Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 2

Okoki kozala ‘lisalisi oyo ezali kopesa basusu makasi’

Okoki kozala ‘lisalisi oyo ezali kopesa basusu makasi’

“Bango nde bazali baninga na ngai ya mosala mpo na bokonzi ya Nzambe, mpe bango nde bakómi lisalisi oyo ezali kopesa ngai makasi.”​—KOL. 4:11.

LOYEMBO 90 Tólendisanaka

NA MOKUSE a

1. Makambo nini ya mpasi basaleli mingi ya sembo ya Yehova bazali kokutana na yango?

 BASALELI mingi ya Yehova na mokili mobimba bazali kokutana na makambo oyo ezali kotungisa bango, ata mpe kopesa bango mpasi. Omonaka yango mpe na lisangá na bino? Bandeko mosusu bazali na mawa mpo bazali na maladi ya makasi to mpe moto oyo balingaki akufi. Basusu bayokaka mpasi mingi mpo moto moko ya libota na bango to moninga moko ya motema atiki solo. Basusu mpe bazali konyokwama mpo na makama oyo ebimaka yango moko. Bandeko nyonso wana bazali na mposa ya lisalisi oyo ekopesa bango makasi. Ndenge nini tokoki kosalisa bango?

2. Mpo na nini na bantango mosusu ntoma Paulo azalaki na mposa ete basusu bapesa ye makasi?

2 Ntoma Paulo akutanaki na makama mingi na bomoi na ye. (2 Ko. 11:23-28) Azalaki mpe kobundana na “nzubɛ moko na kati ya mosuni,” oyo mbala mosusu ezalaki maladi moko boye. (2 Ko. 12:7) Na ntango moko boye, alɛmbaki nzoto mpo Demasi, oyo na ntango moko boye azalaki moninga na ye ya mosala, “alingaki makambo ya ntango oyo” mpe asundolaki ye. (2 Tim. 4:10) Paulo azalaki mokristo ya mpiko oyo atyamaki mafuta na elimo mpe amipesaki na kosalisa basusu, kasi na bantango mosusu ye mpe alɛmbaki nzoto.​—Rom. 9:1, 2.

3. Lisalisi mpe makasi oyo Paulo azwaki eutaki wapi?

3 Paulo azwaki lisalisi mpe makasi oyo asɛngelaki na yango. Ndenge nini? Na ntembe te, Yehova asalelaki elimo santu na Ye mpo na kopesa Paulo makasi. (2 Ko. 4:7; Flp. 4:13) Yehova apesaki ye mpe makasi na nzela ya bandeko. Paulo alobaki ete bandeko mosusu bakómaki “lisalisi oyo ezali kopesa [ye] makasi.” (Kol. 4:11) Na kati ya bandeko yango, atángaki nkombo ya Aristarke, Tishike, mpe Marko. Bapesaki Paulo makasi na ndenge basalisaki ye ayika mpiko. Bizaleli nini esalisaki bandeko yango misato báyeba mpenza kopesa basusu makasi? Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na bango ya malamu ntango tozali kopesana makasi mpe kolendisana?

ZALÁ SEMBO LOKOLA ARISTARKE

Lokola Aristarke, okoki kozala moninga ya sembo soki okangami na bandeko na “ntango ya mpasi” (Talá paragrafe 4-5) c

4. Ndenge nini Aristarke amonisaki ete azali moninga ya sembo mpo na Paulo?

4 Aristarke, mokristo moko ya Tesaloniki oyo ezalaki na etúká ya Masedonia, amonisaki ete azali moninga ya sembo mpo na ntoma Paulo. Biblia elobeli Aristarke mpo na mbala ya liboso ntango Paulo akendaki na Efese na mobembo na ye ya misato ya misionɛrɛ. Ntango azalaki elongo na Paulo, bato oyo babimisaki yikiyiki bakangaki ye. (Mis. 19:29) Nsukansuka ntango batikaki ye, akimaki te mpo na komibatela, kasi na bosembo nyonso, atikalaki elongo na Paulo. Mwa basanza na nsima, na Grɛsi, Aristarke azalaki kaka elongo na Paulo atako banguna bazalaki se koluka koboma Paulo. (Mis. 20:2-4) Na mobu soki 58 T.B, ntango Paulo atindamaki mokangami na Roma, Aristarke akendaki kotika ye na mobembo yango ya molai, mpe na nzela, masuwa na bango ezindaki. (Mis. 27:1, 2, 41) Ntango bakómaki na Roma, emonani ete alekisaki mwa ntango na bolɔkɔ elongo na Paulo. (Kol. 4:10) Tokoki kokamwa te ndenge Paulo amonaki ete moninga na ye wana ya sembo alendisaki ye mpe apesaki ye makasi!

