LISOLO YA BOMOI
Namoná ndenge bato ya sembo balongaka
NA NTEMBE TE obosanaka te masolo oyo oyoká, oyo ezalaki na ntina mingi mpo na yo. Ngai mpe nayoká masolo ya bongo eleki sikoyo mbula 50, ntango ngai ná moninga na ngai tozalaki koyɔta mɔtɔ na Kenya. Pɔsɔ ya nzoto na biso eyindaki mpe ekomaki makasi mpo na mobembo ya bansanza mingi oyo tosalaki. Tozalaki kolobela filme moko oyo etali makambo ya mangomba mpe moninga na ngai alobaki, “Filme yango ezali kolobela Biblia na ndenge ya mabe.”
Nasɛkaki mpo nayebaki ete moninga na ngai asambelaka ata na lingomba moko te. Natunaki ye, “makambo nini oyebi mpo na Biblia?”. Apesaki ngai eyano mbala moko te. Nsukansuka, ayebisaki ngai ete mama na ye azalaki motatoli ya Yehova mpe ayekolaki makambo mosusu epai na ye. Lokola nazalaki na mposa ya koyeba makambo mingi, nasɛngaki ye ayebisa ngai makambo mosusu.
Tosololaki mpokwa wana mobimba. Ayebisaki ngai ete Biblia elobi Satana nde azali koyangela mokili oyo. (Yoane 14:30) Mbala mosusu oyebi likambo yango banda kala, kasi mpo na ngai ezalaki likambo ya sika mpe ekamwisaki ngai makasi. Nazalaki koyoka ntango nyonso bato bazalaki koloba ete Nzambe nde azali koyangela mokili. Kasi yango ezalaki koyokana te na makambo oyo nazalaki komona na bomoi. Ata nazalaki kaka na mbula 26, kasi nakutanaki na makambo mingi oyo epesaki ngai mpasi.
Tata na ngai azalaki kokumba pɛpɔ ya basoda ya États-Unis. Ntango nazalaki mwana moke, nayebaki ete basoda bazali na likoki ya kobwaka bombe ya nikleere na ntango nyonso oyo balingi. Etumba ya Vietnam esalemaki wana nazalaki kotánga na Californie. Nakɔtaki na etuluku ya bana kelasi oyo bazalaki kotomboka. Bapolisi oyo bazalaki na matraki bazalaki kobengana biso, tozalaki kokima, tozalaki kopema malamu te mpe kobima mai ya miso mpo na gaze oyo bazalaki kobwakela biso. Ezalaki ntango moko ya yikiyiki mpe ya botomboki. Bazalaki koboma bato ya politiki, bato bazalaki kotomboka mpe kosala mobulu. Moto na moto azalaki na makanisi na ye mpo na ndenge oyo makambo esengelaki kosalema. Mobulu ezalaki makasi.
Na 1970, nazwaki mosala moko na nordi ya Alaska mpe nakomaki na mbongo mingi. Na nsima nakendaki na Londres, nasombaki moto, nakendaki na yango na sudi kozanga koyeba esika mpenza nazalaki kokende. Nsima ya mwa basanza nakomaki na Afrika. Nzelanzela, nakutanaki na bato oyo bazalaki na mposa ya kokima mboka mpo na mikakatano oyo bazalaki kokutana na yango.
Na yango, na kotalela makambo oyo namonaki mpe oyo nayokaki, mateya ya Biblia oyo elobi ete elimo moko ya mabe nde ezali koyangela mokili oyo, ekomaki mpenza polele na makanisi na ngai. Kasi soki Nzambe azali koyangela mokili te azali sikoyo kosala nini? Nazalaki na mposa ya koyeba yango.
Nazwaki eyano na motuya yango na bansanza oyo elandaki. Mpe nsima mwa ntango, nayaki koyebana na basi mpe mibali mingi oyo bamonisaki bosembo na bango epai ya Nzambe moko ya solo na makambo nyonso oyo bakutanaki na yango.
IRLANDE DU NORD—“MOKILI YA BABOMBE MPE YA MASASI”
Ntango nazongaki na Londres, nakutanaki na mama ya moninga na ngai, mpe apesaki ngai Biblia. Na nsima, ntango nakendaki na Amsterdam, na Pays Bas, motatoli ya Yehova moko amonaki ngai nazali kotánga Biblia na balabala, na nse ya miinda, mpe asalisaki ngai nayekola makambo mosusu. Nsima na yango, nakendaki na Dublin, na Irlande, mpe namonaki filiale ya Batatoli ya Yehova. Nabɛtaki porte. Kuna nde nakutanaki na Arthur Matthews, ndeko mobali moko ya bwanya oyo ayebaki makambo mingi. Nasɛngaki ye tóyekola Biblia, mpe andimaki koyekola na ngai.
