Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 20

Bongisá lisusu ndenge na yo ya kobondela

Bongisá lisusu ndenge na yo ya kobondela

“Bósopa motema na bino liboso na ye.”​—NZ. 62:8.

LOYEMBO 45 Komanyola ya motema na ngai

NA MOKUSE a

Tokoki kopusana penepene na Yehova na nzela ya libondeli mpe kosɛnga ye atambwisa biso na makambo nyonso ya bomoi na biso (Talá paragrafe 1)

1. Likambo nini Yehova asɛngaka basaleli na ye? (Talá mpe elilingi)

 TOKOKI koluka libɔndisi mpe litambwisi epai ya nani? Eyano na motuna yango ezali polele. Tokoki kozwa litambwisi mpe libɔndisi epai ya Yehova na nzela ya libondeli. Kutu yango nde Yehova asɛngaka biso tósala. Alingi ete tóbondelaka ye mbala mingi to “ntango nyonso.” (1 Tes. 5:17) Tokoki kopusana penepene na ye na nzela ya libondeli mpe kosɛnga ye atambwisa biso na makambo nyonso ya bomoi na biso. (Mas. 3:5, 6) Lokola Yehova azali na boboto, atyelaka biso te ntango to mbala boni oyo tosengeli kobondelaka ye.

2. Tokotalela nini na lisolo oyo?

2 Tozwaka na motuya mingi libaku oyo Yehova apesá biso ya kobondela ye. Nzokande, lokola tozalaka na makambo mingi ya kosala, ekoki kokóma mpasi tózwa ntango ya kobondela. Tokoki mpe komona malamu tóbongisa lisusu ndenge na biso ya kobondela. Likambo ya esengo, Biblia epesi biso lisalisi mpe litambwisi oyo ebongi. Na lisolo oyo, tokotalela ndakisa ya Yesu mpo na koyeba ndenge ya komityela ntango mpo na kobondela. Tokolobela mpe makambo mitano ya ntina oyo ekosalisa biso tóbongisa lisusu lolenge na biso ya kobondela.

YESU AMITYELAKI NTANGO MPO NA KOBONDELA

3. Makambo nini Yesu ayebaki na oyo etali libondeli?

3 Yesu ayebaki ete Yehova azwaka na motuya mingi mabondeli na biso. Liboso aya awa na mabele, amonaki ndenge Tata na ye azalaki koyanola na mabondeli ya basi mpe mibali ya sembo. Yesu amonaki ndenge Tata na ye ayanolaki na mabondeli ya bato ya sembo, na ndakisa, Ana, Davidi, Eliya mpe basaleli mosusu ya sembo. (1 Sam. 1:10, 11, 20; 1 Bak. 19:4-6; Nz. 32:5) Yango wana, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mbala na mbala mpe na kondima.​—Mat. 7:7-11.

4. Mabondeli ya Yesu eteyi biso nini?

4 Mabondeli oyo Yesu asalaki epai ya Yehova, ezali ndakisa malamu oyo bayekoli na ye basengeli kolanda. Ntango azalaki awa na mabele, Yesu azalaki kobondela mbala na mbala. Asengelaki komityela ntango mpo na kobondela mpo azalaki na makambo mingi ya kosala mpe bato mingi bazalaki kolanda ye. (Mrk. 6:31, 45, 46) Azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpo azwa ntango ya kobondela na esika na ye moko. (Mrk. 1:35) Mokolo moko, abondelaki butu mobimba mpo na kozwa ekateli moko ya ntina mingi. (Luka 6:12, 13) Lisusu, abondelaki mbala mingi na butu liboso akufa, wana azalaki kokanisa mpasi oyo ezalaki kozela ye na nsuka ya mosala na ye awa na mabele.​—Mat. 26:39, 42, 44.

5. Ndenge nini tokoki komekola Yesu ntango tozali kobondela?

5 Ndakisa ya Yesu eteyi biso ete, ezala tozali na makambo mingi ya kosala, tosengeli komityela ntango mpo na kobondela. Lokola Yesu, ekoki kosɛnga tótya programɛ mpo na kobondelaka, mbala mosusu na ntɔngɔntɔngɔ to na butu liboso ya kolala. Soki tosali bongo, tokomonisa Yehova ete tozali na botɔndi mpo na likabo kitoko oyo apesá biso. Ndeko mwasi moko na nkombo Lynne, abosanaka te esengo oyo azalaki na yango ntango ayekolaki mpo na mbala liboso libaku kitoko oyo tozali na yango ya kobondela. Alobi boye: “Ntango nayekolaki ete nakoki kobondela Yehova ntango nyonso oyo nalingi, yango esalisaki ngai natalela ye lokola Moninga na ngai ya motema mpe yango epesaki ngai mposa nabongisa lisusu mabondeli na ngai.” Na ntembe te, mingi kati na biso mpe toyokaka bongo. Na yango, tiká tótalela makambo mitano ya ntina oyo tosengeli kobosanaka te kolobela na mabondeli na biso.