5. Na kotalela Masese 17:17, ndenge nini okoki kozala moninga ya sembo?

5 Ndenge moko na Aristarke, okoki kozala moninga ya sembo soki ozali kokangama na bandeko, kaka te na ntango ya bisengo, kasi mpe na “ntango ya mpasi.” (Tángá Masese 17:17.) Ata soki komekama na ye esili, ndeko yango akoki kaka kozala na mposa ete basusu bápesa ye makasi. Frances, b oyo tata na ye akufaki na kanser mpe mama na ye akufaki nsima ya sanza misato kaka na maladi yango, alobi boye: “Nabanzi ete komekama ya makasi enyokolaka moto ntango molai. Mpe nasepelaka na baninga ya sembo oyo babosanaka te ete nazali kaka na mpasi, atako mwa ntango mingi eleki banda baboti na ngai bakufá.”

6. Soki tozali sembo, tokosala nini?

6 Soki tozali baninga ya sembo, tokomipimela makambo mosusu mpo na kosalisa bandeko na biso. Na ndakisa, bazwaki ndeko mobali moko na nkombo Peter maladi ya makasi oyo etikalaki moke eboma ye. Mwasi na ye Kathryn alobi boye: “Ndeko moko ya lisangá na biso ná mwasi na ye bakendaki elongo na biso na lopitalo mokolo oyo tozwaki nsango ya maladi ya Peter. Kaka wana na lopitalo, bazwaki ekateli ete bakotika biso te na mokakatano oyo ekómelaki biso, mpe bazalaki elongo na biso ntango nyonso oyo tozalaki na bosɛnga na bango.” Kozala na baninga ya solosolo oyo bakoki kosalisa biso tóyikela mikakatano mpiko, epesaka mpenza makasi!

ZALÁ MOTO OYO ABONGI KOTYELAMA MOTEMA LOKOLA TISHIKE

Lokola Tishike, okoki kozala moninga oyo basusu bakoki kotyela motema ntango bazali kobundana na mikakatano (Talá paragrafe 7-9) d

7-8. Na kotalela Bakolose 4:7-9, ndenge nini Tishike amonisaki ete azali moto ya kotyela motema?

7 Tishike, mokristo moko ya etúká ya Roma na Azia, azalaki moto oyo Paulo azalaki kotyela motema. (Mis. 20:4) Na mobu soki 55 T.B., Paulo azwaki bibongiseli ete bákɔngɔla mbongo mpo na kosalisa bakristo ya Yudea, mpe ekoki kozala ete atikaki Tishike asalisa mpo na kokokisa mokumba yango ya ntina mingi. (2 Ko. 8:18-20) Na nsima, ntango Paulo akɔtaki bolɔkɔ na Roma mpo na mbala ya liboso, Tishike azalaki momemi-nsango na ye. Amemaki mikanda mpe bansango oyo Paulo atindaki mpo na kolendisa masangá ya Azia.​—Kol. 4:7-9.

8 Tishike akobaki kozala moninga oyo Paulo akokaki kotyela motema. (Tito 3:12) Na ntango wana, bakristo mosusu bazalaki te bato ya kotyela motema lokola Tishike. Na mobu soki 65 T.B., ntango Paulo akɔtaki bolɔkɔ mpo na mbala ya mibale, akomaki ete bandeko mibali mingi ya etúká ya Azia bazalaki koboya kozala elongo na ye, mbala mosusu mpo bazalaki kobanga batɛmɛli. (2 Tim. 1:15) Kasi, Paulo akokaki kotyela Tishike motema mpe apesaki ye mokumba mosusu. (2 Tim. 4:12) Na ntembe te, Paulo asepelaki kozala na moninga ya malamu lokola Tishike.

