LISOLO YA BOYEKOLI 23
Koboma te “mɔtɔ ya Yah”
“Kopela [ya bolingo] ezali kopela ya mɔtɔ, mɔtɔ ya Yah.”—LOY. 8:6.
LOYEMBO 131 “Oyo Nzambe akangisi esika moko”
NA MOKUSE a
1. Ndenge nini Biblia elobeli bolingo ya solosolo?
“KOPELA [ya bolingo] ezali kopela ya mɔtɔ, lolemo ya mɔtɔ ya Yah. Mai mingi ekoki kozimisa bolingo te, bibale mpe ekoki komema yango te.” b (Loy. 8:6, 7) Wana nde lolenge malamu mpenza ya kolobela bolingo! Maloba yango ezali mpenza na makambo ya kolendisa mpo na babalani: Bokoki kolingana makasi mpenza.
2. Mwasi ná mobali basengeli kosala nini mpo bolingo na bango ekita te?
2 Mwasi ná mobali basengeli kosala milende mpo bolingo na bango eumela ntango nyonso oyo bakozala na bomoi. Na ndakisa, mpo mɔtɔ ebomama te, esengeli ntango nyonso kobakisaka nkoni to makala. Soki moto azali kokipe yango te, nsukansuka mɔtɔ yango ekokufa. Ndenge moko mpe, mwasi ná mobali bakobatela bolingo na bango mpo na libela soki kaka bazali kokómisa yango makasi. Na bantango mosusu, mwasi ná mobali bakoki komona ete bolingo na bango ekómi kokita, mingimingi soki bakómi na mikakatano ya mbongo, ya nzoto, to mpe ya kobokola bana. Na yango soki obalá, okoki kosala nini mpo “mɔtɔ ya Yah” ebomama te na libala na yo? Na lisolo oyo, tokolobela makambo misato ya kosala mpo na kobatela bolingo na bino makasi mpe kozala na libala ya esengo. c
BÓKOBA KOKÓMISA MAKASI BOYOKANI NA BINO NÁ YEHOVA
3. Ndenge nini kozala na boyokani malamu ná Yehova esalisaka mwasi ná mobali mpo bolingo na bango ezala makasi? (Mosakoli 4:12) (Talá mpe elilingi.)
3 Mpo “mɔtɔ ya Yah” ebomama te, mwasi ná mobali basengeli kosala makasi bázala na boyokani malamu elongo na Yehova. Ndenge nini kozala na boyakani malamu ná Yehova ekosalisa bango na libala? Soki mwasi ná mobali bazali kozwa boyokani na bango ná Tata na bango ya likoló na motuya mingi, bakosalela na motema mobimba toli oyo azali kopesa bango, mpe yango ekosalisa bango báboya mpe bálonga mikakatano oyo ekoki kosala ete bolingo na bango ekita. (Tángá Mosakoli 4:12.) Bato ya elimo basalaka makasi bámekola Yehova mpe bámonisa bizaleli na ye, na ndakisa, boboto, motema molai, mpe ezaleli ya kolimbisa. (Ef. 4:32–5:1) Soki mwasi ná mobali bazali komonisa bizaleli yango, ekozala mpasi te mpo bolingo na bango ekola. Ndeko mwasi moko na nkombo Lena, oyo asali mbula koleka 25 na libala alobi boye, “Ezalaka mpasi te kolinga mpe komemya moto ya elimo.”
4. Mpo na nini Yehova aponaki Maria ná Yozefe bázala baboti ya Masiya?
4 Tótalela ndakisa moko ya Biblia. Ntango Yehova asengelaki kopona mwasi ná mobali moko oyo bakozala baboti ya Masiya, aponaki Yozefe ná Maria, na kati ya bakitani mingi ya Davidi. Mpo na nini? Bango nyonso mibale bazalaki na boyokani ya malamu elongo na Yehova, mpe Yehova ayebaki ete bakotya ye na esika ya liboso na libala na bango. Mateya nini bino babalani bokoki koyekola epai ya Maria ná Yozefe?
