanisa ete Yehova to bankulutu balingi biso te. Ata bakonzi ya Yisraele oyo bazalaki malamu bazalaki kozwa toli mpe mpamela. (Ebr. 12:6) Ntango bapesi biso toli, tosengeli (1) kondima yango na komikitisa, (2) kosala mbongwana oyo esengeli, mpe (3) kokoba kosalela Yehova na motema mobimba. Soki tobongoli motema na masumu na biso, Yehova akolimbisa biso.—Tángá 2 Bakorinti 7:​9, 11.

Ntango bapesi biso toli, tosengeli (1) kondima yango na komikitisa, (2) kosala mbongwana oyo esengeli, mpe (3) kokoba kosalela Yehova na motema mobimba (Talá paragrafe 11) f


KANGAMÁ NA LOSAMBO YA SOLO

12. Bakonzi oyo Yehova amonisaki ete bazali sembo ezali baoyo wapi?

12 Bakonzi oyo Yehova amonaki ete bazali sembo ezali baoyo bakangamaki na losambo ya solo. Balendisaki mpe bato ya ekólo básala yango. Ya solo, basalaki mabunga, ndenge tomonaki yango. Kasi bakangamaki kaka na Yehova mpe babundaki kutu etumba mpo na kolongola losambo ya bikeko na ekólo. d

13. Mpo na nini Yehova atalelaki Mokonzi Ahaba ete azalaki sembo te?

13 Mpo na nini Yehova atalelaki bakonzi mosusu ete bazalaki sembo te? Na ntembe te makambo nyonso oyo basalaki ezalaki mabe te. Ata Ahaba, mokonzi mabe, amonisaki mwa komikitisa mpe ayokaki mawa na ndenge abomisaki Nabote. (1 Bak. 21:​27-29) Atongaki mpe bingumba mpe alongaki bitumba mpo na Yisraele. (1 Bak. 20:​21, 29; 22:39) Kasi, Ahaba alendisaki losambo ya lokuta mingi na bopusi ya mwasi na ye. Abongolá motema te mpo na likambo yango.—1 Bak. 21:​25, 26.

14. (a) Mpo na nini Yehova amonaki ete Mokonzi Rehoboame azalaki sembo te? (b) Likambo nini esalaki ete bakonzi mingi bázala sembo te?

14 Rehoboame azali mokonzi mosusu oyo azalaki sembo te. Ndenge tomonaki yango liboso, asalaki mwa makambo ya malamu na boyangeli na ye. Kasi ntango bokonzi na ye epikamaki makasi, asundolaki Mobeko ya Yehova mpe abandaki kosambela banzambe ya lokuta. (2 Nt. 12:1) Nsima na yango, akómaki lokolo moko na losambo ya solo, lokolo moko na losambo ya lokuta. (1 Bak. 14:​21-24) Longola Rehoboame ná Ahaba, ezalaki mpe na bakonzi mosusu oyo batikaki kosambela Yehova na ndenge ya malamu. Kutu, bakonzi yango mingi oyo bazalaki sembo te bapesaki mabɔkɔ na losambo ya lokuta na lolenge moko boye. Ezali polele ete likambo moko ya ntina oyo Yehova azalaki kotalela mpo na kokata ete mokonzi moko azali sembo to te ezalaki soki akangami na losambo ya solo to te.

15. Mpo na nini kokangama na losambo ya solo ezali na ntina mingi mpo na Yehova?

15 Mpo na nini likambo ya losambo ezalaki na ntina mingi mpo na Yehova? Ya liboso, bakonzi bazalaki na mokumba ya kopesa bato ya Nzambe ndakisa na oyo etali kosambela Yehova na ndenge ya malamu. Lisusu, losambo ya lokuta ezalaki komema bato na masumu mosusu ya minene mpe na kosalela basusu makambo ya kozanga bosembo. (Hos. 4:​1, 2) Longola yango, bakonzi ná bato oyo bazalaki koyangelama bazalaki ekólo ya Yehova. Na yango, ntango bazangi bosembo epai ya Yehova mpe bakɔti na losambo ya lokuta, Biblia elobi ete ezalaki lokola basali ekobo. (Yir. 3:​8, 9) Moto oyo asali ekobo asalelaka molongani na ye lisumu oyo epesaka mpasi koleka nyonso. Ndenge moko mpe, ntango mosaleli ya Yehova oyo amipesá na ye akɔti na losambo ya lokuta asali lisumu mbala moko epai ya Yehova mpe epesaka ye mpasi mingi. eMib. 4:​23, 24.

16. Na miso ya Yehova, nini mpenza ekesenisaka moto ya sembo na moto mabe?

16 Mateya nini tokoki kozwa? Ya solo, tosengeli kozala na ekateli ya koboya losambo ya lokuta. Kasi, tosengeli mpe kokangama na losambo ya solo mpe komipesa na kosalela Yehova na ndenge ya malamu. Mosakoli Malaki alobaki polele likambo oyo ekesenisaka moto malamu ná moto mabe na miso ya Yehova. Akomaki boye: “Bokomona lisusu bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe moto oyo asalelaka ye te.” (Mal. 3:18) Yango wana, tosengeli kotika ata eloko moko te, ezala bomoto na biso ya kozanga kokoka mpe mabunga na biso, elɛmbisa biso nzoto tii etinda biso tótika kosalela Nzambe. Kotika kosalela Yehova ezali mpe lisumu monene.