MAKAMBO MITANO OYO TOSENGELI KOBOSANA TE NTANGO TOZALI KOBONDELA

6. Na kotalela Emoniseli 4:10, 11, Yehova abongi kozwa nini?

6 Kumisá Yehova. Na emonaneli moko ya kokamwa, ntoma Yoane amonaki bankulutu 24 na likoló bazali kosambela Yehova. Bazalaki kokumisa Nzambe mpe koloba ete, “obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya.” (Tángá Emoniseli 4:10, 11.) Baanzelu ya sembo mpe bazali na bantina mingi ya kokumisa Yehova mpe ya kopesa ye nkembo. Bazalaka elongo na Yehova na likoló mpe bayebi ye malamu. Bamonaka bizaleli na ye na biloko oyo asalá. Ntango bamonaka makambo oyo Yehova asalaka, yango etindaka bango bákumisa ye.​—Yobo 38:4-7.

7. Tokoki kokumisa Yehova mpo na makambo nini?

7 Biso mpe tosengeli kokumisaka Yehova na mabondeli na biso, koyebisa ye makambo oyo tolingaka mpe oyo tosepelaka na yango epai na ye. Ntango ozali koyekola Biblia, luká koyeba bizaleli ya Yehova oyo osepelaka na yango mingi. (Yobo 37:23; Rom. 11:33) Na nsima, yebisá ye ndenge oyo omiyokaka mpo na bizaleli yango. Tokoki mpe kokumisa Yehova mpo asalisaka biso mpe bandeko na biso bakristo. Atyelaka biso likebi ntango nyonso mpe abatelaka biso.​—1 Sam. 1:27; 2:1, 2.

8. Tokoki kopesa Yehova matondi mpo na makambo nini? (1 Batesaloniki 5:18)

8 Pesá Yehova matondi. Tozali na bantina mingi ya kopesa Yehova matondi na libondeli. (Tángá 1 Batesaloniki 5:18.) Tokoki kopesa Yehova matondi mpo na biloko nyonso ya malamu oyo tozali na yango, kutu likabo nyonso ya malamu eutaka epai na ye. (Yak. 1:17) Na ndakisa, tokoki kopesa ye matondi mpo na mabele kitoko apesá biso mpe biloko ya kokamwa oyo asalá. Tokoki mpe komonisa botɔndi mpo na bomoi oyo apesá biso, libota, baninga, mpe elikya oyo tozali na yango. Tokopesa mpe Yehova matondi ndenge apesi biso libaku ya kozala na boninga malamu elongo na ye.

9. Mpo na nini tosengeli kokóma na botɔndi mingi mpo na Yehova?

9 Mbala mosusu ekosɛnga tósala milende mpo tókanisa mpenza malamu mpo tóyeba bantina oyo tosengeli komonisa botondi na biso epai ya Yehova. Lelo oyo, bato mingi bazalaka na botondi te. Mingi batyaka makanisi na bango kaka na oyo bazali na yango mposa na esika bámonisa botondi mpo na oyo bazali yango. Soki makanisi wana ekɔteli biso, yango ekosala ete ntango tozali kobondela tóbanda kaka kosɛnga na kosɛnga. Mpo makanisi ya ndenge wana ekɔteli biso te, tosengeli kokóma na botɔndi mingi mpe kokoba komonisa yango mpo na nyonso oyo Yehova asalaka mpo na biso.​—Luka 6:45.

Komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova ekoki kosalisa biso tóyika mpiko (Talá paragrafe 10)

10. Ndenge nini kozala na botɔndi esalisaki ndeko mwasi moko ayika mpiko? (Talá mpe elilingi)

10 Soki tozali komonisa botɔndi, yango ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano. Tótalela lisolo ya ndeko Kyung-sook, oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/01/2015. Bazwaki ye na kanser ya pumɔ. Alobaki boye: “Maladi yango ezalaki kolɛmbisa ngai nzoto mpenza. Nazali koyoka lokola nabungisaki nyonso, nazalaki kobanga makasi.” Nini esalisaki ye? Alobaki ete mpokwa nyonso liboso amata na mbeto, azalaki kokende na eteni ya likoló ya ndako na ye mpe azalaki kobondela na mongongo makasi, azalaki kolobela makambo mitano oyo mpo na yango asengelaki komonisa botɔndi na mokolo wana. Yango ezalaki kobɔndisa ye mpe kotinda ye amonisa bolingo mpo na Yehova. Amonaki mpenza ndenge Yehova asungaka basaleli na ye ya sembo na ntango ya mpasi, mpe ayaki koyeba ete mapamboli oyo tozalaka na yango ezali ebele koleka mikakatano na biso. Ndenge moko na ndeko Kyung-sook, biso mpe tozali na bantina ebele ya komonisa botɔndi epai ya Yehova ata soki tozali na mikakatano. Komonisa botɔndi na biso epai na ye na nzela ya libondeli ekoki kosalisa biso tóyika mpiko mpe tóbatela makanisi malamu.

