Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntango nini Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele?

Ntango nini Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele?

Bayekoli mosusu ya Yesu balingaki koyeba ntango Bokonzi ya Nzambe ekobanda koyangela. Mpo na koyanola na motuna na bango, Yesu alobaki ete bakoyeba te mokolo oyo Bokonzi yango ekoyangela mabele. (Misala 1:6, 7) Kasi, liboso ayebisaki bayekoli na ye ete ntango bakomona makambo oyo ekosalema na mbala moko, ‘bakoyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekómi pene’ mpe mosika te ekoyangela mokili.​—Luka 21:31.

MAKAMBO NINI YESU ALOBAKI EKOSALEMA?

Yesu alobaki ete: “Ekólo ekobunda na ekólo, mpe bokonzi ekobunda na bokonzi; mpe mabele ekoningana makasi na bisika ndenge na ndenge, mpe bamaladi mabe mpe nzala ekozala bisika ndenge na ndenge.” (Luka 21:10, 11) Makambo yango nyonso ezali elembo. Makambo yango ezali kosalema nzela moko mpe ezali komonisa ete “Bokonzi ya Nzambe ekómi pene.” Ezali mpenza solo ete makambo yango ezali kosalema nzela moko? Ezali mpe kosalema na mokili mobimba? Tólobela yango.

1. BITUMBA

Etumba moko esalemaki na 1914 ebomaki bato mingi mpe ebebisaki bamboka mingi koleka bitumba nyonso oyo esalemá liboso! Mbala mingi, bato ya istware balobaka ete mobu 1914 ezali mobu oyo makambo ebongwanaki mpenza, mpo na mobu yango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki. Na etumba yango basalelaki mpo na mbala ya liboso ebele ya mituka ya bitumba, babɔmbi oyo baaviɔ ezalaki kobwaka, mandoki ya makasi, gaze ya pwazɔ, mpe bibundeli mosusu ya mabe koleka. Na nsima, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esalemaki. Na etumba yango basalaki babɔmbi atomike mpe basalelaki yango mpo na mbala ya liboso. Banda 1914 tii lelo, bitumba ezali kobima na bisika ndenge na ndenge, mpe bato ebele mpenza bazali kokufa mpo na bitumba yango.

2. KONINGANA YA MABELE

Buku moko (Britannica Academic) elobi ete mbula na mbula koningana ya mabele ezali kosalema mbala soki 100 mpe ezali “kobebisa biloko mingi.” Ankɛtɛ oyo ebongiseli moko ya États-Unis esalaki emonisi ete “nakotalela lapolo oyo esalemaki na mobu soki 1900, koningana ya mabele ya makasi soki 16 ekobanda kosalema mbula na mbula.” Bato mosusu bakoki kokanisa ete koningana ya mabele ezali kosalema mingi te koleka ndenge ezalaki liboso, kasi nde bato ya siansi bakómi na bamasini oyo esalisaka bango báyeba soki koningana ya mabele elingi kosalema. Mpo na koloba solo, koningana makasi ya mabele oyo ezali kosalema na mokili mobimba ezali komemela bato ebele mpasi mpe koboma bato ebele koleka ndenge ezalaki liboso.

3. NZALA

Na mokili mobimba, bato bakufaka nzala mpo na bitumba, kanyaka, kokwea ya nkita, kozanga koyeba kotambwisa mosala ya bilanga, to kokoka te kobongisa makambo mpo moi to malili eleki makasi. Lapolo ya mobu 2018 ya ebongiseli ya ONU mpo na kosilisa nzala na mokili elobaki ete: “Na mokili mobimba, bato milio 821 bazali kolya malamu te, mpe bato milio 124 na kati na bango bazali kokufa nzala.” Mbula na mbula bana soki 3 100 000 bazali mpe kokufa mpo balyaka malamu te. Na 2011, bana ebele (soki 45%) bakufaki na nzala na mokili mobimba.

4. BAMALADI MABE

Zulunalo moko ya ebongiseli ya ONU oyo etalelaka sante elobi boye: “Bamaladi ya nsɔmɔ ebimi na siɛklɛ ya 21. Bamaladi ya kala ezongi lisusu, na ndakisa kolera, fièvre jaune mpe bamaladi mabe mosusu; bamaladi ya sika mpe ebimi, na ndakisa maladi ya mpema makasi oyo ebandaki na Chine (SARS), grippe espagnole, maladi ya mpema oyo ebandaki na Asie (MERS), Ebola mpe Zika.” Atako bato ya siansi mpe minganga bazali koyekola bamaladi mingi, bazali kokoka te kosilisa bamaladi nyonso.

5. MOSALA YA KOSAKOLA NA MOKILI MOBIMBA

Yesu ayebisaki likambo mosusu oyo ezali na kati ya elembo ntango alobaki: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Atako mokili oyo etondi na bampasi, bato koleka milio 8 ya bikólo nyonso bazali kosakwela bato nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mikili 240 mpe na minɔkɔ koleka 1 000. Likambo ya boye esalemá naino te liboso.

ELEMBO YESU APESAKI ETALI MPE YO!

Elembo oyo Yesu apesaki, elingi koloba makambo oyo alobaki, ezali kosalema lelo. Mpo na nini tosengeli kolandela makambo yango? Mpo Yesu alobaki ete: “Ntango bokomona makambo yango ezali kosalema, bóyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekómi pene.”​—Luka 21:31.

Mosika te, Bokonzi ekosala ete mokano ya Nzambe esalema na mabele

Elembo oyo Yesu apesaki mpe badati oyo Biblia elobeli, esalisi biso tóyeba ete Nzambe atyaki Bokonzi na ye na likoló na mobu 1914. a Atyaki mpe Mwana na ye, Yesu Kristo, Mokonzi. (Nzembo 2:2, 4, 6-9) Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele, ekolongola baguvɛrnema nyonso ya bato mpe ekokómisa mabele paradiso mpo bato báfanda kuna libela na libela.

Mosika te, maloba ya libondeli oyo Yesu ateyaki ekokokisama: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:10) Kasi, Bokonzi ya Nzambe ezali kosala nini banda ebandaki koyangela na 1914? Makambo nini Bokonzi yango ekosala ntango ekoyangela mokili mobimba?

a Mpo na koyeba makambo mingi etali mobu 1914, talá buku Makambo oyo Biblia eteyaka, ebimisami na Batatoli ya Yehova, na etanda 22.