17. Mpo na nini tosengeli kokeba ntango tozali kopona moto oyo tokobala?

17 Soki ozali monzemba mpe ozali kokanisa kobala, omoni ndenge maloba ya Malaki na oyo etali kosalela Nzambe ekoki kosalisa yo mpo na kopona moto oyo okobala? Moto akoki kozala na mwa bizaleli ya malamu, kasi soki asalelaka Nzambe ya solo te, na miso ya Yehova azali moto ya sembo? (2 Ko. 6:14) Soki obali moto yango, akosalisa yo okoba kosalela Yehova na bosembo? Kanisá naino: Ekoki kozala ete basi ya Salomo bazalaki na mwa bizaleli mosusu ya malamu. Kasi bazalaki kosalela Yehova te, mpe babendaki mokemoke motema ya Salomo na losambo ya lokuta.—1 Bak. 11:​1, 4.

18. Baboti basengeli koteya bana na bango nini?

18 Baboti, bokoki kosalela lisolo ya bakonzi ya Yisraele mpo na kosalisa bana na bino bákolisa mposa ya kosalela Yehova na molende. Bósalisa bango bákanga ntina ete Yehova amonaki ete mokonzi boye azalaki malamu to mabe na kotalela mingimingi soki mokonzi yango alendisaki losambo ya solo to te. Bóteya bana na bino na maloba mpe na misala ete makambo ya elimo, na ndakisa koyekola Biblia, koyangana na makita, mpe kobima na mosala ya kosakola ezali na ntina koleka makambo mosusu nyonso. (Mat. 6:33) Soki bozali kosala bongo te, bana bakoki kokanisa ete kozala Motatoli ya Yehova ezali kaka kozala na lingomba ya papa ná mama; bakozala mpenza te na boyokani na bango moko na Yehova. Na bongo, bakoki kotya losambo ya solo na esika ya mibale, to kutu kotika yango.

19. Elikya nini ezali mpo na moto nyonso oyo atiká kosalela Yehova? (Talá mpe etanda “ Okoki kozongela Yehova!”)

19 Soki moto atiki kosalela Yehova, elikya esili mpo na ye? Te, mpo akoki kobongola motema mpe kozonga na losambo ya solo. Mpo asala yango, ekoki kosɛnga alona komikitisa mpe andima lisalisi ya bankulutu ya lisangá. (Yak. 5:14) Milende nyonso oyo akosala ekokokana te na matomba oyo akozwa soki azongeli boyokani malamu na Yehova!

20. Soki tomekoli bakonzi ya sembo, Yehova akomona biso ndenge nini?

20 Mateya nini tozwi na lisolo ya bakonzi ya Yisraele? Ya liboso, tokoki kozala lokola bakonzi ya sembo soki tokobi kolinga Yehova na motema na biso mobimba. Ya mibale, tosengeli kozwa mateya na mabunga na biso, kobongola motema, mpe kobongisa makambo oyo esengeli. Mpe ya misato, tóbosana te ete kokangama na losambo ya Nzambe kaka moko ya solo ezali na ntina mingi. Soki okangami na Yehova, akomona yo ete osalaka oyo ezali sembo na miso na ye.

LOYEMBO 45 Komanyola ya motema na ngai

a Na lisolo oyo, maloba “bakonzi ya Yisraele” esalelami mpo na kolobela bakonzi nyonso oyo bayangelaki bato ya Yehova, ezala na Yuda bokonzi ya mabota mibale, to Yisraele bokonzi ya mabota zomi, to mpe na mabota nyonso 12.

b NDIMBOLA YA MALOBA: Na Biblia, liloba “motema” emonisaka mbala mingi bomoto mobimba ya kati; yango esangisi makambo oyo moto alingaka, makanisi na ye, bizaleli na ye, ndenge na ye ya kotalela makambo, makoki na ye, ntina oyo asalaka makambo, mpe mikano na ye.

c Emonani ete bakonzi ya bikólo ya bapakano bazalaki na momeseno ya kosambela banzambe ya ekólo oyo balongi.

d Mokonzi Asa asalaki mabunga ya minene. (2 Nt. 16:​7, 10) Atako bongo, Biblia elobeli ye na ndenge ya malamu. Liboso aboyaki koyoka mpamela, kasi ekoki kozala ete na nsima abongolaki motema. Yehova amonaki ete bizaleli na ye ya malamu elekaki mabunga na ye. Kutu, Asa azalaki kosambela kaka Yehova mpe asalaki makasi alongola losambo ya bikeko na bokonzi na ye.—1 Bak. 15:​11-13; 2 Nt. 14:​2-5.

e Kutu, mibeko mibale ya liboso na Mobeko ya Moize epekisaki kosambela moto to eloko mosusu, esengelaki kosambela kaka Yehova.—Kob. 20:​1-6.

f NDIMBOLA YA BILILINGI: Nkulutu ya elenge azali kopesa ndeko moko toli na oyo etali komɛla masanga. Ndeko yango andimi toli na komikitisa nyonso, asali mbongwana oyo esengeli, mpe akobi kosalela Yehova na bosembo.