Nabandaki koyekola na esengo mpenza, mpe nazalaki kozela na motema moko kotánga babuku mpe bazulunalo ya Batatoli ya Yehova. Ya solo, nazalaki mpe kotánga Biblia yango. Yango ezalaki kosepelisa ngai mingi! Na makita ya lisangá nazalaki komona ata bana mike bazalaki na biyano na mituna mingi oyo ata bato mingi ya mayele bamitunaka eleki sikoyo bankama ya bambula, na ndakisa: ‘Mpo na nini mabe ezali na mokili? Nzambe azali nani? Nini ekomelaka moto soki akufi?’ Baninga na ngai nyonso bazalaki kaka Batatoli ya Yehova. Yango ezalaki likambo ya mpasi te mpo nayebanaki na bato mosusu te na mboka mobimba. Basalisaki ngai nakoma kolinga Yehova mpe nalinga kosala mokano na ye.
Nazwaki batisimo na 1972. Mbula moko na nsima, nabandaki mosala ya mobongisi nzela mpe nakendaki na lisangá moko ya moke na Newry, na nɔrdi ya Irlande. Nafutelaki ndako moko ya moke na etúká moko ya ngombangomba. Ezalaki na bangɔmbɛ na elanga moko pembeni wana mpe nazalaki komekameka masolo na ngai liboso ya bangɔmbɛ yango. Ntango ezalaki kotafuna bilei, ezalaki kobima lokola ezalaki kolanda ngai na likebi. Bangɔmbɛ yango ekokaki kopesa ngai ata toli te, kasi esalisaki ngai nayeba kotala bayoki na ngai. Nakómaki mobongisi nzela monene na 1974, mpe tokomaki kosala ná Nigel Pitt, oyo akómaki moninga na ngai ya ntango nyonso.
Na ntango moko boye “Mobulu” ekɔtaki na nɔrdi ya Irlande. Bato mosusu bakómaki kobenga
nɔrdi ya Irlande “mokili ya babombe mpe ya masasi.” Bitumba na babalabala, kobɛta bato masasi, mpe kobwaka babombe ekómaki kosalema mingi. Mbala mingi mobulu ezalaki mpo na makambo ya politiki mpe ya mangomba. Nzokande, ezala lingomba ya protesta to ya katolike bayebaki ete Batatoli ya Yehova bazalaki kokɔta te na makambo ya politiki, yango wana tozalaki koteya na bonsomi nyonso mpe na kimya. Mbala mingi bankolo-ndako bazalaki koyeba ntango mpe esika nini mobulu ekosalema, mpe bazalaki kokebisa biso mpo tókima likama.Atako bongo, makama ezalaki kaka. Mokolo moko, ngai ná Denis Carrigan, oyo azalaki mpe mobongisi nzela monene, tosakolaki na engumba moko ya pene esika ata motatoli ya Yehova moko azalaki te, ezalaki mbala ya mibale tókende na engumba yango. Mwasi moko afundaki biso ete tozalaki banɔngi ya basoda ya Angleterre, mbala mosusu ezalaki mpo moto moko te na kati na biso azalaki koloba lokola bato ya Irlande. Efundeli yango ebangisaki biso. Kozala kaka moninga ya soda ekokaki kosala ete báboma yo to bábuka yo makolo na masasi. Wana totɛlɛmaki na libanda na malili kaka biso moko tozali kozela bisi, tomonaki motuka moko ezalaki koya liboso na biso na restora epai mwasi yango afundaki biso. Mwasi yango abimaki na restora, azalaki kosolola na mibali mibale oyo bazalaki na motuka yango mpe azalaki kolakisa biso mosapi. Mibali yango bapusanaki pene na biso mpe batunaki biso mwa mituna mpo na koyeba programɛ ya bisi. Ntango bisi eyaki basololaki na sofɛlɛ yango. Tozalaki koyoka te makambo bazalaki koloba. Bato mosusu bazalaki na bisi yango te, yango toyebaki ete bazalaki kozwa bibongiseli mpo na kosala biso mabe na libanda ya engumba. Kasi likambo yango esalemaki te. Ntango napusanaki pene ya bisi yango, natunaki sofɛlɛ boye: “Mibali wana bazali koluka koyeba makambo etali biso?” Ayanolaki boye: “Nayebisaki bango bozali batatoli ya Yehova kasi basoda ya Angleterre te. Bóbanga te. Bakosala bino mabe te.”
Na liyangani ya etúká oyo esalemaki na 1976 na Dublin, nakutanaki na Pauline Lomax, azalaki mobongisi nzela mpe autaki na Angleterre. Azalaki moto ya elimo, ya komikitisa mpe azalaki kolinga bandeko. Ye ná ndeko na ye ya mobali Ray, bayebaki solo banda bomwana. Mbula moko na nsima, ngai ná Pauline tobalanaki mpe tokobaki mosala ya mobongisi nzela monene na Ballymena, na nɔrdi ya Irlande.