11. Mpo na nini bantoma bazalaki na mposa ya mpiko ntango Yesu azongaki na likoló?

11 Sɛngá Yehova apesa yo mpiko ntango ozali kosakola. Liboso azonga na likoló, Yesu akundwelaki bayekoli na ye mokumba oyo bazwaki ya kopesa litatoli mpo na ye “na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8; Luka 24:46-48) Mwa moke na nsima, bakonzi ya Bayuda bakangaki ntoma Petro ná Yoane, mpe bamemaki bango liboso ya Sanedrina. Basɛngaki mibali wana ya sembo bátika kosakola mpe babangisaki bango. (Mis. 4:18, 21) Petro ná Yoane basalaki nini?

12. Na kotalela Misala 4:29, 31, bantoma basalaki nini?

12 Petro ná Yoane bayanolaki bankonzi yango ya mangomba ya Bayuda boye: “Soki ezali boyengebene na miso ya Nzambe ete tóyoka bino na esika ya koyoka Nzambe, bino moko bókata likambo. Kasi biso, tokoki kotika te kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.” (Mis. 4:19, 20) Ntango batikaki Petro ná Yoane, bantoma babondelaki Yehova na mongongo makasi mpo bákoba kosala mokano na ye. Babondelaki boye: “Pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza.” Yehova ayanolaki libondeli na bango oyo eutaki na motema.​—Tángá Misala 4:29, 31.

13. Ndakisa ya Jin-hyuk ekoki koteya biso nini?

13 Tokoki komekola bantoma soki tozali kokoba kosakola ata soki bakonzi ya Leta basɛngi biso tótika kosakola. Tótala ndakisa ya ndeko Jin-hyuk, oyo batyaki ye na bolɔkɔ mpo aboyaki kokɔta na mosala ya soda. Na bolɔkɔ, bapesaki ye mokumba ya kolandela bato ya bolɔkɔ mosusu oyo batyaki na esika na bango moko, kasi bapekisaki ye kosolola na bato yango makambo ya Biblia, asengelaki kaka kopesa bango biloko oyo bazalaki na yango mposa. Asɛngaki Yehova apesa ye mpiko mpe mayele mpo asakola na libaku nyonso oyo ekomonana. (Mis. 5:29) Alobi boye: “Yehova ayanolaki na mabondeli na ngai na ndenge apesaki ngai mpiko mpe bwanya mpo nayekola na bato Biblia mbala mingi na boumeli ya miniti mitano, kaka na baporte ya kasho. Mpe na butu, nazalaki kokoma mikanda oyo nazalaki kopesa baoyo tozalaki na bango bolɔkɔ moko na mokolo ekolanda.” Biso mpe tokoki kozala na elikya ete Yehova akosalisa biso tókokisa mokumba na biso ya kosakola. Ndenge moko na ndeko Jin-hyuk, tokoki kosɛnga Yehova apesa biso mpiko mpe bwanya.

14. Nini ekoki kosalisa biso ntango tozali na mikakatano? (Nzembo 37:3, 5)

14 Sɛngá Yehova asalisa yo oyika mpiko na mikakatano. Mingi kati na biso bazali konyokwama na maladi, mitungisi ya makanisi, liwa ya moto oyo tozalaki kolinga mingi, mikakatano na libota, monyoko, to mikakatano mosusu. Mpe bamaladi mabe, bitumba esali ete mikakatano yango ekóma lisusu mpasi mpo na koyikela yango mpiko. Yebisá Yehova ndenge ozali mpenza komiyoka. Yebisá ye makambo ozali kokutana na yango kaka ndenge olingaki koyebisa yango moninga na yo ya motema. Zalá na kondima ete Yehova “akosala.”​—Tángá Nzembo 37:3, 5.

15. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso ‘tóyika mpiko na bolɔzi’? Pesá ndakisa.

