Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 27

Mekolá ezaleli ya koyika mpiko ya Yehova

Mekolá ezaleli ya koyika mpiko ya Yehova

“Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokobikisa milimo na bino.”​—LUKA 21:19.

LOYEMBO 114 “Tózala na motema molai”

NA MOKUSE *

1-2. Ndenge nini maloba oyo ezali na Yisaya 65:16, 17, ezali kolendisa biso mpo tókoba koyika mpiko?

LIYANGANI ya etúká ya mobu 2017 ezalaki na motó ya likambo “Kotika te!” Liyangani yango esalisaki biso tóyeba ndenge oyo tokoki koyikela mikakatano na biso mpiko. Eleki sikoyo mbula minei banda liyangani yango esalemaki, mpe tozali kaka koyika mpiko na mikakatano ya bomoi na mokili oyo.

2 Makambo nini ozali koyikela mpiko mikolo oyo? Liwa ya moninga to ya ndeko moko ya libota? Ozali kobɛla maladi moko mabe? Bomoi ekómeli yo bololo lokola ozali kokóma mobange? Makama oyo ebimaka yango moko, mobulu to botɛmɛli? To mpe makambo mabe oyo maladi mabe ebimisi, na ndakisa Coronavirus? Tozelaka na mposa makasi mokolo oyo tokobosana makambo yango mpe ekoya lisusu na motema te!​—Tángá Yisaya 65:16, 17.

3. Makambo nini tosengeli kosala sikoyo, mpe mpo na nini?

3 Bomoi na mokili oyo ezali mpenza mpasi. Mpe tóyeba ete na mikolo ezali koya, tokoki kokutana na mikakatano mingi mpenza. (Mat. 24:21) Na yango, tosengeli koyekola ndenge ya kokoba koyika mpiko. Mpo na nini? Mpo Yesu alobaki: “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokobikisa milimo na bino.” (Luka 21:19) Soki tokanisi ndenge bato mosusu bazali koyika mpiko na mikakatano oyo ekokani na oyo ya biso, yango ekopesa biso makasi ya kokoba koyika mpiko.

4. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azali ndakisa eleki malamu na likambo etali koyika mpiko?

4 Yehova Nzambe nde azali ndakisa eleki malamu na likambo etali koyika mpiko. Yango ekamwisi yo? Mbala mosusu. Kasi soki okanisi malamu, okomona ete esengeli kokamwisa yo te. Satana Zabolo nde azali koyangela mokili oyo. Yango wana mikakatano etondi na mokili. Yehova azali na nguya ya kosilisa mikakatano yango mbala moko, kasi azali naino kozela tii mokolo oyo atyá ekoka. (Rom. 9:22) Kasi liboso mokolo yango ekoka, Nzambe na biso azali kokoba koyika mpiko. Tiká totalela makambo libwa oyo Yehova azali koyikela mpiko.

MAKAMBO OYO YEHOVA AYIKELAKA MPIKO

5. Ndenge nini basambwisaki nkombo ya Nzambe, mpe oyokaka ndenge nini mpo na yango?

5 Ndenge oyo basambwisá nkombo na ye. Yehova alingaka nkombo na ye mpe azalaka na mposa ete moto nyonso apesa yango lokumu. (Yis. 42:8) Kasi, na boumeli ya mbula soki 6 000, nkombo na ye esambwe mpenza. (Nz. 74:10, 18, 23) Likambo yango ebandaki na elanga ya Edene, ntango Zabolo (oyo elimboli “moto oyo akoselaka bato makambo”) afundaki Nzambe ete azalaki kopimela Adama ná Eva likambo moko oyo basengelaki na yango mpo bázala na esengo. (Eba. 3:1-5) Kobanda wana tii lelo, bafundaka Yehova ete apimelaka bato makambo oyo basengeli na yango mpenza. Yesu atungisamaki mingi ndenge nkombo ya Tata na ye ezalaki kosambwa. Yango wana ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.”​—Mat. 6:9.

6. Mpo na nini Yehova atiki ntango eleka liboso asilisa ntembe na likambo etali boyangeli na ye?

6 Ndenge oyo batɛmɛlaka lolenge na ye ya koyangela. Yehova nde abongi koyangela likoló ná mabele, mpe lolenge na ye ya koyangela nde eleki malamu. (Em. 4:11) Kasi Zabolo atindaki baanzelu mpe bato bákanisa ete Nzambe azali na lotomo wana te. Esɛngi ntango eleka mpo Yehova asilisa ntembe oyo babɛtɛlaki lotomo oyo azali na yango ya koyangela bato. Na bwanya nyonso, Nzambe atiki ntango mpo mokili mobimba emona ete soki bato bamiyangeli bango moko bakolonga te. Mozalisi nde abongi koyangela bango! (Yir. 10:23) Motema molai ya Nzambe ekosala ete likambo yango ekatama mbala moko mpe mpo na libela. Moto nyonso akoyeba ete boyangeli ya Yehova nde eleki malamu mpe ete Bokonzi na ye ekotya kimya mpe libateli ya solosolo awa na mabele.