Tosalaki mosala ya zongazonga na boumeli ya bambula, epai tosalelaki bandeko na biso na Belfast, na Londonderry, mpe na bisika mosusu oyo mobulu ezalaki. Kondima oyo bandeko na biso bazalaki na yango, ndenge batikaki bindimeli ya mangomba na bango, batikaki kokaniselana mabe mpe koyina basusu kaka mpo na kosalela Yehova, elendisaki biso mingi mpenza. Na ntembe te Yehova apambolaki mpe abatelaki bango!
Nafandaki na Irlande na boumeli ya mbula zomi. Na nsima, na 1981 babengisaki biso na kelasi ya 72 ya eteyelo ya Gileade. Nsima ya kozwa diplome batindaki biso na Sierra Leone, na wɛsti ya Afrika.
SIERRA LEONE—KONDIMA ATAKO BOBOLA
Tozalaki kofanda na ndako ya bamisionɛrɛ na bandeko mosusu 11 ya malamu. Biso nyonso tozalaki kosalela kaka kuku moko, W-C misato, bisika mibale ya kosokola nzoto, telefone moko, masini moko ya kosokola bilamba mpe moko oyo ekausaka yango. Kura ezalaki kokende mpambampamba mpe na mbalakaka. Bampuku ezalaki ebele na plafɔ ya ndako na biso mpe banyoka babengi Cobra ezalaki kofanda na eteni ya nse ya mabele ya ndako yango.
Atako esika ya kofanda ezalaki malamu te, kasi tozalaki kosepela mingi na mosala ya kosakola. Bato bazalaki komemya Biblia mpe koyoka na likebi. Mingi bazalaki koyekola Biblia mpe kondima mateya
ya solo. Bato ya esika yango bazalaki kobenga ngai “Monsieur Robert.” Bazalaki kobenga Pauline “Madame Robert.” Na bantango moko boye, nazalaki kolekisa ntango mingi na mosala ya Betele mpe nazalaki kosakola lisusu mingi te, na yango bakómaki kobenga Pauline “Madame Pauline.” Mpe ngai “Monsieur Pauline.” Pauline azalaki kosepela bongo!Bandeko mingi bazalaki babola, kasi Yehova azalaki kokokisa bamposa na bango, ntango mosusu na ndenge ya kokamwa mpenza. (Mat. 6:33) Nazali koyeba lisusu ndeko mwasi moko oyo azalaki kaka na mbongo ya moke mpo na kosomba bilei ya mokolo moko mpo na ye ná bana na ye, kasi apesaki mbongo yango nyonso epai ya ndeko mobali moko oyo azalaki kobela mpe azangaki mbongo mpo na kosomba nkisi ya malaria. Mwa moke na nsima kaka na mokolo yango, mwasi moko ayaki epai ya ndeko yango mpe afutaki ye mbongo mpo akanga ye nsuki. Makambo ya ndenge wana ezalaki kosalema mingi.
NIGERIA—KOYEKOLA MIMESENO YA SIKA
Tosalaki mbula libwa na Sierra Leone. Na nsima batindaki biso na Betele ya Nigeria. Tokómaki sikoyo na biro ya filiale ya monene. Nazalaki kosala kaka lolenge moko ya mosala oyo nazalaki na yango na Sierra Leone, kasi Pauline, ye ezalaki mpenza mbongwana monene mpe ya makasi. Liboso azalaki kolekisa bangonga 130 nsanza nyonso na mosala ya kosakola, mpe azalaki na bayekoli ya Biblia oyo bazalaki kokola malamu. Sikoyo awa batyaki ye na esika batongaka bilamba, epai asengelaki kolekisaka mikolo nyonso kaka na kobongisa bilamba oyo ebebá. Esɛngaki ntango mpo amesana, kasi ayaki koyeba ete bato mosusu bazalaki kozwa na motuya mingi mosala oyo azalaki kosala, mpe atyaki makanisi na ye na kolendisa bandeko mosusu ya Betele.
Mimeseno ya bato ya Nigeria ezalaki sika mpo na biso, na yango tozalaki na makambo mingi ya koyekola. Mokolo moko, ndeko mobali moko ayaki na biro na ngai kolakisa ngai ndeko mwasi moko oyo akɔtaki Betele sika. Ntango napusani pene ya ndeko mwasi yango mpo na kopesa ye mbote ya lobɔkɔ, afukamaki na makolo na ngai. Nakamwaki makasi! Bavɛrsɛ mibale ya Biblia eyelaki ngai na makanisi: Misala 10:25, 26 mpe Emoniseli 19:10. Namitunaki, ‘Nayebisa ye atika kosala bongo?’ Kasi, nayaki komona ete lokola bandimi ye akɔtá na Betele, ayebi oyo Biblia eteyaka.