15 Kotingama na mabondeli ekosalisa biso ‘tóyika mpiko na bolɔzi.’ (Rom. 12:12) Yehova ayebi mikakatano oyo basaleli na ye bazali kokutana na yango, “akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.” (Nz. 145:18, 19) Kristie, ndeko moko ya mobongisi nzela, oyo azali na mbula 29 amonaki bosolo ya likambo yango. Akómaki kobɛla maladi moko ya makasi na mbalakaka. Yango esalaki ete akóma konyokwama na makanisi. Na nsima, azwaki nsango ete bakangi mama na ye na maladi moko oyo esengelaki koboma ye. Kristie alobi boye: “Mokolo na mokolo, nazalaki kobondela Yehova apesa ngai makasi oyo nasengelaki na yango. Nasalaki makasi nabatela mimeseno na ngai ya elimo, na ndakisa, koyangana na makita mpe boyekoli na ngai moko.” Abakisi boye: “Libondeli esalisaki ngai mingi mpenza na ntango wana ya mpasi. Koyeba ete Yehova azalaki elongo na ngai ezalaki kobɔndisa ngai mingi mpenza. Atako mikakatano na ngai esilaki mbala moko te, Yehova ayanolaki na mabondeli na ngai na ndenge apesaki ngai kimya ya motema mpe ya makanisi.” Na yango, tóbosanaka te ete “Yehova ayebi kosikola na komekama bato oyo bakangamaka na Nzambe.”​—2 Pe. 2:9.

Mpo na kolonga komekama, (1) bondelá Yehova asalisa yo, (2) salá makambo oyo eyokani na mabondeli na yo, mpe (3) kómisá boyokani na yo ná Yehova makasi (Talá paragrafe 16-17)

16. Mpo na nini tozali na mposa ya lisalisi ya Yehova mpo tólonga komekama?

16 Sɛngá Yehova asalisa yo okwea te soki omekami. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tobundaka ntango nyonso na mposa ya kosala mabe. Satana asalaka nyonso oyo akoki mpo tólonga te kosala malamu. Lolenge moko oyo asalelaka mpo na kobebisa makanisi na biso ezali kominanola ya mbindo. Kominanola ya ndenge wana ekoki kotondisa motó na biso na makanisi ya mbindo, mpe makanisi yango ekoki kokómisa biso mbindo liboso ya Yehova mpe kotinda biso tósala lisumu ya monene.​—Mrk. 7:21-23; Yak. 1:14, 15.

17. Nsima ya kobondela Yehova asalisa biso, tosengeli kosala nini mpo tókwea te na komekama? (Talá mpe elilingi ya ezipeli)

17 Mpo tólonga komekama mpe tósala oyo ezali malamu, tozali na mposa ya lisalisi ya Yehova. Yesu alobelaki likambo yango na libondeli ya ndakisa. Alobaki boye: “Salisá biso tókwea na komekama te, kasi bikisá biso na moto mabe.” (Mat. 6:13) Yehova azalaka na mposa ya kosalisa biso, kasi tosengeli naino kosɛnga ye yango. Tosengeli mpe kosala makambo oyo eyokani na libondeli na biso. Tosengeli kosala makasi tóboya kotánga mpe koyoka makanisi ya mabe oyo epanzani mingi na mokili ya Satana. (Nz. 97:10) Mpo tókɔtisa na makanisi na biso makambo ya malamu, tosengeli kotángaka mpe koyekolaka Biblia. Koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola ekosalisa biso mpe tóbatela makanisi na biso. Na ngala na ye mpe, Yehova alaki ete akotika te ete tómekama koleka ndelo.​—1 Ko. 10:12, 13.

18. Na oyo etali libondeli, biso nyonso tosengeli kosala nini?

18 Biso nyonso tosengeli kobondelaka mingi mpo tótikala sembo epai ya Yehova na mikolo oyo ya nsuka oyo etondi na mikakatano. Omityela ntango mpo na kobondelaka mikolo nyonso. Yehova alingi ete ‘tósopela ye motema na biso’ na nzela ya libondeli. (Nz. 62:8) Kumisáká mpe pesáká matondi mpo na nyonso oyo Yehova asalelaka yo. Sɛngá ye apesa yo mpiko na mosala ya kosakola. Bondelá ye asalisa yo oyika mpiko na mikakatano nyonso mpe olonga komekama nyonso oyo ozali kokutana na yango. Kotika te ete moto to eloko moko epekisa yo kobondela Yehova mbala na mbala. Kasi, ndenge nini Yehova ayanolaka na mabondeli na biso? Tokolobela motuna yango ya ntina mingi na lisolo oyo elandi.

LOYEMBO 42 Libondeli ya mosaleli ya Nzambe

a Tolingaka ete mabondeli na biso ezala lokola mokanda oyo moto akomeli moninga na ye na motema mobimba. Kasi kosomba ntango mpo na kobondela, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Mpe ekoki kozala mpasi tóyeba soki tokoloba nini na libondeli na biso. Lisolo oyo ekolobela makambo yango mibale ya ntina mingi.