7. Banani batombokelaki Yehova, mpe akosala bango nini?

7 Ndenge oyo bana na ye mosusu batombokelaki ye. Yehova akelaki bikelamu ya elimo mpe bato na ndenge ya kokoka mpe bazalaki ata na mbeba moko te. Kasi na nsima, Satana (oyo elimboli “Motɛmɛli”) atindaki Adama ná Eva, oyo bazalaki bato ya kokoka, bápesa Yehova mokɔngɔ. Baanzelu mpe bato mosusu basanganaki mpe na botomboki yango. (Yuda 6) Na nsima, ata bato ya Yisraele, ekólo oyo Nzambe aponaki, baboyaki ye mpe bakómaki kosambela banzambe ya lokuta. (Yis. 63:8, 10) Yehova amiyokaki ete batɛki ye mpenza. Kobanda ntango wana, azali kokoba koyika mpiko tii ntango ekokoka mpo aboma batomboki nyonso. Na nsima, Yehova elongo na basaleli na ye sembo bakosepela mpo bakoyika lisusu mpiko te na makambo mabe ya mokili oyo!

8-9. Makambo nini ya lokuta bato balobaka mpo na Yehova, mpe ndenge nini tokoki komonisa ete ezali lokuta?

8 Ndenge oyo Zabolo azali kokoba kokosela ye makambo. Satana afundaki Yobo, oyo azalaki mosaleli ya sembo ya Yehova, mpe alobaki ete basaleli nyonso ya sembo ya Yehova basalelaka ye kaka mpo na matomba na bango moko. (Yobo 1:8-11; 2:3-5) Tii lelo oyo, Zabolo azali kokoba kofunda bato ndenge wana. (Em. 12:10) Tokomonisa ete Satana azali mobuki-lokuta soki tozali koyika mpiko na mikakatano na biso mpe totikali sembo epai ya Yehova mpo tolingaka ye. Ndenge moko na Yobo, Yehova akopambola biso soki toyiki mpiko.​—Yak. 5:11.

9 Satana asalelaka bakonzi ya mangomba ya lokuta mpo na koteya bato ete Yehova azali motema mabe mpe abimiselaka bato mpasi. Bakonzi ya mangomba mosusu balobaka kutu ete soki bana mike bakufi, Nzambe nde azwaka bango mpo azalaka na mposa ya baanzelu mosusu mingi kuna na likoló. Yango efingisaka mpenza nkombo ya Nzambe! Kasi toyebi ete Yehova azali Tata ya bolingo. Ntango tozali kobɛla maladi moko makasi to moto moko oyo tolingaka akufi, tolobaka soki moke te ete ezali foti ya Nzambe. Kutu tozalaka nde na kondima ete na mikolo ezali koya, akolongola maladi mpe akosekwisa bato oyo bakufá. Toyebisaka moto nyonso oyo asepeli koyoka biso ete Yehova azali Nzambe ya bolingo. Yango esalaka ete Yehova apesa eyano ya malamu epai na moto oyo atumolaka ye.​—Mas. 27:11.

10. Nzembo 22:23, 24 emonisi nini mpo na Yehova?

10 Ndenge oyo basaleli na ye oyo alingaka mingi bazali konyokwama. Yehova azali Nzambe ya motema mawa. Esalaka ye mpasi mingi ntango ayokaka biso tozali kolela mpo na minyoko, botɛmɛli, maladi to mpe mabunga na biso. (Tángá Nzembo 22:23, 24.) Yehova ayebi mpasi na biso. Azalaka na mposa makasi ya kosilisa yango, mpe akosala yango. (Talá mpe Kobima 3:7, 8; Yisaya 63:9.) Mosika te, “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na [biso], mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”​—Em. 21:4.