9. Ndenge nini tokoki komekola Tishike?

9 Tokoki komekola Tishike soki tozali moninga oyo abongi kotyelama motema. Na ndakisa, tosukaka kaka te na kolaka bandeko oyo bazali na bosɛnga ete tokosalisa bango, kasi tosalaka mpenza makambo oyo ekosalisa bango. (Mat. 5:37; Luka 16:10) Soki bandeko oyo bazali na bosɛnga bayebi ete bakoki kotyela biso motema, bayokaka mpenza ete bazwi makasi. Mpo na nini? Ndeko mwasi moko alobi boye: “Okozala motema ya kokita mpo okomituna te soki moto oyo alakaki ete akosalisa yo akoya na ntango oyo esengeli mpo na kosala makambo alakaki.”

10. Ndenge Masese 18:24 elobi yango, epai ya nani moto oyo akutani na komekama to na likambo moko oyo elɛmbisi ye nzoto akoki kozwa makasi?

10 Mbala mingi, bato oyo bakutani na komekama to na likambo moko oyo elɛmbisi bango nzoto bazwaka makasi ntango bayebisi moninga moko ya motema likambo oyo ezali kotungisa bango. (Tángá Masese 18:24.) Ndeko moko na nkombo Bijay, oyo alɛmbaki nzoto ntango mwana na ye ya mobali alongolamaki na lisangá, alobaki boye: “Nazalaki na mposa ya koyebisa moto oyo nakoki kotyela motema ndenge oyo nazalaki komiyoka.” Carlos abungisaki mikumba na ye na lisangá mpo na libunga moko oyo asalaki. Alobi boye: “Nazalaki na mposa ya kozwa esika ya malamu epai nakokaki komonisa polele ndenge oyo nazalaki komiyoka kozanga kobanga ete moto asambisa ngai.” Carlos azwaki esika yango epai ya bankulutu, mpe basalisaki ye ayika mpiko. Azwaki mpe makasi mpo ayebaki ete bankulutu yango bazalaki na bokɛngi mpe ete bakoyebisa basusu te makambo oyo alobaki.

11. Ndenge nini tokoki kozala moninga oyo basusu bakoki kotyela motema mpe bakoki koyebisa makambo?

11 Mpo tózala moninga oyo basusu bakoki kotyela motema mpe bakoki koyebisa makambo, tosengeli koyekola kozala na motema molai. Ntango mobali ya ndeko mwasi moko na nkombo Zhanna asundolaki ye, Zhanna azwaki lisusu makasi ntango ayebisaki baninga na ye ya motema ndenge oyo azalaki komiyoka. Alobi boye: “Bamonisaki motema molai ntango bazalaki koyoka ngai, atako mbala mosusu nazalaki kozongela kaka likambo moko mbala na mbala.” Yo mpe okoki kozala moninga ya malamu soki ozali moyoki ya malamu.

OMIPESA NA KOSALISA BASUSU LOKOLA MARKO

Lisalisi ya Marko epesaki Paulo makasi ya koyika mpiko; biso mpe tokoki kosalisa bandeko na ntango ya makama (Talá paragrafe 12-14) e

12. Marko azalaki nani, mpe ndenge nini amonisaki elimo ya komipesa?

12 Marko azalaki Moyuda mpe mokristo ya Yerusaleme. Ndeko na ye Barnabasi azalaki misionɛrɛ oyo ayebanaki mingi. (Kol. 4:10) Emonani ete libota ya Marko ezalaki na bozwi, kasi Marko atyaki biloko ya mokili na esika ya liboso te na bomoi na ye. Na bomoi na ye mobimba, Marko amonisaki elimo ya komipesa. Azalaki kosepela kosalisa basusu. Na ndakisa, asalaki mbala na mbala elongo na ntoma Paulo mpe ntoma Petro mpo na kosalisa bango na mikumba na bango, mpe mbala mosusu azalaki kokokisa bamposa na bango ya mosuni. (Mis. 13:2-5; 1 Pe. 5:13) Paulo abengaki Marko moko ya “baninga na [ye] ya mosala mpo na bokonzi ya Nzambe” mpe ‘lisalisi oyo ezalaki kopesa ye makasi.’​—Kol. 4:10, 11.