5. Liteya nini mibali bakoki kozwa epai ya Yozefe?
5 Yozefe asalelaki malako oyo Yehova apesaki mpe yango esalaki ete azala mobali ya malamu. Mbala soki misato mobimba, Yehova apesaki ye malako na oyo etali libota na ye. Na mbala nyonso, atosaki na motema na ye mobimba, ata na ntango oyo esɛngaki ete asala bambongwana. (Mat. 1:20, 24; 2:13-15, 19-21) Kotosa malako ya Yehova esalisaki Yozefe abatela Maria, apesa ye mabɔkɔ mpe akokisa bamposa na ye. Meká kokanisa ndenge makambo oyo Yozefe asalaki esalisaki Maria alinga ye mingi mpe amemya ye! Mibali, bokoki komekola Yozefe soki bozali koluka batoli ya Biblia mpo na kokokisa bamposa ya libota na bino. d Soki bosaleli batoli yango, ata soki esɛngi ete bósala bambongwana, bokomonisa ete bolingaka basi na bino mpe bokokómisa libala na bino makasi. Ndeko mwasi moko oyo afandaka na Vanuatu, oyo eleki sikoyo mbula 20 banda abalá, alobi boye: “Ntango mobali na ngai alukaka mpe asalelaka malako oyo Yehova azali kopesa, yango esalaka ete namemya ye lisusu mingi. Namonaka ete nabatelami, mpe nandimaka bikateli oyo azwaka.”
6. Ndakisa ya Maria ekoki koteya basi nini?
6 Maria azalaki na boyokani ya ye moko elongo na Yehova; mpe kondima na ye esimbamaki te na makambo oyo Yozefe azalaki kosala. Ayebaki Makomami malamu mpenza. Azalaki mpe kozwa ntango mpo na komanyola. (Luka 2:19, 51) Na ntembe te, boyokani oyo Maria azalaki na yango elongo na Yehova esalaki ete azala mwasi malamu mpenza. Lelo oyo, basi mingi mpe basalaka makasi bámekola Maria. Na ndakisa, ndeko mwasi moko na nkombo Emiko alobi boye: “Ntango nazalaki monzemba, nazalaki na programɛ na ngai moko ya makambo ya elimo. Kasi nsima ya kobala, namonaki ete lokola mobali na ngai azalaki kobondela mpo na biso mpe kotambwisa makambo ya elimo, nakómaki kaka kodiembela nsima na ye. Na nsima, nayaki komona ete ngai moko mpe nasengelaki kokómisa boyokani na ngai ná Yehova makasi. Sikoyo namityelá ntango ya kozala ngai moko elongo na Nzambe na ngai, elingi koloba, kobondela, kotánga Biblia, mpe komanyola na makambo oyo nazali kotánga.” (Gal. 6:5) Basi, wana bozali kokoba kokolisa boninga na bino elongo na Yehova, mibali na bino bakokumisa bino mpe bakolinga bino mingi.—Mas. 31:30.
7. Liteya nini babalani bakoki koyekola epai ya Maria ná Yozefe na likambo etali kosambela Yehova elongo?
7 Maria ná Yozefe bapesanaki mpe mabɔkɔ mpo na kokómisa boyokani na bango ná Yehova makasi. Bayebaki ntina ya kosambela Yehova elongo na libota. (Luka 2:22-24, 41; 4:16) Ekokaki kozala mpasi kosala bongo, mingimingi ntango bakómaki na bana mingi, kasi basalaki yango. Oyo nde ndakisa malamu mpenza mpo na babalani ya lelo oyo! Soki ozali na bana, ndenge Maria ná Yozefe bazalaki na bango, ekoki kozala mpasi koyangana na makita, to mpe kotya ntango mpo na losambo na kati ya libota. Ekoki kutu kozala mpasi mingi kozwa ntango mpo na koyekola mpe kobondela elongo. Kasi bóbosana te ete, soki bozali kosambela Yehova elongo, yango ekosalisa bino bópusana penepene na ye mpe bolingo na bino ekokóma makasi. Yango wana, bótyaka losambo ya Yehova na esika ya liboso.
8. Likambo nini mwasi ná mobali oyo bazali kokutana na mikakatano na libala na bango bakoki kosala mpo losambo na kati ya libota esalisa bango?