11. Yehova ayokaka ndenge nini mpo na basaleli na ye ya sembo oyo bakufá?

11 Ndenge oyo akabwaná na baninga na ye oyo bakufá. Yehova ayokaka ndenge nini mpo na basaleli na ye ya sembo oyo bakufá? Azalaka na mposa makasi ya komona bango lisusu! (Yobo 14:15) Kanisá ndenge oyo Yehova azalaka na mposa ya komona lisusu moninga na ye Abrahama! (Yak. 2:23) To mpe ya komona lisusu Moize, moto oyo bazalaki ‘koloba na ye mpenza boye na miso’? (Kob. 33:11) Mpe kanisá ndenge oyo azalaka na mposa makasi ya koyoka Davidi ná bakomi mosusu ya nzembo bazali koyemba banzembo kitoko mpo na kokumisa ye! (Nz. 104:33) Atako baninga yango ya Nzambe bakufá, Yehova abosaná bango te. (Yis. 49:15) Ayebi malamumalamu ata makambo ya mikemike ya bomoto na bango. Biblia elobi “epai na ye bango nyonso bazali na bomoi.” (Luka 20:38) Mokolo mosusu, akozongisa bango na bomoi, mpe akoyoka mabondeli na bango oyo euti na motema mpe akondima losambo na bango. Soki obungisá ndeko moko na liwa, maloba oyo ekoki kokitisa yo motema mpe kobɔndisa yo.

12. Makambo nini epesaka mpenza Yehova mawa na mikolo mabe oyo ya nsuka?

12 Ndenge oyo basali-mabe banyokolaka bato. Ntango botomboki ebandaki na elanga ya Edene, Yehova ayebaki ete makambo ekobeba mpenza liboso ete ebonga. Yehova ayinaka makambo ya mabe, kozanga bosembo, mpe mobulu oyo ezali na mokili lelo oyo. Atyaka likebi na ye mingimingi epai ya bato oyo bazali makasi te, na ndakisa, bato oyo bakoki te komibatela bango moko, lokola bitike mpe basi oyo mibali bakufá. (Zek. 7:9, 10) Yehova ayokaka mpasi mingi ntango amonaka bazali konyokola basaleli na ye ya sembo mpe kotya bango na bolɔkɔ. Yebá ete alingaka baoyo nyonso bazali koyika mpiko elongo na ye.

13. Ezaleli nini ya mbindo etondi na mokili lelo oyo, mpe Nzambe akosala nini mpo na yango?

13 Ndenge oyo bizaleli ya bato ezali kobeba se kobeba. Nzambe akelaki bato mpo bámekolaka ye, kasi Satana alukaka kotinda bango básala makambo ya mabe. Ntango Yehova “amonaki ete mabe ya moto ezalaki mingi” na mikolo ya Noa, “ayokaki mawa mpo asalaki bato na mabele, mpe ayokaki mpasi na motema na ye.” (Eba. 6:5, 6, 11) Makambo ebongi kobanda ntango wana? Te! Satana asepelaka mingi ndenge makambo ya pite epalangani mingi na mokili, na ndakisa, kosangisa nzoto kati na mibali na mibali mpe basi na basi! (Ef. 4:18, 19) Satana asepelaka mingi ntango bato oyo basambelaka Yehova basali lisumu ya monene. Ntango motema molai ya Yehova ekokóma na nsuka, akoboma bato nyonso oyo basalaka pite mpe baboyi kobongola motema; na ndenge yango akomonisa polele ete asepelaka soki moke te na makambo yango.

14. Makambo nini bato bazali kosalela mabele mpe banyama?

14 Ndenge oyo bato bazali kobebisa biloko oyo akelá. Moto asuki kaka te na ‘koyangela moto mpo na komonisa ye mpasi,’ kasi azali mpe kobebisa mabele mpe kosilisa banyama oyo Yehova apesaki ye mokumba ya kobatela yango. (Mos. 8:9; Eba. 1:28) Bato mosusu ya mayele balobi ete na bambula oyo ezali koya, makambo oyo bato bazali kosala ekoki kolimwisa milio moko ya mitindo mosusu ya bikelamu na mabele. Tosengeli kokamwa te ndenge bato bazali kobanga mpo na bomoi ya bikelamu oyo ezali awa na mabele! Likambo ya esengo, Yehova alaki ete ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele’ mpe akokómisa mabele mobimba paradiso.​—Em. 11:18; Yis. 35:1.

NDENGE OYO YEHOVA AZALI KOYIKA MPIKO ETEYI BISO NINI?

15-16. Nini esengeli kotinda biso tóyika mpiko elongo na Yehova? Pesá ndakisa.

