Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 16

LOYEMBO 87 Yaká kozwa makasi!

Kopusana penepene na bandeko ezali malamu mpo na biso!

Kopusana penepene na bandeko ezali malamu mpo na biso!

“Talá! Ezali mpenza malamu mpe esengo ete bandeko báfanda na bomoko!”NZ. 133:1.

NA MOKUSE

Makanisi oyo ekoki kosalisa biso tópusana lisusu penepene ya bandeko na biso mpe ebele ya mapamboli oyo kosala boninga na bandeko ya lisangá epesaka.

1-2. Yehova atyaka likebi mingi na likambo nini, mpe alingi ete tósala nini?

 YEHOVA atyaka likebi mingi na ndenge oyo tosalelaka basusu makambo. Yesu ateyaki ete tosengeli kolinga bazalani na biso ndenge tomilingaka. (Mat. 22:​37-39) Yango esangisi kozala na boboto ata epai ya baoyo basalelaka Yehova te. Soki tozali komonisa boboto ya ndenge wana, tozali komekola Yehova Nzambe, oyo “abimisaka moi na ye mpo na bato mabe ná bato malamu mpe anɔkisaka mbula mpo na bato ya bosembo ná bato oyo bazangi bosembo.”—Mat. 5:45.

2 Atako Yehova alingaka bato nyonso, asepelaka mingimingi nde na baoyo batosaka ye. (Yoa. 14:21) Alingi tómekola ye. Yango wana alendisi biso ‘tólingana makasi’ na bandeko mpe tómoniselaka bango ‘bolingo ya motema.’ (1 Pe. 4:8; Rom. 12:10) Bolingo ya ndenge wana ezali lokola mayoki ya kokangama makasi na moto, oyo mbala mingi tozalaka na yango epai ya ndeko ya libota to moninga moko oyo tolingaka mingi.

3. Likambo nini tosengeli kobosana te na oyo etali bolingo?

3 Tosengeli kobosana te ete bolingo ezali lokola fololo oyo toloni; esɛngaka kokipe yango malamu mpo ekola. Ntoma Paulo apesaki bakristo toli oyo: “Bókoba kolingana ndenge bandeko balinganaka.” (Ebr. 13:1) Yehova alingi ete tókoba kobakisa bolingo oyo tozalaka na yango mpo na basusu. Lisolo oyo ekolobela ntina oyo tosengeli kopusana lisusu penepene ya bandeko na biso bakristo mpe ndenge oyo tokoki kokoba kosala yango.

MPO NA NINI TOSENGELI KOPUSANA LISUSU PENEPENE YA BANDEKO?

4. Ndenge emonisami na Nzembo 133:​1, ndenge nini tokoki kokoba kosepela na bomoko na biso ya bokristo? (Talá mpe bililingi.)

4 Tángá Nzembo 133:1. Tondimaka maloba ya mokomi ya nzembo oyo akomaki ete kozala moninga ya baoyo balingaka Yehova ezali “malamu” mpe “esengo.” Kasi kaka ndenge moto akoki kotika kotya likebi na nzete moko ya kitoko mpe ya monene mpo amonaka yango mikolo nyonso, ekoki kokóma ete tótika kotya likebi na kitoko ya bomoko na biso ya bokristo. Tomonaka bandeko na biso ya lisangá mbala mingi, ntango mosusu mbala ebele na kati ya pɔsɔ. Ndenge nini tokoki kokoba kozwa bango na motuya? Bolingo na biso mpo na bandeko ekokola soki tozali kozwa ntango ya kokanisa ndenge mokomoko azali na esika ya ntina na lisangá mpe na motema na biso.