8 Bokoki kosala nini soki bozali kokutana na mikakatano na libala na bino? Kofanda elongo mpo na kosala losambo na kati ya libota ekoki kozala mpasi. Soki ezali bongo, ekozala malamu bóbanda naino koyekola mwa masolo ya mikuse oyo esepelisaka, oyo bino nyonso bokosepela kolobela. Makambo yango ekoki kokómisa boyokani na bino makasi mpe mposa na bino ya kosala makambo ya elimo elongo.
BÓLEKISAKA NTANGO ELONGO
9. Mpo na nini mwasi ná mobali basengeli kolekisaka ntango elongo?
9 Babalani, bokoki mpe kobatela bolingo na bino makasi soki bozali kolekisa ntango elongo. Soki bosali bongo, yango ekosalisa bino bóyeba makambo oyo mokomoko na bino azali kokanisa mpe ndenge oyo azali komiyoka. (Eba. 2:24) Talá makambo oyo Lilia ná Ruslanda bayaki koyeba nsima ya kobalana, eleki sikoyo mbula koleka 15. Lilia alobi boye: “Tokanisaki te ete tokoumela bongo. Tozalaki kolekisa ntango mingi na mosala ya mosuni, ya ndako, mpe na nsima kobatela bana na biso. Tomonaki ete soki tomityeli ntango te ya kolekisa elongo, bolingo na biso ekozala lisusu makasi te.”
10. Ndenge nini babalani bakoki kosalela toli oyo ezali na Baefese 5:15, 16?
10 Babalani basengeli kosala nini mpo bálekisaka ntango elongo? Ekoki kosɛnga bótya ntango to programɛ ya kozala elongo bino mibale. (Tángá Baefese 5:15, 16.) Ndeko mobali moko na nkombo Uzondu na Nigeria alobi boye: “Ntango nazali kotya programɛ ya makambo oyo nakosala, nabosanaka te kotya mpe ntango oyo nasengeli kolekisa ná mwasi na ngai, mpe natyaka yango na esika ya liboso.” (Flp. 1:10) Tótala ndenge Anastasia, mwasi ya mokɛngɛli ya zongazonga moko na Moldavie, asalelaka malamu ntango na ye. Alobi boye: “Nasalaka makasi nasala makambo na ngai moko ntango mobali na ngai azali kosala makambo na ye ya lisangá. Kosala bongo, esalisaka biso tólekisa ntango biso mibale na nsima.” Kasi, bokosala nini soki programɛ na bino ezali te kopesa bino libaku ya kolekisaka ntango elongo?
11. Misala nini Akila ná Prisile bazalaki kosala elongo?
11 Mwasi ná mobali bakoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya Akila ná Prisile, babalani oyo bakristo mingi na siɛklɛ ya liboso bazalaki komemya. (Rom. 16:3, 4) Atako Biblia elobeli makambo mingi te oyo etali libala na bango, kasi emonisi ete bango mibale basalaki elongo na mosala ya kosakola, na kosalisa bato, mpe na misala mosusu. (Mis. 18:2, 3, 24-26) Kutu, na Biblia okokuta esika moko te batángi nkombo ya Akila kozanga kotánga mpe nkombo ya Prisile.
12. Mwasi ná mobali bakoki kosala nini mpo bálekisaka ntango mingi elongo? (Talá mpe elilingi.)
12 Ndenge nini babalani bakoki kolanda ndakisa ya Akila ná Prisile? Kanisá makambo mingi oyo yo ná molongani na yo bosengeli kosala. Bokoki kosala makambo yango bino mibale na esika moto moko kaka nde asala yango? Na ndakisa, Akila ná Prisile bazalaki kosakola elongo. Bino mpe bobongisaka mbala na mbala programɛ mpo na kosakola elongo? Akila ná Prisile basalaki mpe mosala elongo. Mbala mosusu yo ná molongani na yo bosalaka mosala moko te, kasi bokoki kosala misala mosusu ya ndako elongo. (Mos. 4:9) Ntango bozali kopesana mabɔkɔ mpo na kosala misala lokola wana, bokomona ete bozali mpenza ekipi mpe bokozala na libaku ya kosolola mingi. Robert ná Linda basali mbula koleka 50 na libala. Robert alobi boye: “Mpo na koloba solo, tozalaka mpenza na ntango mingi te ya kominanola elongo. Kasi ntango nazali kosokola basaani mpe mwasi na ngai azali kopangwisa yango, to ntango nazali kosala mosala ya bilanga mpe mwasi na ngai ayei pembeni na ngai, nayokaka esengo makasi. Kosala elongo ndenge wana esalisaka biso tózala na bomoko. Bolingo na biso ezali kokoba kokola.”