15 Kanisá makambo nyonso ya mpasi oyo Tata na biso ya likoló ayikelaka mpiko banda bambula mingi. (Talá etanda “ Makambo oyo Yehova ayikelaka mpiko.”) Yehova akokaki koboma mokili oyo banda kala, kasi motema molai na ye ememeli biso mapamboli mingi! Tózwa ndakisa oyo: Kanisá ete monganga ayebisi mwasi moko ya zemi ná mobali na ye ete mwana na bango azali na maladi moko makasi mpe ntango akobotama, akozala na bomoi moko ya mpasi mpe akokufa noki. Kasi ntango mwana yango abotami, baboti basepeli atako kobɔkɔla ye ekozala mpasi mpo na bango. Lokola balingaka ye, bakosala nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa ye azala na bomoi ya malamu.

16 Ndenge moko mpe, ntango bakitani nyonso ya Adama ná Eva babotamaka, bazalaka bato ya kozanga kokoka. Atako bongo, Yehova alingaka bango mpe akokisaka bamposa na bango. (1 Yoa. 4:19) Na kokesana na baboti oyo tolobeli na ndakisa na biso, Yehova akoki kosilisa bampasi na biso. Atyá mokolo moko oyo akosilisa bampasi nyonso ya bato. (Mat. 24:36) Bolingo oyo Yehova amoniselaka biso, esengeli kotinda biso tókoba koyika mpiko elongo na ye, boye te?

17. Ndenge nini makambo oyo Baebre 12:2, 3 elobi mpo na Yesu ezali kolendisa biso tókoba koyika mpiko?

17 Yehova azali ndakisa eleki malamu na likambo etali koyika mpiko. Yesu mpe amekolaki ezaleli ya koyika mpiko ya Tata na ye. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, ayikaki mpiko na mikakatano ndenge na ndenge, na ndakisa, maloba mabe, nsɔni, mpe nzete ya mpasi. Asalaki bongo mpo na bolamu na biso. (Tángá Baebre 12:2, 3.) Na ntembe te, ndakisa ya Yehova ya koyika mpiko epesaki Yesu makasi ya koyika mpiko. Yango ekoki mpe kopesa biso makasi.

18. Ndenge nini 2 Petro 3:9 esalisi biso tómona makambo oyo motema molai ya Yehova ezali kokokisa?

18 Tángá 2 Petro 3:9. Yehova ayebi ntango oyo eleki malamu mpo na kosukisa mokili oyo mabe. Motema molai ya Yehova epesi bato mingi libaku ya koyeba ye; mpe lelo oyo ebele mpenza ya bato bazali kosambela ye. Bango nyonso basepelaka ndenge Yehova azelaki ntango molai mpo bábotama, báyekola kolinga ye, mpe bámipesa epai na ye. Ntango Yehova akopesa mbano na bamilio ya bato oyo bakoyika mpiko tii na nsuka, ekomonana polele ete ekateli oyo azwaki ya koyika mpiko ezalaki mpenza malamu!

19. Tosengeli kozwa ekateli ya kosala nini, mpe mbano nini tokozwa?

19 Ndakisa ya Yehova eteyi biso ndenge ya koyika mpiko na esengo. Atako makambo nyonso ya mawa mpe ya mpasi oyo Satana abimisaka, Yehova azali kaka “Nzambe ya esengo.” (1 Tim. 1:11) Biso mpe tokoki kokoba kozala na esengo wana tozali kozela na motema molai ete Yehova asantisa nkombo na ye, alongisa lotomo na ye ya koyangela, asukisa mabe nyonso, mpe asilisa mikakatano na biso nyonso. Koyeba ete Tata na biso ya likoló ayikaka mpe mpiko, esengeli kolendisa biso mpe kotinda biso tózwa ekateli ya kokoba koyika mpiko. Soki tosali bongo, maloba oyo ekokokisama mpo na biso: “Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama, mpo lokola akokóma moto oyo andimami akozwa motole ya bomoi, oyo Yehova alakaki baoyo bazali kokoba kolinga ye.”​—Yak. 1:12.

LOYEMBO 139 Omimona na mokili ya sika

^ par. 5 Biso nyonso tozalaka na mikakatano. Sikoyo tozali ata na likambo moko te oyo tokoki kosala mpo na kosilisa yango nyonso. Tosengeli kaka koyika mpiko. Kasi tozali biso moko te. Yehova mpe azali koyika mpiko na makambo mingi. Na lisolo oyo, tokolobela makambo libwa oyo Yehova azali koyikela mpiko. Lisusu, tokolobela makambo ya malamu oyo emonani mpo Yehova azali koyika mpiko mpe matomba oyo tokoki kozwa na ndakisa na ye.