13. Ndenge nini 2 Timote 4:11 emonisi ete Paulo asepelaki na mosala ya sembo ya Marko?

13 Marko akómaki moko ya baninga ya motema ya Paulo. Na ndakisa, na mobu soki 65 T.B., ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ mpo na mbala ya nsuka na Roma, akomaki mokanda na ye ya mibale epai ya Timote. Na mokanda yango, Paulo asɛngaki Timote aya na Roma mpe amema Marko. (2 Tim. 4:11) Na ntembe te, Paulo asepelaki na mosala ya sembo oyo Marko asalaki kala, yango wana asɛngaki ete aya kosalisa ye na eleko wana ya mpasi. Marko asalisaki Paulo mingi, mbala mosusu azalaki kolukela ye bilei to bisaleli mpo na kokoma. Na ntembe te, lisalisi mpe malendisi wana oyo Paulo azwaki esalisaki ye ayika mpiko na mikolo na ye ya nsuka liboso báboma ye.

14-15. Ndenge nini Matai 7:12 ekoki kosalisa biso tóyeba oyo tokoki kosala mpo na kosalisa basusu?

14 Tángá Matai 7:12. Ntango tozali kolekisa ntango moko ya mpasi, tosepelaka mingi na bato oyo basalaka mwa makambo mpo na kosalisa biso! Ryan, oyo tata na ye akufaki na mbalakaka na aksida moko ya nsɔmɔ, alobi boye: “Soki ozali na mpasi, ezali na makambo mingi ya mokolo na mokolo oyo okomona ete okokoka te kosala. Soki moto ayei kosalisa yo​—ata mwa moke kaka—​epesaka makasi.”

15 Soki tozali kotyela basusu likebi mpe kosalela miso, tokoki komona mwa makambo ya kosala mpo na kopesa basusu lisalisi. Na ndakisa, ndeko mwasi moko azwaki likanisi ete akobanda kokende mbala nyonso kotika ndeko Peter ná Kathryn, oyo tolobelaki liboso, epai ya monganga. Lokola Peter ná Kathryn bakokaki lisusu kokumba motuka te, ndeko mwasi wana asalaki programɛ mpo bandeko ndenge na ndenge ya lisangá bámemaka bango epai ya monganga. Programɛ yango esimbaki? Kathryn alobi boye: “Toyokaki lokola nde balongoli biso kilo oyo tomemaki.” Na yango, kobosanaka te ete kosala mwa makambo ya mikemike mpo na kosalisa basusu ekoki kopesa bango makasi.

16. Liteya nini ya ntina na oyo etali kopesa basusu makasi tokoki kozwa na ndakisa ya Marko?

16 Na ntembe te, moyekoli Marko azalaki na makambo mingi ya kosala na bomoi na ye. Azalaki na mikumba ya minene na lisangá, na ndakisa kokoma Evanzile oyo ezali na nkombo na ye. Atako bongo, Marko asalelaki ntango na ye mpo na kolendisa Paulo, mpe Paulo akakatanaki te mpo na kosɛnga lisalisi ya Marko. Ndeko Angela, oyo azalaki na mawa makasi ntango babomaki nkɔkɔ na ye, azalaki na botɔndi mpo basusu bazalaki koya kopesa ye makasi. Alobi boye: “Ntango baninga bamonisi ete balingi mpenza kosalisa, ezalaka mpasi te kosolola na bango. Emonanaka ete bazali kokakatana te.” Tokoki komituna boye: ‘Nayebani lokola moto oyo andimaka kosala mwa makambo ya mikemike mpo na kopesa bandeko makasi?’