Namitungisaki mingi na boumeli ya ntango nyonso oyo tozalaki kosolola na ye, mpe na nsima nasalaki mwa bolukiluki. Nayaki koyeba ete ndeko mwasi yango asalaki bongo na kolanda mimeseno oyo bato mosusu ya mboka wana bazalaki na yango. 1 Sam. 24:8) Nasepelaki mpo atako nayebaki makambo mingi te, nalobaki ata likambo moko te oyo ekokaki koyokisa ndeko na ngai ya mwasi nsɔni.
Mibali mpe bazalaki kosala kaka bongo. Ezalaki mpo na komonisa limemya. Ezalaki losambo te; ezali mpe na bandakisa ya bongo na Biblia. (Tokutanaki na bandeko mingi ya Nigeria oyo bamonisaki bosembo na boumeli ya bambula mingi. Na ndakisa Isaiah Adagbona. a Ayekolaki solo ntango azalaki mpenza elenge, kasi na nsima bazwaki ye na maladi ya maba. Batindaki esika bato ya maba bazalaki mpe kuna azalaki kaka ye moko motatoli ya Yehova. Atako botemeli, asalisaki bato ya maba koleka 30 bándima solo mpe lisangá moko ebotamaki kuna.
KENYA—BANDEKO BAMONISELAKI NGAI MOTEMA MOLAI
Na 1996 batindaki biso lisusu na filiale ya Kenya. Ezalaki mbala ya liboso nazonga lisusu na ekólo yango. Tozalaki kofanda na Betele. Na lopango ya Betele ezalaki na makako ebele mpenza. Makako yango ezalaki koyiba bambuma epai ya bandeko basi. Mokolo moko, ndeko mwasi moko atikaki fɛnɛtrɛ ya ndako na ye polele. Ntango azongaki akutaki makako ezali kolya bilei oyo atikaki na ndako. Agangaki mpe akimaki libanda. Makako yango mpe egangaki mpe ekimaki libanda na fɛnɛtrɛ.
Ngai ná Pauline tokendaki na lisangá ya Swahili. Mwa moke na nsima, bapesaki ngai mokumba ya kotambwisaka Boyekoli ya mokanda, (sikoyo ekómá kobengama Boyekoli ya Biblia na lisangá). Nzokande, nayebaki naino koloba monɔkɔ yango malamu te. Nazalaki kobongisa boyekoli yango liboso, yango ezalaki kosalisa ngai natángaka mituna. Kasi soki biyano oyo bandeko bazali kopesa ekeseni na oyo ekomami na mokanda, nazalaki kokanga ntina na yango te. Ezalaki mpasi mpenza! Nazalaki koyokela bandeko mawa mpenza. Nakamwaki ndenge bamoniselaki ngai motema molai, mpe na komikitisa nyonso bandimaki natambwisaka boyekoli.
ÉTATS-UNIS—KONDIMA ATAKO BOMƐNGO
Tokokisaki ata mbula moko te na Kenya. Na 1997 babengisaki biso na Betele ya Brooklyn, na New York. Sikoyo tokómi na ekólo oyo bato bazalaka mpenza na bomɛngo, yango ekoki mpe kobimisa mikakatano na yango. (Mas. 30:8, 9) Kasi ata na bikólo ya ndenge wana, bandeko na biso bazali na kondima makasi. Bandeko na biso basalelaka ntango mpe biloko na bango ya kobikela, mpo na kokóma bazwi te kasi mpo na kopesa mabɔkɔ na misala oyo ezali kosalema na ebongiseli ya Yehova.
Na boumeli ya bambula, tomonaki ndenge bandeko na biso bamonisaki kondima na makambo ndenge na ndenge. Na Irlande, bandeko bamonisaki kondima atako yikiyiki. Na Afrika, bandeko bamonisaki kondima atako bazalaki babola mpe mosika mpenza. Na États-Unis, bandeko bamonisaki kondima atako bazalaki na bomɛngo. Na ntembe te, Yehova ayokaka mpenza esengo ntango amonaka ndenge bato bazali komonisela ye bolingo na makambo ndenge na ndenge!
Bambula elekaki noki—“koleka motonga ya moto oyo asalaka mayemi na bilamba.” (Yobo 7:6) Sikoyo tozali kosala elongo na bandeko mosusu na biro monene na Warwick, na New York, mpe tozali na esengo ya kokoba kosalela Yehova elongo na bato oyo balinganaka mpenza. Tozali na esengo ya kosala oyo tokoki mpo na kopesa Kristo Yesu, mokonzi na biso maboko, oyo mosika te akopesa mbano na ebele ya bato na ye ya sembo.—Mat. 25:34.
a Lisolo ya bomoi ya Isaiah Adagbona ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/04/1998, nk. 22-27. Akufaki na 2010.