Tóbosanaka ata moke te komona ndenge bomoko na biso ezali kitoko (Talá paragrafe 4)


5. Bolingo na biso ya bondeko ekoki kotinda basusu básala nini?

5 Bato mosusu oyo bayaka na makita na biso mpo na mbala ya liboso bakamwaka mingi mpenza ntango bamonaka bolingo oyo tomoniselanaka. Kaka mpo na yango, bakoki komindimisa ete bamoni solo. Yesu alobaki: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai: soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:35) Tótalela ndakisa ya Chaithra, mwana moko ya iniversite oyo akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Andimaki libyangi ya koya na liyangani moko ya etúká. Nsima ya koyangana mokolo ya liboso, alobaki na ndeko oyo azalaki koyekola na ye: “Baboti na ngai bayambá ngai ata mokolo moko te. Kasi na liyangani na bino, bayambi ngai mbala 52 kaka na mokolo moko! Namoni ete Yehova asaleli libota oyo ya elimo mpo na komonisa ngai ete alingaka ngai. Nalingi kokɔta na libota yango.” Chaithra akobaki kokola na elimo mpe azwaki batisimo na 2024. Ya solo, ntango bato ya sika bamonaka misala na biso ya malamu, kati na yango bolingo oyo tomoniselanaka, mbala mingi etindaka bango básalela Yehova.—Mat. 5:16.

6. Na ndenge nini kopusana penepene na bandeko na biso ekoki kobatela biso?

6 Kopusana penepene na bandeko na biso ekoki kobatela biso. Paulo ayebisaki bakristo ete: “Bókoba kolendisana mokolo na mokolo . . . noki moko na bino akóma motema makasi mpo na nguya ya bokosi ya lisumu.” (Ebr. 3:13) Soki tolɛmbi mpenza nzoto tii makolo na biso ekómi kolongwa na nzela ya bosembo, Yehova akoki kosala ete ndeko moko oyo amoni mokakatano na biso apesa biso lisalisi oyo esengeli. (Nz. 73:​2, 17, 23) Malendisi ya ndenge wana ezali mpenza malamu mpo na biso.

7. Boyokani nini ezali kati na bolingo mpe bomoko? (Bakolose 3:​13, 14)

7 Lokola tozali bato oyo basalaka makasi ya komoniselana bolingo, tozwaka mapamboli mingi. (1 Yoa. 4:11) Na ndakisa, bolingo etindaka biso ‘tókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu,’ mpe yango ebatelaka bomoko na biso ya bokristo. (Tángá Bakolose 3:​13, 14; Ef. 4:​2-6) Na yango, na makita na biso, tozalaka na esengo mpo tozalaka elongo na bato oyo tokoki kokuta esika mosusu te na mabele.

TÓPESANAKA LOKUMU

8. Ndenge nini Yehova asalisaka biso tóbatela bomoko na biso?

8 Bomoko na biso ya mokili mobimba ezali mpenza likamwisi. Yehova asangisi biso atako kozanga kokoka na biso. (1 Ko. 12:25) Biblia elobi ete ‘toteyami na Nzambe ete tólinganaka.’ (1 Tes. 4:9) Yango elingi koloba ete na nzela ya Liloba na ye, Yehova ayebisi biso makambo oyo tosengeli kosala mpo tópusana lisusu penepene na bandeko. Tokoki ‘koteyama na Nzambe’ soki tozali koyekola mateya na ye na likebi mpe kosalela yango. (Ebr. 4:12; Yak. 1:25) Mpe biso Batatoli ya Yehova tosalaka makasi ya kosala yango.

9. Liteya nini tozwi na Baroma 12:​9-13 na oyo etali kopesana lokumu?

9 Ndenge nini Liloba ya Nzambe eteyaka biso ete tópusana penepene na bandeko na biso? Tótalela oyo Paulo alobaki mpo na yango na Baroma 12:​9-13. (Tángá.) Tósimba maloba “mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.” Yango elingi koloba nini? Elingi koloba ete biso nde tosengeli koluka komonisa ete ‘tolingaka basusu na motema’; na ndakisa tosengeli kolimbisa bango, komonisela bango ezaleli ya koyamba bapaya, kokabela bango, mpe bongo na bongo. (Ef. 4:32) Osengeli te kozela ete bandeko nde bápusana penepene na yo. Okoki ‘kozala moto ya liboso’ ya kosala yango. Kutu, Yesu alobaki: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.”—Mis. 20:35.