13. Mpo mwasi ná mobali bázala mpenza na bomoko, basengeli kosala nini?
13 Kasi, bóbosana te, kozala elongo kaka te nde ekosala ete bózala na bomoko. Mwasi moko na Brésil alobi boye: “Lokola Mikolo oyo makambo ya kolekisela ntango ekómá mingi, okoki kokwea na motambo ya kokanisa ete lokola bofandaka ndako moko, yango elakisi ete bolekisaka ntango elongo. Nayei koyeba ete kaka kofanda esika moko ekoki te, nasengeli mpe kotyelaka molongani na ngai likebi na ndenge esengeli.” Talá oyo Bruno ná mwasi na ye, Tays, basalaki mpo bátyelanaka mpenza likebi. Bruno alobi boye: “Ntango tozali kopema elongo, totyaka batelefone na biso mosika, yango esalaka ete tólekisa ntango biso mibale.”
14. Mwasi ná mobali bakoki kosala nini soki basepelaka te kolekisa ntango elongo?
14 Bongo soki yo ná molongani na yo bosepelaka te kolekisa ntango elongo? Mbala mosusu mpo bosepela na makambo moko te, to mpe bosilikisanaka. Okoki kosala nini soki ezali bongo? Kanisá lisusu ndakisa ya mɔtɔ oyo tolobelaki na ebandeli. Epelaka makasi mbala moko te na ebandeli. Esɛngaka kotya nkoni malɛmbɛmalɛmbɛ tii ekopela makasi. Ndenge moko mpe, ekoki kosɛnga bóbanda kolekisaka mwa ntango moke mokolo na mokolo. Bósalaka mwa eloko oyo ekoki kosepelisa bino mibale, kasi te oyo ekoki kosilikisa moninga. (Yak. 3:18) Soki bosali bongo, bolingo na bino ekoki kokóma makasi.
BÓSALELANAKA MAKAMBO NA LIMEMYA
15. Mpo na nini limemya ezali na ntina mingi mpo mwasi ná mobali bákoba kolingana?
15 Limemya ezalaka na ntina mingi na libala. Ezali lokola mopɛpɛ oyo esalaka ete mɔtɔ epela makasi. Soki mopɛpɛ ezali te, mɔtɔ ekokufa noki. Ndenge moko mpe, soki bozali komoniselana limemya te na libala, bolingo na bino ekoki kosila noki mpenza. Longola yango, mwasi ná mobali oyo bazali kosala makasi mpo na komoniselana limemya, bakobatela bolingo na bango makasi. Kasi simbá ete, osengeli kaka te kokanisa ete omemyaka molongani na yo, kasi molongani na yo nde asengeli komiyoka ete omemyaka ye. Penny ná Aret basali mbula koleka 25 na libala. Penny alobi boye: “Lokola tomoniselanaka limemya biso mibale, bolingo na biso ekómi makasi. Tobangaka te kopesana makanisi mpo mokomoko na biso ayebaka ete moninga akozwa likanisi na ye na motuya.” Na yango, okoki kosala nini mpo molongani na yo amona ete omemyaka ye mpenza? Tótalela ndakisa ya Abrahama ná Sara.