ZWÁ EKATELI YA KOPESA BASUSU MAKASI

17. Ndenge nini komanyola 2 Bakorinti 1:3, 4 ekoki kotinda biso tóbɔndisa mpe basusu?

17 Bandeko oyo bazali na mposa ya lisalisi bazali ya koluka te. Kutu, tokoki koyebisa bango likanisi ya kolendisa oyo bandeko mosusu mpe basalelaki mpo na kopesa biso makasi. Nino, ndeko mwasi moko oyo nkɔkɔ na ye akufaki, alobi boye: “Yehova akoki kosalela biso mpo na kopesa basusu makasi soki tomitiki ete asalela biso.” (Tángá 2 Bakorinti 1:3, 4.) Ndeko Frances, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Maloba ya 2 Bakorinti 1:4 ezali mpenza solo. Tokoki kosalela libɔndisi oyo tozwaki mpo na kobɔndisa mpe basusu.”

18. (a) Mpo na nini bato mosusu bakoki kobanga kopesa basusu makasi? (b) Nini ekoki kosalisa biso tóyeba mpenza kopesa basusu makasi? Pesá ndakisa.

18 Tosengeli koluka ndenge ya kosalisa basusu ata soki tozali kobanga. Na ndakisa, tokoki kobanga ete tóyeba te tóloba nini to tósala nini mpo na moto oyo azali na mawa. Nkulutu moko na nkombo Paul alobeli milende oyo bandeko mosusu basalaki ntango tata na ye akufaki. Alobi boye: “Nazalaki komona ete ezalaki pɛtɛɛ te bápusana pene na ngai mpo na kosolisa ngai. Bazalaki mpenza koluka maloba. Kasi, nasepelaki mpenza ndenge bazalaki na mposa ya kosalisa ngai mpe kopesa ngai makasi.” Ndenge moko mpe, nsima ya koningana makasi ya mabele oyo esalemaki na mboka na bango, ndeko moko na nkombo Tajon alobaki boye: “Mpo na koloba solo, nayebaka lisusu te mesaje mokomoko oyo bato batindelaki ngai nsima ya koningana ya mabele, kasi nayebaka ete bazalaki kokanisa ngai, yango wana bazalaki kotuna soki nazali ndenge nini.” Tokoki kozala bato oyo bayebi kopesa basusu makasi soki tozali komonisa ete tokanisaka bango.

19. Mpo na nini ozali na ekateli ya kozala ‘lisalisi oyo epesaka basusu makasi’?

19 Lokola tozali se kopusana na nsuka ya ebongiseli oyo, makambo ya mokili ekobeba lisusu mpe bomoi ekokóma lisusu mpasi koleka. (2 Tim. 3:13) Mpe tokokoba kozala na mposa basusu bápesa biso makasi mpo tozali bato ya kozanga kokoka mpe tokokoba kosala mabunga. Soki ntoma Paulo alongaki koyika mpiko tii na nsuka ya bomoi na ye, ezalaki mpe mpo na lisalisi ya bandeko oyo bazalaki kopesa ye makasi. Tiká ete tózala sembo lokola Aristarke, tózala bato ya kotyela motema lokola Tishike, mpe na elimo ya komipesa lokola Marko. Soki tozali kosala bongo, tokoki kosalisa bandeko na biso bátikala ngwi na kati ya kondima.​—1 Tes. 3:2, 3.

a Ntoma Paulo akutanaki na mikakatano mingi na bomoi na ye. Na bantango ya mpasi, baninga na ye mosusu ya mosala bazalaki lisalisi oyo ezalaki kopesa ye makasi. Tokolobela bizaleli misato oyo esalaki ete bato yango báyeba mpenza kolendisa basusu. Tokomona mpe ndenge oyo tokoki kolanda ndakisa na bango na makambo ya bomoi.

b Topesi bango bankombo mosusu.

LOYEMBO 111 Ntina ya esengo na biso

c NDIMBOLA YA BILILINGI: Aristarke ná Paulo bazindi na masuwa.

d NDIMBOLA YA BILILINGI: Tishike azali kozwa mikanda ya Paulo mpo amema yango na masangá.

e NDIMBOLA YA BILILINGI: Marko asalisaki Paulo na ndenge mingi.