10. Ndenge nini tokoki kosala mosala makasi “mpo na kopesana lokumu”? (Talá mpe elilingi.)

10 Likambo ya kokamwa, nsima ya koloba ete tosengeli kozala bato ya liboso ya kopesana lokumu, Paulo alendisi biso ‘tósalaka mosala makasi, tózala bagɔigɔi te.’ Moto oyo asalaka mosala makasi azalaka na molende mpe amipesaka na mosala. Ntango bapesi ye mosala, asalaka yango na makasi na ye nyonso. Masese 3:​27, 28 elendisi biso ete: “Koboya te kosalisa baoyo bazali na mposa ya lisalisi soki ozali na likoki ya kosala yango.” Na yango, soki tomoni ete moto moko azali na bosɛnga, tósala oyo tokoki mpo na kosalisa ye. Tolalisaka makambo te; tolobaka mpe te ete moto mosusu akosala yango.—1 Yoa. 3:​17, 18.

Tosengeli koluka kosalisa bandeko na biso oyo bazali na bosɛnga (Talá paragrafe 10)


11. Nini ekoki kosalisa biso tópusana lisusu penepene na bandeko?

11 Lolenge mosusu oyo tokoki kopesa basusu lokumu ezali ya kolimbisa bango nokinoki ntango bapesi biso mpasi. Baefese 4:26 elobi: “Moi elala te bino bozali kaka na nkanda.” Mpo na nini? Vɛrsɛ 27 emonisi ete yango ‘ekopesa Zabolo libaku.’ Yehova ayebisi biso mbala na mbala na Liloba na ye ete tólimbisanaka. Bakolose 3:13 elendisi biso ‘tókoba kolimbisana na motema moko.’ Kolimbisa mabunga ya basusu ezali moko ya lolenge oyo eleki malamu ya kopusana penepene na bango. Soki tosali yango, tozali kopesa mabɔkɔ na “kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.” (Ef. 4:3) Na mokuse, kolimbisa ebatelaka bomoko mpe kimya na biso.

12. Ndenge nini Yehova asalisaka biso tólimbisaka?

12 Ya solo, na bantango mosusu ekoki kozala mpasi tólimbisa baoyo bazokisi biso. Kasi tokoki kosala yango na lisalisi ya elimo ya Nzambe. Nsima ya kolendisa biso ete ‘tólinganaka na motema’ mpe ‘tósalaka mosala makasi,’ Biblia elobi: “Bózala na molende mingi na lisalisi ya elimo santu.” (Rom. 12:11) Yango elingi koloba ete elimo santu ya Nzambe ekoki kosalisa biso tózala na molende mpe nsai makasi mpo na kosala oyo ezali malamu. Na yango, elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso tólinganaka makasi mpe tólimbisanaka na motema moko. Yango wana tosɛngaka Yehova na motema mobimba ete apesa biso elimo na ye.—Luka 11:13.

“BOKABWANI EZALA TE NA KATI NA BINO”

13. Nini ekoki kokɔtisa bokabwani kati na biso?

13 Na kati ya lisangá, ezali na “bato ya ndenge nyonso” oyo bauti na mimeseno mpe bikólo ndenge na ndenge. (1 Tim. 2:​3, 4) Soki tozali ekɛngɛ te, bokeseni wana ekoki kokɔtisa bokabwani kati na biso na makambo oyo moto ye moko asengeli kopona, lokola molato, kosala monzɛlɛ, lisalisi ya monganga, to kominanola. (Rom. 14:4; 1 Ko. 1:10) Lokola Nzambe ateyi biso ete tólinganaka, tosengeli kokeba ete tótingama te ete basusu bápona makambo oyo biso toponaka, lokola nde ezali malamu koleka oyo ya basusu.—Flp. 2:3.

