Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Na nse ya Bokonzi ya Nzambe, bikelamu nyonso ezalaki na bomoko mpe na kimya

Mpo na nini tozali na mposa ya Bokonzi ya Nzambe?

Mpo na nini tozali na mposa ya Bokonzi ya Nzambe?

Nzambe, oyo nkombo na ye Yehova, nde akelaki Adama ná Eva. Na ntango wana, Nzambe azalaki kaka ye moko Mokonzi. Azalaki kosalela bokonzi na ye na bolingo. Atyaki bato na Elanga ya Edene, oyo ezalaki esika moko ya kitoko mpo báfanda. Apesaki bango mpe biloko ebele ya kolya. Longola yango, apesaki bango mosala ya malamu ya kosala. (Ebandeli 1:28, 29; 2:8, 15) Bato balingaki kozala na kimya soki bándimaka Nzambe azala Mokonzi na bango.

Adama ná Eva baboyaki Nzambe azala Mokonzi na bango

Biblia elobi ete anzelu moko motomboki, oyo na nsima abengamaki Satana Zabolo, amonisaki ete Nzambe asengeli te kozala Mokonzi ya bato. Amonisaki ete bato bakozala malamu mingi, soki Nzambe azali kotambwisa bango te mpe azali Mokonzi na bango te. Likambo ya mawa, baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, bandimelaki Satana mpe batombokelaki Nzambe.​—Ebandeli 3:1-6; Emoniseli 12:9.

Lokola Adama ná Eva baboyaki Nzambe azala Mokonzi na bango, abenganaki bango na Paradiso mpe babungisaki elikya ya kozala na bomoi ya seko mpe bazalaki lisusu te na bomoi ya malamu. (Ebandeli 3:17-19) Ekateli bazwaki ememelaki mpe bana na bango mpasi. Biblia elobi ete mpo Adama asalaki lisumu, “lisumu ekɔtaki na mokili . . . mpe liwa mpo na lisumu.” (Baroma 5:12) Lisumu ememaki mpe likambo mosusu ya mpasi: “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Yango elingi koloba ete ntango nyonso oyo bato bakozala bakonzi ya bato mosusu, mpasi ekozala kaka.

BOKONZI YA BATO EBANDI

Nimerode atombokelaki Yehova

Biblia elobi ete moto ya liboso oyo akómaki mokonzi awa na mabele ezalaki Nimerode. Atɛlɛmɛlaki Bokonzi ya Yehova. Banda na mikolo ya Nimerode, bato ya nguya bazali konyokola basusu. Esali soki mbula 3 000, Mokonzi Salomo alobaki ete amonaki “mpisoli ya bato oyo bazali konyokwama, kasi bazalaki na mobɔndisi te; nde bato oyo bazalaki konyokola bango bazalaki na nguya.”​—Mosakoli 4:1.

Lelo oyo, makambo ezali kaka bongo. Na 2009, mokanda moko ya ONU elobaki ete bakonzi ya mabe bakómi mingi, ezali mpe mpo na yango nde “makambo ya mabe ezali kosalema mingi na mokili lelo oyo.”

MAKAMBO ELINGI EBONGA!

Mokili ezali na mposa ya bakonzi ya malamu koleka mpe ya guvɛrnema ya malamu koleka. Yango nde Nzambe, oyo akelá biso alaki!

Ata baguvɛrnema oyo eleki malamu ekoki te kosilisa mikakatano ya bato

Nzambe atyá Bokonzi, to guvɛrnema, oyo ekolongola baguvɛrnema nyonso ya bato, mpe Bokonzi yango “ekotikala seko.” (Danyele 2:44) Bamilio ya bato babondelaka nde mpo na Bokonzi yango. (Matai 6:9, 10) Kasi Nzambe te nde akotambwisa guvɛrnema yango. Kutu, Nzambe atye Mokonzi moto moko oyo ayaki awa na mabele. Moto yango nde nani?