16. Ndakisa ya Abrahama ekoki koteya mibali nini? (1 Petro 3:7) (Talá mpe elilingi.)
16 Abrahama azalaki kosalela Sara makambo na limemya. Azalaki koyoka na likebi makanisi ya Sara mpe kotalela mayoki na ye. Mokolo moko, Sara azalaki na nkanda, ayebisaki Abrahama ndenge azalaki komiyoka mpe apesaki kutu Abrahama foti mpo na likambo yango. Abrahama asilikelaki ye? Te. Ayebaki ete Sara azalaki mwasi ya komikitisa mpe azalaki kosalisa ye mingi. Abrahama ayokaki ye mpe alukaki kosilisa likambo yango. (Eba. 16:5, 6) Yango ekoki koteya biso nini? Mobali, ya solo ozali na bokonzi ya kozwa bikateli mpo na libota na yo. (1 Ko. 11:3) Kasi, soki oluki koyeba makanisi ya mwasi na yo liboso ozwa ekateli moko, mingimingi na makambo oyo etali ye, yango ekomonisa mpenza ete olingaka ye. (1 Ko. 13:4, 5) Na bantango mosusu, mwasi na yo akoki kozala na mawa mpe akoki kozala na mposa ya koyebisa yo ndenge azali komiyoka. Omityaka na esika na ye, elingi koloba, koyoka ye na likebi mpenza? (Tángá 1 Petro 3:7.) Angela ná Dmitry basali mbula pene na 30 na libala. Alobeli likambo oyo mobali na ye azalaki kosala mpo na komemya ye. Alobi boye: “Dmitry azalaka ntango nyonso pene mpo na koyoka ngai na likebi soki nasiliki to soki nalingi koloba. Amoniselaka ngai motema molai, ezala soki natomboki.”
17. Liteya nini basi bakoki kozwa na ndakisa ya Sara? (1 Petro 3:5, 6)
17 Sara azalaki komemya Abrahama na ndenge azalaki kopesa ye mabɔkɔ na bikateli oyo azalaki kozwa. (Eba. 12:5) Na libaku moko, Abrahama azwaki ekateli ya koyamba bapaya oyo bayaki na mbalakaka. Asɛngaki Sara atika makambo oyo azalaki kosala mpo asala mampa ebele. (Eba. 18:6) Sara andimaki mpe asalaki ndenge mobali na ye asɛngaki. Basi, bokomekola Sara soki bozali kopesa mibali na bino mabɔkɔ na bikateli oyo bazali kozwa. Soki bosali bongo, bokokómisa makasi libala na bino. (Tángá 1 Petro 3:5, 6.) Dmitry, oyo tolobeli na paragrafe eleki, alobeli ndenge mwasi na ye amoniselaka ye limemya. Alobi boye: “Nasepelaka na milende oyo Angela asalaka mpo na kondima bikateli oyo nazwaka, ata soki tozali na makanisi ndenge moko te. Ata soki na nsima makambo etamboli malamu te, apesaka ngai foti te.” Ya solo, ezalaka mpasi te kolinga moto oyo amemyaka yo!
18. Matomba nini babalani bakozwa soki bazali kosala milende mpo bolingo na bango ekoba kozala makasi?
18 Lelo oyo, Satana alingaka te ete babalani bakristo bákoba kolingana. Ayebi ete soki mwasi ná mobali bazali kolingana lisusu te, bakoki kobanda kokóma mosika na Yehova. Nzokande, bolingo ya solosolo esilaka te! Na yango, salá ete bolingo na kati ya libala na yo ezala lokola bolingo oyo elobelami na Loyembo ya Salomo. Zwá mokano ya kotya Yehova na esika ya liboso na libala na yo, lekisáká ntango elongo na molongani na yo, omityaka na esika na ye, mpe kokisáká bamposa na ye. Soki osali bongo, libala na yo ekopesa Yehova lokumu, oyo azali Liziba ya bolingo ya solosolo. Mpe kaka lokola mɔtɔ oyo ebatelami malamu, bolingo na bino ekoumela libela.
LOYEMBO 132 Sikoyo tokómi moto moko
a Yehova apesá bato likabo ya libala, oyo esalaka ete mwasi ná mobali bálingana makasi. Nzokande, na bantango mosusu, bolingo yango ekoki kokita. Soki obalá, lisolo oyo ekosalisa yo ná molongani na yo bóbatela makasi bolingo na bino mpe bózala na libala ya esengo.
b Bolingo ya solosolo, oyo ebongwanaka te mpe oyo eumelaka, ebengami “mɔtɔ ya Yah” mpamba te Yehova nde azali Mobandisi na yango.
c Ata soki molongani na yo azali mondimi te, makanisi misato oyo elandi ekoki kosalisa yo mpo bókómisa boyokani na bino makasi.—1 Ko. 7:12-14; 1 Pe. 3:1, 2.
d Na ndakisa, talá toli ya malamu mpenza oyo ezali na liste ya masolo “Lisalisi mpo na libota,” na site jw.org mpe na JW Library®.