14. Tosengeli ntango nyonso koluka kosala nini, mpe mpo na nini?

14 Tokoki mpe kopekisa bokabwani ekɔta na lisangá soki tozali kobɔndisa mpe kolendisa basusu ntango nyonso. (1 Tes. 5:11) Mikolo oyo eleki, bato mingi oyo balɛmbaki na elimo to oyo balongolamaki na lisangá bazongi. Toyambi bango na esengo! (2 Ko. 2:8) Talá oyo ekómelaki ndeko mwasi oyo azongelaki koya na Ndako ya Bokonzi nsima ya kolɛmba na elimo mbula zomi. Alobi boye: “Moto nyonso azalaki kosɛkisa ngai mpe kopesa ngai mbote na lobɔkɔ.” (Mis. 3:19) Ndenge nini makambo ya mikemike wana oyo emonisaki ezaleli ya boboto esalisaki ye? Alobi boye: “Namonaki ete Yehova azalaki kosalisa ngai mpo nakóma lisusu na esengo.” Soki tozali kolendisa bato nyonso, Kristo akoki kosalela biso mpo na kobɔndisa baoyo ‘bazali komona mpasi na mosala mpe bamemi mikumba ya kilo.’—Mat. 11:​28, 29.

15. Wapi lolenge mosusu oyo tokoki kobatela kimya? (Talá mpe elilingi.)

15 Lolenge mosusu oyo tokoki kobatela bomoko na biso ezali na maloba na biso. Yobo 12:11 elobi: “Litoi emekaka maloba te ndenge lolemo emekaka bilei?” Kaka ndenge molambi ya malamu amekaka bilei na ye mpo na koyoka soki ebimi kitoko liboso apesa bato bálya, biso mpe tosengeli kokanisaka malamu makambo oyo tokoloba liboso ya koloba yango. (Nz. 141:3) Tosengeli ntango nyonso komindimisa ete oyo tolingi koloba ekolendisa, ekobɔndisa, mpe ‘ekopesa bayoki eloko ya malonga.’—Ef. 4:29.

Kanisá liboso oyo okoloba liboso oloba yango (Talá paragrafe 15)


16. Banani basengeli mingimingi kolukaka kolendisa basusu na maloba na bango?

16 Mibali mpe baboti nde basengeli mingimingi kolukaka kolendisa basusu na maloba na bango. (Kol. 3:​19, 21; Tito 2:4) Bankulutu mpe basengeli kolendisaka mpe kobɔndisaka etonga ya Yehova. (Yis. 32:​1, 2; Gal. 6:1) Lisese moko ya Biblia elobi: “Liloba oyo elobami na ntango oyo ebongi ezali mpenza malamu!”—Mas. 15:23.

BÓLINGANAKA “NA MISALA MPE NA SOLO”

17. Tokoki kosala nini mpo bolingo na biso mpo na bandeko euta na motema?

17 Ntoma Yoane alendisi biso ete ‘tólingaka, na maloba to na mbɛbu te, kasi na misala mpe na solo.’ (1 Yoa. 3:18) Tolingi ete bolingo mpo na bandeko na biso ya basi mpe ya mibali euta na motema. Ndenge nini tokoki kosala yango? Soki tozali kolekisa ntango mingi na bandeko, tokopusana lisusu penepene na bango mpe tokolingana makasi. Na yango, lukáká mabaku ya kolekisaka ntango na basusu, na ndakisa na makita mpe na mosala ya kosakola. Zwáká ntango ya kokende kotala basusu. Soki tosali makambo wana, tokomonisa ete ‘toteyami na Nzambe ete tólinganaka.’ (1 Tes. 4:9) Mpe tokokoba komona biso moko ete “ezali mpenza malamu mpe esengo ete bandeko báfanda na bomoko!”—Nz. 133:1.

LOYEMBO 90 Tólendisanaka